Makomi
Malongi mpe Mayokani 3


Eteni 3

Emoniseli epesami na ezela ya profeta Joseph Smith, na Harmony, Pennsylvania, na sanza ya sambo ya mobu 1828, mpo na oyo etali libungi ya nkasa 116 ya ebongoli makomami na maboko uta na eteni ya yambo ya Buku ya Mormon, oyo ebiangamaki buku ya Lehi. Profeta na mpasi nyonso apesaka nzela ete nkasa oyo ekende uta na bobateli na ye epayi na oyo ya Martin Harris, oyo apesaki na ya ntango moke lisungi na ye lokola mokomeli na bobongoli ya Buku ya Mormon. Emoniseli yango epesamaki na nzela ya Ulima mpe Tumima. (Tala eteni 10.)

1–4, Nzela ya Nkolo ezali moko zunguluke ya seko; 5–15, Joseph Smith asengeli koyambola soki te kobungisa likabo ya kobongola; 16–20, Buku ya Mormon ebimi mpo na kobikisa nkona ya Lehi.

1 Misala, mpe miango, mpe ntina ya Nzambe ekoki te kosuka na nzela, mpe lisusu ekoki koleka mpamba te.

2 Mpo Nzambe atambolaka na banzela ya nioka nioka te, abalukaka mpe te na loboko ya mobali soki te ya mwasi, to abongwanaka te uta na oyo wana alobaki, mpe boye banzela na ye ezali sembo, mpe nzela na ye ezali moko zunguluke ya seko.

3 Mikundola, mikundola ete ezali te mosala ya Nzambe oyo mokokakema, kasi mosala ya moto;

4 Mpo atako moto akoki kozwa bimoniseli mingi, mpe kozala na nguya ya kosala misala mingi ya nguya, nzokande soki akobeta ntolo na bokasi na ye, mpe atali mpamba toli ya Nzambe, mpe alandi matangeli ya bolingi mpe mposa na ye ya mosuni, asengeli kokweya mpe akomilukela bobekoli ya Nzambe moko moyengebene likolo na ye.

5 Tala, opesamaki mokumba ya kotala biloko oyo, kasi lolenge boni mitindo oyo epesamaki epayi na yo ezalaki sikisiki; mpe kanisa lisusu bilaka oyo epesamaki epayi na yo, soki obukaki yango te.

6 Mpe tala, mbala boni ebukaki yo mibeko mpe mitindo ya Nzambe, mpe omitikaki ete olanda mandimisi ya bato.

7 Mpo, tala, osengelaki te kobanga moto koleka Nzambe. Atako bato batali toli ya Nzambe pamba, mpe bayini maloba na ye—

8 Nzokande osengelaki kozala sembo; mpe alingaki kotandola loboko na ye mpe kolendisa yo na mbanzi nyonso ya nkanda ya moyini; mpe alingaki kozala elongo na yo na ntango nyonso ya mikakatano.

9 Tala, ozali Joseph, mpe oponamaki kosala mosala ya Nkolo, kasi likolo ya kobuka mibeko, soki okebi te okokweya.

10 Kasi mikundola, Nzambe atonda na boboto; mpe boye, yambola uta na oyo wana osalaki oyo ekeseni na motindo napesaki yo, mpe ozali kaka moponami, mpe obiangami lisusu na mosala;

11 Longola se soki osali oyo, okosundolama mpenza mpe okokoma lokola bato mosusu, mpe okozala lisusu na likabo te.

12 Mpe ntango osili kokaba oyo Nzambe apesaki yo litomba ya komona mpe nguya ya kobongola, okabi yango oyo ezalaki ya bule na maboko ya moto moko ya nkuna,

13 Oyo atali mpamba toli ya Nzambe, mpe abuki bilaka ya bule koleka nyonso oyo elapamaki liboso ya Nzambe, mpe atalelaki makanisi na ye moko mpe abetaki ntolo na bwania na ye moko.

14 Mpe oyo ezali ntina ete ozangisaki matomba na yo mpo na eleko moko—

15 Mpo opesaki nzela ete toli ya mokambi na yo enyatama na nse ya makolo uta na ebandeli.

16 Nzokande, mosala na ngai mokokoba kopanzama, mpo mbala mingi lokola boyebi ya Mobikisi moko eyaki na mokili, na nzela ya litatoli ya Bayuda, bongo kutu nde ekoya boyebi ya Mobikisi epayi ya bato na ngai—

17 Mpe epayi ya Banefi, mpe Bayakobi, mpe Bayosefe, mpe Bazolami, na nzela ya litatoli ya batata na bango—

18 Mpe litatoli oyo ekoya na boyebi ya Balamani, mpe Balemuele, mpe Bayisamaele, oyo babebaki moke moke kati na bozangi boyambi likolo ya mabe ya batata na bango, baye Nkolo apesaki nzela ete baboma bandeko na bango Banefi, na ntina ya mabe na bango mpe bonsomo na bango.

19 Mpe mpo na ntina oyo mpenza Nkolo abatelaki bapalaki oyo, oyo ezali na masolo ya makomi oyo—ete bilako ya Nkolo bikoka kokokisama, oyo asalaki epayi ya bato oyo;

20 Mpe ete Balamani bakoka kokoma na boyebi ya batata na bango, mpe ete bakoka koyeba bilaka ya Nkolo, mpe ete bakoka kondima nsango malamu mpe kotalela se matomba ya Yesu Klisto, mpe bakembelama na nzela ya bondimi na nkombo na ye, mpe ete na nzela ya boyamboli na bango bakoka kobikisama. Amene.

Bimisa na lokasa