Makomi
Malongi mpe Mayokani 17


Eteni 17

Emoniseli epesami na nzela ya Profeta Joseph Smith epayi ya Oliver Cowdery, David Whitmer, mpe Martin Harris, na Fayette, New York, na sanza ya motoba ya mobu 1829, liboso ete bamona bapalaki na nkoma oyo ezalaki na lisolo ya makomi ya Buku ya Mormon. Joseph mpe mokomeli na ye, Oliver Cowdery, bayekolaki uta na bobongoli ya bapalaki ya Buku ya Mormon ete banzeneneke baleki malamu Misato basengelaki koponama (tala Etele 5:2–4; 2 Nefi 11:3; 27:12). Oliver Cowdery, David Whitmer, mpe Martin Harris bapusamaki na mposa moko oyo efulamaki na Molimo mpo na kozala banzeneneke baleki malamu Misato. Profeta alukaki koyeba uta na Nkolo, mpe emoniseli oyo epesamaki lokola eyano na nzela ya Ulima mpe Tumima.

1–4, Na nzela ya bondimi Banzeneneke Misato bakomona bapalaki mpe biloko mosusu ya bule; 5–9, Klisto apesi litatoli mpo na oyo etali bonzambe ya Buku ya Mormon.

1 Tala, nalobi epayi na bino, ete bosengeli kotalela liloba ya ngai, oyo soki bosali na mokano etonda ya motema, bokomona bapalaki, mpe lisusu libende ya ntolo, mompanga ya Labana, Ulima mpe Tumima, oyo epesamiki na ndeko ya Yelede ya mobali na likolo ya ngomba, ntango asololaki na Nkolo miso na miso, mpe makonga ya makamwisi oyo epesamaki na Lehi wana ezalaki ye na esobe, na ndelo ya Mbu Etane.

2 Mpe ezali nde na nzela ya bondimi na bino ete bokomona yango, kutu na nzela ya bondimi oyo wana baprofeta ya kala bazalaki na yango.

3 Mpe soki bosili kozwa bondimi, mpe bomoni yango na miso na bino, bosengeli kotatola na ntina na yango, na nguya ya Nzambe;

4 Mpe oyo bokosala mpo ete mosali na ngai Joseph Smith Mwana akoka kobebisama te, mpo ete nakoka kokokisa ntina na ngai ya bosembo mpo na bana ya bato na nzela ya mosala oyo.

5 Mpe bosengeli kotatola ete bomonaki yango, kutu lokola mosali na ngai Joseph Smith Mwana, oyo amonaki yango; mpo ezali nde na nzela ya nguya na ngai ete amonaki yango, mpe ezali mpo azalaki na bondimi.

6 Mpe abongolaki buku yango, kutu eteni oyo wana natindaki ye, mpe lokola Nkolo na bino mpe Nzambe na bino azali na bomoi ezali solo.

7 Yango wana, bosili kozwa nguya se moko wana, mpe bondimi se moko wana, mpe likabo se moko wana lokola ye;

8 Mpe soki bosaleli mitindo oyo ya ngai ya nsuka, oyo napesaki bino, bikuke ya lifelo bikolonga bino te; mpo ngolu na ngai ekoki mpo na bino, mpe bokotombwama na mokolo ya nsuka.

9 Mpe ngai, Yesu Klisto, Nkolo na bino mpe Nzambe na bino, nalobi yango epayi na bino, ete nakoka kokokisa ntina na ngai ya bosembo mpo na bana ya bato. Amene.

Bimisa na lokasa