Makomi
Malongi mpe Mayokani 51


Eteni 51

Emoniseli epesami na nzela ya Profeta Joseph Smith, na Thompson, Ohio, na mokolo ya 20, sanza ya mitano ya mobu 1831 Na eleko oyo lokola Basantu batikaki mboka na bango uta na bingumba ya esti mpe babandaki kokoma na Ohio, esengelaki kosala ebongiseli ya nsuka mpo na esika ya kofandisa bango. Lokola mwango oyo ezalaki se mosala ya episikopo ye moko, Episikopo Edward Partridge alukaki kozwa malako na likambo yango, mpe Profeta alukaki koyeba uta na Nkolo.

1–8, Edward Partridge aponami koyangela bokapita mpe biloko; 9–12, Basantu basengeli kosala mimbongo na bosembo mpe kozwa kaka lolenge moko; 13–15, Basengeli kozala na ebombelo ya episikopo mpe kobongisa biloko engebene na mobeko ya Nkolo; 16–20, Ohio esengeli kozala esika ya bosangani mpo na mwa ntango moke.

1 Boyoka ngai, elobi Nkolo Nzambe na bino, mpe nakoloba na mosali na ngai Edward Partridge, mpe kopesa ye malako; mpo esengeli mpenza ete azwa malako etali lolenge nini kobongisa bato oyo.

2 Mpo esengeli ete bamibongisama engebene na mibeko na ngai; soki babongisami lolenge mosusu, bakokatama.

3 Yango wana, tika mosali na ngai Edward Partridge, mpe baoyo wana aponaki, baoyo nasepeli na bango malamu, bapesa epayi ya bato oyo biteni na bango, moto moko moko oyo ekokani engebene na libota na ye, engebene na libaku na ye mpe bozangi mpe bosenga na ye.

4 Mpe tika mosali na ngai Edward Partridge, ntango akopesa moto na moto eteni na ye, apesa ye mokanda oyo ekobatelela ye eteni na ye, ete akozala na yango, kutu makoki oyo mpe bosangoli libula oyo kati na eklezia, kino abuki mobeko mpe amonani ete alongobani te na kopona ya eklezia, engebene na mibeko mpe mayokani ya eklezia, mpo na kozala moto ya eklezia.

5 Mpe soki abuki mobeko mpe amonani ete alongobani te mpo na kozala ya eklezia, akozala na nguya te ya kosenga eteni wana abulisaki epayi ya episikopo mpo na babola mpe bakeleli ya eklezia na ngai; boye, akobomba likabo yango te, kasi akosenga bobele eteni oyo epesamaki epayi na ye.

6 Mpe boye biloko nyonso esengeli ebatelama solo, engebene na mibeko ya mboka.

7 Mpe tika ete oyo ezali mpo na bato oyo epesama epayi ya bato oyo.

8 Mpe mpo na oyo etali mosolo oyo motikali likolo epayi ya bato oyo—tika ete mosali moko aponama epayi ya bato oyo, mpo na kokamata mosolo ya kopesa bilei mpe bilamba, engebene na bozangi ya bato oyo.

9 Mpe tika ete moto na moto asala mombongo na bosembo, mpe ezala se lolenge moko na kati ya bato oyo, mpe moto na moto azwa se ndenge moko, mpo ete bokoka kozala moko, kutu lokola natindaki bino.

10 Mpe tika ete eloko oyo ezali ya bato oyo ezwama te mpe epesama te na oyo wana ya eklezia mosusu.

11 Yango wana, soki eklezia mosusu elingi kozwa misolo uta na eklezia oyo, tika ete bafuta lisusu na eklezia oyo engebene na oyo bakoyokana;

12 Mpe oyo ekosalema na nzela ya episikopo to mosali yango, oyo akoponama na kopona ya eklezia.

13 Mpe lisusu, tika ete episikopo atia ebombelo mpo na eklezia oyo; mpe tika ete biloko nyonso na misolo mpe na bilei, oyo etikali likolo koleka oyo esengeli mpo na bozangi ya bato oyo, bibombama na maboko ya episikopo.

14 Mpe tika ye lisusu abomba ndambo mpo na ye moko mpo na bozangi na ye moko, mpe mpo na bozangi ya libota na ye, lokola amipesi kati na kosala mosala oyo.

15 Mpe boye napesi epayi ya bato oyo litomba ya komibongisa bango moko engebene na mibeko na ngai.

16 Mpe nabulisi mpo na bango mabele oyo na mwa eleko moke, kino ngai, Nkolo, nakokamata ebongiseli mosusu mpo na bango, mpe nakotinda bango kokende uta na awa;

17 Mpe ngonga mpe mokolo yango eyebani epayi na bango te, yango wana tika ete basala likolo ya mabele oyo lokola soki bakowumela mibu mingi, mpe oyo ekozala mpo na bolamu na bango.

18 Tala, oyo ekozala ndakisa mpo na mosali na ngai Edward Partridge, na bisika nyonso, na Baeklezia nyonso.

19 Mpe moto nyonso oyo azali kapita ya sembo, moyengebene, mpe bwania akokota kati na bosepeli ya Nkolo na ye, mpe akosangola libula ya bomoi ya seko.

20 Solo, nalobi epayi na bino, nazali Yesu Klisto, oyo azali koya na lombangu, na ngonga oyo bozali kokanisa te. Kutu bongo. Amene.

Bimisa na lokasa