Makomi
Malongi mpe Mayokani 106


Eteni 106

Emoniseli epesami na nzela ya Profeta Joseph Smith, na Kirtland, Ohio, na mokolo ya 25, sanza ya zomi na moko ya mobu 1834. Emoniseli oyo etindami epayi ya Warren A. Cowdery, ndeko mobali mpe nkulutu ya Oliver Cowdery.

1–3, Warren A. Cowdery abiangami lokola mokambi ya eklezia na mboka na ye; 4–5, Boyei ya Mibale ekokuta bana ya pole na mpwasa lokola moyibi te; 6–8, Mapamboli minene malandaka kosalela mosala ya sembo kati na Eklezia.

1 Ezali bolingi na ngai ete mosali na ngai Warren A. Cowdery asengeli koponama mpe kokulisama nganganzambe monene mokambi likolo ya eklezia na ngai, na mboka ya Freedom mpe bikolo ya nzinganzinga;

2 Mpe asengeli koteya nsango malamu na ngai ya libela, mpe kotombola mongongo na ye mpe kokebisa bato, bobele na esika na ye moko te, kasi na bituka ekangemi mpe lokola;

3 Mpe komipesa ntango na ye mobimba na libiangi oyo ya likolo mpe esantu, oyo nazali kopesa epayi na ye sikawa, kolukaka na molende bokonzi ya lola mpe bosembo ya bokonzi yango, mpe biloko nyonso oyo esengeli ekobakisama likolo na yango; mpo mosali alongobani na lifuta na ye.

4 Mpe lisusu, solo nalobi epayi na bino, boyei ya Nkolo ebelemi, mpe ekokuta mokili na mpwasa lokola moyibi na butu—

5 Boye, bokanga mokaba ya nketo na bino, ete bokoka kozala bana ya pole, mpe mokolo wana mokuta bino na mpwasa lokola moyibi te.

6 Mpe lisusu, solo nalobi epayi na bino, bosepeli ezalaki na lola ntango mosali na ngai Warren angunzamaki na lingenda ya ngai, mpe akabwanaki ye moko na bikelakela ya bato;

7 Boye, mosali na ngai Warren apambolami, mpo nakolakisa boboto mpo na oyo etali ye; mpe, ata kutu lipombo ya motema na ye, nakotombola ye likolo mbala mingi lokola akomikitisa ye moko liboso na ngai.

8 Mpe nakopesa ye ngolu mpe bozangi kobanga na oyo wapi akoki kotelema ngwi; mpe soki akobi kozala nzeneneke moko ya sembo mpe kozala pole mpo na eklezia, nalengeli motole mpo na ye kati na bifandelo ya Tata na ngai. Kutu bongo. Amene.

Bimisa na lokasa