Makomi
Malongi mpe Mayokani 117


Eteni 117

Emoniseli epesami na nzela ya Profeta Joseph Smith, na Far West, Missouri, na mokolo ya 8, sanza ya mwambe ya mobu 1838, mpo na oyo etali misala esengeli kosalema sasaipi na William Marks, Newel K. Whitney, mpe Oliver Granger.

1–9, Basali ya Nkolo basengeli kolula biloko ya ntango te, mpo “bozwi ezali nini epayi ya Nkolo?”; 10–16, Basengeli kotika lokenzi ya molimo, mpe mabonza na bango ekozala ya bule na miso ya Nkolo.

1 Solo boye elobi Nkolo epayi ya mosali na ngai William Marks, mpe lisusu epayi ya mosali na ngai Newel K. Whitney, tika ete babongisa mombongo na bango na lombangu mpe bakende mobembo uta na mboka ya Kirtland, liboso ete ngai, Nkolo, natinda lisusu bamvula ya mpembe likolo ya mabele.

2 Tika ete balamuka, mpe batelema, mpe balongwa, mpe batikala te, mpo ngai, Nkolo, natindi yango.

3 Boye, soki batikali ekozala malamu mpo na bango te.

4 Tika ete bayambola uta na masumu na bango nyonso, mpe uta na mposa na bango ya bilula-lula, liboso na ngai, elobi Nkolo; mpo bozwi ezali nini epayi na ngai? elobi Nkolo.

5 Tika bozwi ya Kirtland etekama mpo na banyongo, elobi Nkolo. Tika yango ekende, elobi Nkolo, mpe nyonso oyo etikali, tika ete etikala na maboko na bino, elobi Nkolo.

6 Mpo ezali ngai na bandeke ya likolo te, mpe lisusu na mbisi ya mbu, mpe na banyama ya bangomba? Esalaki ngai mabele te? Esimbi ngai oyo makoya na nsuka ya mampinga nyonso ya bikolo ya mabele te?

7 Boye, ekokokomisa ngai te bisika bitikala mpamba na oyo ebimisaka ntongo mpe fololo, mpe na oyo ebimisaka biloko beboo? elobi Nkolo.

8 Ezali kuna te na bifandelo ya kokoka likolo ya ngomba ya Adama-ondi-Amana, mpe likolo ya mabele ya polele ya Olaha Shinehah, to na mboka wapi Adama azalaki kofanda, ete bosengeli kolula oyo ezali bobele litanga, mpe kotala mpamba makambo ya bozito koleka?

9 Boye, bomata na esika oyo na mboka ya bato na ngai, kutu Siona.

10 Tika ete mosali na ngai William Marks azala sembo na makambo ya mike mike, mpe akozala mokonzi likolo ya mingi. Tika ete ayangela na katikati ya bato na ngai na engumba ya Far West, mpe tika ete apambolama na mapamboli ya bato na ngai.

11 Tika ete mosali na ngai Newel K. Whitney ayoka nsoni mpo na oyo etali lingomba ya Banikolaiti mpe ya bonsomo na bango nyonso ya nkuku, mpe mpo na oyo etali lokenzi nyonso ya bango ya molimo liboso na ngai, elobi Nkolo, mpe amata na mboka ya Adama-ondi-Amana, mpe azala episikopo mpo na bato na ngai, elobi Nkolo, episikopo na nkombo te kasi na misala, elobi Nkolo.

12 Mpe lisusu, nalobi epayi na bino, nazali komikundola mosali na ngai Oliver Granger; tala, solo nalobi epayi na ye ete nkombo na ye ekozala na bokundoli ya bule uta nkola na nkola, mpe libela na libela, elobi Nkolo.

13 Boye, tika ete asala makasi na molende mpo na bosikoli ya Bokambi ya Yambo ya Eklezia na ngai, elobi Nkolo; mpe ntango akokweya atelema lisusu, mpo mbeka na ye ekozala bule mingi epayi na ngai koleka koyikana na ye, elobi Nkolo.

14 Boye, tika ete amata na esika oyo na lombangu, na mboka ya Siona; mpe na ntango oyo esengeli akokoma moto ya mombongo mpo na nkombo na ngai, elobi Nkolo, mpo na litomba ya bato na ngai.

15 Boye tika ete moto moko te atiola mosali na ngai Oliver Granger, kasi tika ete mapamboli ya bato na ngai mazala likolo na ye libela na libela.

16 Mpe lisusu, solo nalobi epayi na bino, tika ete basali na ngai nyonso na mboka ya Kirtland bamikundola Nkolo Nzambe na bango, mpe ndako na ngai lisusu, mpo na kobatela mpe kobomba yango esantu, mpe kobengana bateki misolo na ntango esengeli ya ngai moko, elobi Nkolo. Kutu bongo. Amene.

Bimisa na lokasa