Makomi
Malongi mpe Mayokani 129


Eteni 129

Malako epesami na Profeta Joseph Smith, na Nauvoo, Illinois, na mokolo ya 9, sanza ya mibale ya mobu 1843, koyebisaka bafungola minene misato na nzela ya oyo wapi moto akoki koyeba lolenge ya solo ya kokesenisa mosala ya banjelu mpe ya milimo.

1–3, Na lola ezali na banzoto esekwa mpe na banzoto ya molimo; 4–9, Bafungola epesami na nzela ya oyo wapi bantoma uta na ngambo mosusu ya elamba ya bozipi bakoki koyebana malamu.

1 Ezali na ndenge mibale ya bazalani na lola, elingi koloba: Banjelu, oyo bazali bato basili kosekwa, kozalaka na nzoto ya mosuni mpe mikuwa—

2 Ndakisa, Yesu alobaki: Simba ngai mpe tala, mpo ete molimo ezalaka na mosuni mpe mikuwa te, lokola omoni ngai nazali na yango.

3 Ya mibale: milimo ya bayengebene baoyo bakomisami babongi nie, oyo basekwi naino te, kasi bazali kosangola libula ya nkembo se moko wana na banjelu.

4 Ntango ntoma moko ayei kolobaka ete azali na etinda uta na Nzambe, pesa ye loboko na yo mpe senga ye apesa yo mbote na maboko.

5 Soki azali anjelu akosala mpe lolenge moko, mpe okoyoka loboko na ye.

6 Soki azali molimo ya moto ya sembo oyo asili kokomisama moto ya kobonga nie akoya kati na nkembo na ye; mpo oyo ezali nzela bobele moko oyo akoki komonana—

7 Senga ye apesa yo mbote na maboko, kasi akoningana te, mpamba te ezali koyokana te na molongo ya lola ete moto ya sembo akosa; kasi akotikala se kopesa etinda na ye.

8 Soki ezali zabulu lokola anjelu ya pole, ntango osengi kopesa ye mbote na maboko akopesa yo loboko na ye, mpe okoyoka eloko moko te; boye okoki kokitola ye.

9 Oyo ezali bafungola minene misato na nzela ya oyo wapi okoki koyeba soki mosala songolo mowuti na Nzambe.

Bimisa na lokasa