Makomi
Malongi mpe Mayokani 2


Eteni 2

Litangi uta na mambi ya kala ya Joseph Smith kozongelaka maloba ya anjelu Moroni na Profeta Joseph Smith, wana kati na ndako ya tata ya Profeta na Manchester, New York, na mpokwa ya mokolo ya 21, sanza ya libwa ya mobu 1823. Moroni azalaki moko ya bakomi ya nsuka na molongo molai ya bakomi bonkoko oyo asalaki lisolo ya makomi oyo oyobani sikawa liboso ya mokili lokola Buku ya Mormon. (Meka na Malaki 4:5–6; lisusu na biteni 27:9; 110:13–16; mpe 128:18.)

1, Eliya akobimisa bonganganzambe; 2–3, Bilaka ya batata bilonami na mitema ya bana.

1 Tala, Nakobimisa epayi na bino Bonganganzambe, na maboko ya profeta Eliya, liboso ya boyei ya mokolo monene mpe ya nsomo ya Nkolo.

2 Mpe akolona na mitema ya bana bilako oyo epesamaki epayi ya batata, mpe mitema ya bana mikobaluka epayi ya batata na bango.

3 Soki ezalaki bongo te, mabele mobimba elingaki kobebisama na boyei na ye.

Bimisa na lokasa