Makomi
Malongi mpe Mayokani 36


Eteni 36

Emoniseli epesami na nzela ya Profeta Joseph Smith na Edward Partridge, penepene na Fayette, New York, na mokolo ya 9, sanza ya zomi na mibale ya mobu 1830 (tala moto ya eteni 35). Mambi ya kala ya Joseph Smith masakoli ete Edward Partridge “azalaki emekoleli ya moto oyo amipesi na Nzambe, mpe moko ya bato minene ya Nkolo.”

1–3, Nkolo atii loboko na Ye likolo ya Edward Partridge na nzela ya loboko ya Sidney Rigdon; 4–8, Moto nyonso oyo ayambi nsango malamu mpe bonganganzambe asengeli kobiangama kokende mpe koteya.

1 Boye elobi Nkolo Nzambe, Moko Moto makasi ya Yisalaele: Tala, nalobi epayi na yo, mosali na ngai Edward, ete opambolami, mpe masumu na yo malimbisami yo, mpe obiangami kokende koteya nsango malamu na ngai lokola na mongongo ya kelelo;

2 Mpe nakotia loboko na ngai likolo na yo na nzela ya loboko ya mosali na ngai Sidney Rigdon, mpe okozwa Molimo na ngai, Molimo Mosantu, kutu Molendisi, oyo akoteya yo makambo ya kimia ya bokonzi;

3 Mpe osengeli kosakola yango na mongongo makasi, kolobaka: Hozana, nkombo ya Nzambe aleki likolo epambolama.

4 Mpe sikawa libiangi oyo mpe motindo oyo napesi epayi na yo etali bato nyonso—

5 Ete mingi lokola bakoya liboso ya basali na ngai Sidney Rigdon mpe Joseph Smith Mwana, koyambaka libiangi oyo mpe motindo oyo, basengeli kokulisama mpe kotindama mpo na koteya nsango malamu ya libela na kati ya bikolo—

6 Mpe kobelela boyamboli, kolobaka: Bomibikisa uta na nkola oyo ya mabe, mpe bobima uta na moto, mpe boyina kutu bilamba bikomisami mbindo na mosuni.

7 Mpe motindo oyo mokopesama epayi ya bampaka ya eklezia na ngai, ete moto nyonso oyo akoyamba yango na motema moko akoka kokulisama mpe kotindama, kutu lokola nalobaki.

8 Nazali Yesu Klisto, Mwana ya Nzambe; yango wana, kanga elamba na nketo na bino mpe nakoya na mbalakaka na tempelo na ngai. Kutu bongo. Amene.

Bimisa na lokasa