Boluka Ye na Motema na Bino Mobimba
Soki Yesu Klisto alukaki ntango ya kimia mpo na kosolola na Nzambe mpe kozwa nguya epayi na Ye, ezali malamu biso mpe tosala bongo.
Mbula mingi eleki, ngai na mwasi na ngai tosalaki lokola bakambi ya misio na Tokyo, Japon. Na mobembo moko na misio na biso, na ntango wana Mpaka Russell M. Nelson, moko ya bamisionele atunaki ye ndenge nini ebongi koyanola na moto oyo alobi ete azali na mosala mingi mpe azali na ntango te mpo na koyoka bango. Na kotia ntembe te, Mpaka Nelson alobaki, “Ngai nakotuna soki bazali mpe mingi na mosala mpo na kolia bilei ya midi; mpe na nsima nakoyekolisa bango ete bazali na nzoto mpe elimo, mpe ndenge nzoto ekokufa soki eleisami te, elimo mpe ekokufa soki epambwami te na liloba malamu ya Nzambe.”
Ezali motuya kominisa ete liloba ya Japonais mpo na “kozala na mosala mingi,” isogashii, esalami na elembo moko oyo ezali na bilembo mibale (忙). Moko oyo ezali na loboko ya mwasi elimboli “motema” to “molimo,” mpe oyo ezali na loboko ya mobali elimboli “liwa”—kopesaka likanisi ntango mosusu, lokola Mokambi Nelson ateyaki, ete kozala na mosala mingi mpo na koleisa milimo na biso ekoki komema biso na liwa ya molimo.
Nkolo ayebaki—na mokili oyo ya mbangu etonda na makambo ya kokamwisa mpe mobulu—ete kosala ntango ya ntina mpo na Ye esengeli kozala moko ya mikakatno minene ya mikolo na biso. Na maloba ya profeta Yisaya, Alobaki maloba oyo ya toli mpe ya kokebisa, oyo ekoki kozwama ndenge moko na mikolo oyo ya bozangi kimia oyo tozali na yango:
“Na kozonga mpe kopema bokobika; na kimia mpe na elikya bokozwa nguya: kasi bolingaki te.
“Kasi bolobaki, Te; mpo tokokima na bampunda; yango wana bokokima mpenza: mpe, Tokokende likolo ya bampunda ya mbangu; yango wana baoyo bakolanda bino bakozala na mbangu.”
Na maloba mosusu, atako lobiko na biso ezali likolo ya kozongela Ye mbala na mbala mpe kopema na kati ya mitungisi ya mokili, tozali kosala yango te. Mpe atako elikya na biso ekowuta na nguya ya kozwa na kimia ntango elongo na Nkolo na kotala mpe komanyola, tozali kosala yango te. Mpo na nini te? Mpo ete tolobi, “Te, tozali na misala mingi na makambo misusu”—kokima na bampunda na biso, soki tokoki koloba bongo. Yango wana, tokokende mosika lisusu na Nzambe; tokoluka kokende noki noki; mpe noki tozali kokende, nde Satana akolanda biso mbangu.
Ntango mosusu yango wana nde Mokambi Nelson asengi biso mbala na mbala ete tozala na ntango mpo na Nkolo kati na bomoi na biso—“mokolo na mokolo.” Akundolisaka biso ete “ntango ya kimia ezali ntango ya bule—ntango oyo ekosalisa emoniseli ya moto yemei mpe ekobakisa kimia.” Kasi mpo toyoka mongongo ya kokita ya Nkolo, apesaki toli ete, “yo mpe osengeli kozala kimia.”
Kozala kimia, bongo, esengi koleka kaka kozwa ntango mpo na Nkolo—esengi mpe kotika makanisi na biso ya ntembe mpe kobanga, mpe kotya mitema mpe mayele na biso epayi na Ye. Lokola Mpaka David A. Bednar ateyaki, “Etinda ya Nkolo ya ‘kozala kimia’ elakisi makambo mingi koleka kaka koloba te to kotambola te.” Kozala kimia, ateyaki, “ekoki kozala lolenge ya kolendisa biso totalela Mobikisi na ndenge nyonso.”
Kozala kimia ezali etinda ya kondima mpe esengaka mosala. Lectures on Faith elobi boye, “Ntango moto asalaka na kondima asalaka na makasi ya makanisi.” Mokambi Nelson alobaki boye: “Mokano na biso esengeli kotyama makasi epayi ya Mobikisi mpe nsango malamu na Ye. Ezali kosenga makanisi nyonso mpo na kosala makasi ya kotala epayi ya Ye na makanisi nyonso Kasi ntango tozali kosala yango, bantembe mpe kobanga ekimi.” Kolobela ntina oyo ya kotya makanisi na biso epayi ya Nkolo, Mokambi David O. McKay alobaki: “Nakanisi ete topesaka ntina moke na motuya ya komanyola, etindo ya komipesa. … Komanyola ezali moko ya … bikuke ya bule koleka oyo epesaka biso nzela ya kokota na bokonzi ya Nkolo.”
Ezali na liloba moko na monoko ya Japonais, mui, oyo, mpo na ngai, emonisi oyo etondi na kondima mingi, lolenge ya komanyola nini elingi koloba kozala kimia. Ezali na bilembo mibale (無為). Moko ya loboko ya mwasi elimboli “eloko te” to “kozanga eloko,” mpe ya loboko ya mobali elimboli “kosala.” Soki esangani elimbolaka “kosala te.” Soki ezwami ndenge ezali, liloba ekoki kozwama mabe mpo na kolimbola “kosala eloko moko te” na ndenge moko “kozala kimia” ekoki kozwama mabe lokola “koloba to kotambola te.” Nzokande, ndenge liloba “kozala kimia,” ezali na ndimbola oyo eleki; mpo na ngai ezali kokundola ngai mpo na kokitisa mbangu mpe kozala na boyebi ya molimo.
Ntango nazalaki kosala na Bokambi ya Etuka ya Asie ya Likolo elongo na Mpaka Takashi Wada, nayekolaki ete mwasi na ye, Ndeko mwasi Naomi Wada, azali na mayele mingi na kokoma bikomi ya Japon. Nasengaki Ndeko mwasi Wada asalela ngai bikomi ya Japon mpo na liloba mui. Nalingaki kotia yango na lopango ya ndako na ngai mpo ekundola ngai ya kozala na kimia mpe kotalela Mobikisi. Nakamwaki ntango andimaki mbala moko te na bosenga oyo emonanaki kozala pete.
Mokolo oyo elandaki, ntango namonaki ete nayebaki te mpo na kozanga koyeba ngai, Mpaka Wada asololaki na ngai ete kokoma bilembo yango ekosenga mosala monene. Asengelaki kokanisa mpe komanyola na ntina ya likanisi mpe bilembo yango kino akosolola yango na elimo na ye mpe akoka kopesa maloba na makanisi oyo ewuti na motema uta na langi nyonso ya brosi na ye. Nayokaki mabe mpo nasengaki ye na bozangi mayele. eloko ezalaki kosenga mosala makasi. Nasengaki ye amema bolimbisi na ngai epayi ya ndeko mwasi Wada mpo na bozangi mayele na ngai mpe koyebisa ye ete nazalaki kolongola bosenga na ngai.
Okoki kokanisa kokamwa mpe botondi na ngai ntango natikaki Japon, Ndeko mwasi Wada, kozanga kosengama, apesaki ngai likabo ya kitoko oyo ya ekomi oyo ezalaki na bilembo ya Japonais mpo na liloba mui. Yango ezali sikawa ya kokangama na efelo ya bilo na ngai, kokundolisa ngai mpo na kozala kimia mpe koluka Nkolo mokolo nyonso na motema mobimba, nguya, mayele, mpe makasi na ngai nyonso. Azwaki ndimbola, na mosala oyo ya komipesa, ndimbola ya mui, to kimia, malamu koleka ndenge maloba nyonso ekokaki. Na esika ya kosala bilembo yango na kozanga makanisi mpe na mokumba, asalaki ekomi na ye na motema mobimba mpe mokano ya solo.
Na ndenge moko, Nzambe azali na mposa ete topusana penepene na ntango na biso na ye na ndenge ya losambo ya motema. Ntango tozali kosala boye, losambo na biso ezali kokoma emoniseli ya bolingo na biso mpo na ye.
Azali na mposa makasi ete tosolola na Ye. Na ntango moko, nsima ya kopesa na ngai ya losambo ya bofongoli na likita moko na Bokambi ya Yambo, Mokambi Nelson abengaki ngai mpe alobaki, “Ntango ozalaki kosambela, Nakanisaki lolenge nini Nzambe asengeli kosepela ntango tozwaka ntango uta na bangonga na biso ya mosala mingi mpo na kondima Ye.” Ezalaki bokundoli moko ya pete kasi ya nguya ya lolenge nini esengeli kozala na ntina mpo na Tata na Lola ntango tozali kopema mpo na kosolola na Ye.
Ata soki azali kolinga bolamu na biso mingi, akotindika biso te toya epayi na Ye. Epayi ya Banefi, Nkolo oyo asewaki alobaki, “Mbala boni nalingaki kosangisa bino lokola mama ya soso asangisaka bana soso na ye, mpe bino bolingaki te.” Alandisaki yango na libiangi moko ya elikya oyo ezali mpe mpo na biso lelo: “Mbala boni nako kosangisa bino lokola mama ya soso asangisaka bana soso na ye na nse ya mapapu na ye, soki bokoyambola mpe kozonga epayi na ngai na motema mobimba.”
Nsango malamu ya Yesu Klisto epesaka biso libaku ya kozonga epayi na Ye mbala na mbala. Mabaku oyo ezali na kati ya nsambo ya mokolo na mokolo, boyekoli ya Makomi, bokuli ya elambo, mokolo ya saba, mpe bokumbameli na tempelo. Soki esengelaki tolongola mabaku oyo ya bule kati na liste na biso ya makambo ya kosala mpe kotia yango na liste na biso ya “makambo ya kosala te”—elimboli kopusana penepene na yango na makanisi moko ndeko mwasi Wada asalaka na mosala na ye ya ekomeli?
Bokoki kokanisa, “Nazali na ntango te mpo na yango.” Nazalaki na makanisi yango mpe mbala mingi. Kasi botika napesa toli ete oyo tozali kosenga ezali kaka te ntango mingi kasi bokebi mingi mpe kotia makanisi na Nzambe na bantango oyo tosila kotiela Ye pembeni.
Na ndakisa, ntango tosambelaka, soki esengelaki tolekisa ntango moke na kolobaka mpe tolekisa ntango mingi mpo na kozala kaka na Nzambe; mpe ntango tosengelaki koloba, mpo na kopesa maloba ya botondi mpe ya bolingo oyo euti mpenza na motema mpe ya sikisiki?
Mokambi Nelson apesaki toli ete totanga kaka te makomi kasi tosepela na yango. Bokeseni nini ekozala soki tosengeli kotanga mingi te mpe kosepela mingi?
Boni soki tosengeli kosala mingi koleka mpo na kolengela makanisi na biso mpo na kolia elambo mpe na esengo nyonso tokanisaki mapamboli ya bomikabi ya Yesu Klisto na ntango ya makuli oyo ya bule?
Na mokolo ya Saba, oyo na Kiebre elimboli “kopema,” boni soki esengelaki topema na mitungisi misusu mpe kozwa ntango ya kofanda kimia elongo na Nkolo kopesa mabondeli na biso epayi na Ye?
Na ntango ya bokumbameli na biso na tempelo, boni soki tosengelaki kosala milende elongobani mpo na kotia likebi to kowumela mwa ntango molai na kisuku ya selestiale kati na makanisi ya kimia?
Ntango makanisi na biso ezali mingi te na kosala mpe mingi na kolendisa boyokani na biso elongo na Tata na Lola mpe Yesu Klisto, Natatoli ete moko na moko ya bantango wana ya bule ekotondisama, mpe tokozwa litambwisi oyo esengeli na bomoi na bisomei. Biso, lokola Marta na lisolo ya Luka, mbala mingi tozali na “mitungisi mpe bobangi ya makambo mingi.” Nzokande, ntango tokosolola na Nkolo mokolo na mokolo, Akosalisa biso tomona nini ezali na ntina mingi.
Kutu Mobikisi azwaki ntango na misala na ye mpo na kozala na kimia. Makomi etondi na bandakisa ya Nkolo kokendaka na esika na ye moko—na ngomba, esobe, esika ya zamba, to kokendaka “mwa mosika”—mpo na kobondela Tata. Soki Yesu Klisto alukaki ntango ya kimia mpo na kosolola na Nzambe mpe kozwa nguya epayi na Ye, ezali malamu biso mpe tosala bongo.
Soki tozali kotia motema mpe makanisi na biso na Tata na Lola mpe Yesu Klisto mpe koyoka mongongo ya kimia, mongongo ya moke ya Molimo Mosantu, tokozala na bososoli mingi etali oyo ezali na ntina mingi, kokolisa mawa ya mozindo koleka, mpe kozwa bopemi mpe makasi kati na Ye. Na ndenge ya kokamwa, kosalisa Nzambe kopusa mosala na Ye ya lobiko mpe bonetolami ekoki kosenga ete tolembisa moke. Kozala ntango nyonso na mosala ekoki kozala kobakisa na mobulu na bomoi na biso mpe koyiba biso kimia oyo tozali koluka.
Natatoli ete ntango nyonso tozali kozonga epayi ya Nkolo na motema mobimba, tokoya na kimia mpe elikya koyeba Ye mpe koyoka bolingo ya boyokani na Ye ezanga nsuka mpo na biso.
Nkolo alakaki:
“Bopusana penepene na ngai mpe nakopusana penepene na bino; boluka ngai na molende mpe bokomona ngai.”
“Bokoluka Ngai, mpe bokokuta Ngai, soki boluki Ngai na motema na bino mobimba.”
Natatoli ete elaka oyo ezali ya solo. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.