Makomi
Malongi mpe Mayokani 44


Eteni 44

Emoniseli epesami epayi ya Profeta Joseph Smith mpe Sidney Rigdon, na Kirtland, Ohio, na eteni ya nsuka ya sanza ya mibale ya mobu 1831. Na kolakisaka botosi na masengami oyo etiami na kati awa, Eklezia eponaki ete likita moko esalema noki na sanza ya motoba elandi.

1–3, Bampaka basengeli kosangana na likita; 4–6, Basengeli kobongama engebene na mibeko ya mboka mpe kobatela babola.

1 Tala, boye elobi Nkolo epayi na bino basali na ngai, elongobani na ngai ete bampaka ya eklezia na ngai babiangama esika moko, uta na esti mpe uta na westi, mpe uta na nordi mpe uta na sudi, na mokanda soki te na nzela moko mosusu.

2 Mpe ekosalema, ete mbala mingi lokola bazali sembo, mpe basaleli bondimi na ngai, nakosopa Molimo na ngai likolo na bango na mokolo oyo bakoyangana bango moko esika moko.

3 Mpe ekosalema ete bakokende kati na bituka ya nzinganzinga, mpe bakoteya boyamboli epayi ya bato.

4 Mpe mingi bakobongwana, na lolenge ete bokozwa nguya ya komibongisa bino moko engebene na mibeko ya moto;

5 Ete banguna na bino bazala na nguya te likolo na bino; ete bobatelama na makambo nyonso, ete bopesama makoki ya kobatela mibeko na ngai; ete boyokani nyonso na nzela ya oyo wapi monguna azali koluka kobebisa bato na ngai ebukama.

6 Tala, nalobi epayi na bino, ete bosengeli kokende kotala babola mpe bakeleli mpe kopesa bango lisungi, ete bakoka kobombama kino makambo nyonso makoka kosalema engebene na mobeko na ngai oyo bozwaki. Amene.

Bimisa na lokasa