Makomi
Malongi mpe Mayokani 131


Eteni 131

Eteni oyo ezali na malako oyo Profeta Joseph Smith apesaki na Ramus, Illinois, na mikolo ya 16 mpe 17, sanza ya mitano ya mobu 1843.

1–4, Libala ya selesitiale ezali na ntina monene mpo na konetolama na lola ya likolo koleka; 5–6, Lolenge boni bato bakangemi mpo na bomoi ya seko elimbolami; 7–8, Molimo nyonso esalemi na biloko soki nini.

1 Kati na nkembo ya selesitiale ezali na lola misato to ndelo;

2 Mpe mpo na kokoma na ndelo ya likolo koleka, moto asengeli kokota kati na molongo oyo ya bonganganzambe [elingi koloba liyokani ya sika mpe ya libela ya libala];

3 Mpe soki akotite te, akoki kokoma na ndelo yango te.

4 Akoki kokota na mosusu, kasi oyo wana ezali nsuka ya bokonzi na ye; akoki kozwa kobakisa te.

5 (Mwa 17, sanza ya mitano ya mobu 1843.) Liloba ya lisakoli ya makasi koleka elingi koloba ete moto ayeba ete akangemi mpo na bomoi ya seko, na nzela ya emoniseli mpe ya molimo ya masakoli, na nzela ya nguya ya Bonganganzambe Bosantu.

6 Ekoki kosalema te ete moto abikisama kati na bozangi koyeba.

7 Ezali na eloko moko te oyo esalemi na eloko te. Molimo nyonso mosalemi na eloko soki nini, kasi eleki lokenzi to peto, mpe ekoki kososolama bobele na miso ya peto koleka;

8 Tokoki komona yango te; kasi ntango nzoto na biso epetolami tokomona ete nyonso esalemi na eloko.

Bimisa na lokasa