Makomi
Malongi mpe Mayokani 53


Eteni 53

Emoniseli epesami na nzela ya Profeta Joseph Smith epayi ya Algernon Sidney Gilbert, na Kirtland, Ohio, na mokolo ya 8, sanza ya motoba ya mobu 1831. Na bosenga ya Sidney Gilbert, Profeta alukaki koyeba uta na Nkolo mpo na oyo etali mosala mpe libiangi ya Ndeko mondimi Gilbert kati na Eklezia.

1–3, Libiangi mpe boponami ya Sidney Gilbert kati na Eklezia ezali ya kokulisama lokola mpaka; 4–7, Asengeli lisusu kosala lokola mosali ya episikopo.

1 Tala, nalobi epayi na yo, mosali na ngai Sidney Gilbert, ete nayoki sambo na yo; mpe obelelaki ngai mpo ete eyebana epayi na yo, uta na Nkolo Nzambe na yo, mpo na oyo etali libiangi mpe boponami na yo kati na eklezia, oyo ngai Nkolo, natelemisaki na mikolo oyo ya nsuka.

2 Tala, ngai Nkolo, oyo babakaki na ekulusu mpo na masumu ya mokili, napesi epayi yo motindo ete osengeli kotika mokili.

3 Kamata likolo na yo bokuli na ngai, kutu boye ya mpaka, mpo na koteya bondimi mpe boyamboli mpe bolimbisi ya masumu, engebene na liloba na ngai, mpe zwa Molimo Mosantu na kotiama maboko;

4 Mpe lisusu zala mosali mpo na eklezia oyo na esika ekopesama epayi na yo na episikopo, engebene na mitindo oyo ekopesama awa nsima.

5 Mpe lisusu, solo nalobi epayi na yo, okokende mobembo na yo elongo na basali na ngai Joseph Smith Mwana, mpe Sidney Rigdon.

6 Tala, oyo ezali makuli ya yambo oyo osengeli kozwa; mpe oyo matikali ekoyebisama na ntango ekoya, engebene na mosala na yo kati na elanga na ngai ya vinyo.

7 Mpe lisusu, nalingi boyekola ete akobikisama bobele oyo nde akotia molende kino nsuka. Kutu bongo. Amene.

Bimisa na lokasa