Makomi
Malongi mpe Mayokani 56


Eteni 56

Emoniseli epesami na nzela ya Profeta Joseph Smith, na Kirtland, Ohio, na mokolo ya 15, sanza ya motoba ya mobu 1831. Emoniseli oyo ezali kopesa etumbu na EzraThayre mpo na kozangaka kotosa emoniseli moko ya liboso (“motindo” yango ezwami na molongo ya 8), oyo Joseph Smith azwaki mpo na ye, kolakisaka ye mpo na oyo etali misala na ye na ebokolelo ya Frederick G. Williams, wapi azalaki kofanda. Emoniseli oyo elandi ezali lisusu kolongola libiangi ya Thayre ya kosala mobebmbo na Missouri elongo na Thomas B. Marsh (tala eteni 52:22).

1–2, Basantu basengeli kokamata ekulusu na bango mpe kolanda Nkolo mpo na kozwa lobiko; 3–13, Nkolo nde apesaka mibeko mpe alongolaka yango, mpe baoyo batosaka te bakobwakama; 14–17, Lisuma epayi ya bato na bozwi oyo basalisaka babola te, mpe lisuma epayi ya babola baoyo kani mitema mibukama te; 18–20, Bapambolami ezali babola oyo bazali peto na mitema, mpo bakosangola libula ya mabele.

1 Boyoka, O bino bato oyo botatolaka nkombo na ngai, elobi Nkolo Nzambe na bino; mpo tala, nkanda na ngai epeli na batomboki, mpe basengeli koyeba loboko na ngai mpe bosiliki na ngai, na mokolo nakobimela bango mpe mokolo ya nkele na ngai likolo ya bikolo.

2 Mpe ye oyo akokamata ekulusu na ye mpe kolanda ngai te, mpe akobomba mitindo na ngai te, se ye moko wana akobikisama te.

3 Tala, ngai, Nkolo, napesi motindo; mpe ye oyo akolinga kotosa te akokatama na ntango esengeli ya ngai moko, wana esili ngai kopesa motindo mpe motindo yango mobukami.

4 Yango wana ngai, Nkolo, nde natindaka mpe nalongolaka mibeko, lokola ebongeli ngai malamu; nyonso oyo ekoyanolama likolo ya mitu mituya batomboki, elobi Nkolo.

5 Yango wana, nalongoli motindo oyo epesamaki epayi ya basali na ngai Thomas B. Marsh mpe Ezra Thayre, mpe napesi motindo ya sika epayi ya mosali na ngai Thomas, ete asengeli kokende mobembo na ye na lombangu na mboka ya Missouri, mpe mosali na ngai Selah J. Griffin akokende lisusu elongo na ye.

6 Mpo tala, nalongoli motindo oyo epesamaki epayi ya basali na ngai Selah J. Griffin mpe Newel Knight, na ntina ya matoyi mangongi ya bato na ngai oyo bazali na Thompson, mpe na ntina ya botomboki na bango.

7 Yango wana, tika ete mosali na ngai Newel Knight atikala elongo na bango, mpe mingi lokola balingi kokende bakoki kokende, baoyo bazali na mawa liboso na ngai, mpe bakokambama na ye na mboka oyo naponaki.

8 Mpe lisusu, solo nalobi epayi na bino, ete mosali na ngai Ezra Thayre asengeli koyambola uta na lolendo na ye, mpe na nkundu na ye, mpe kotosa motindo ya yambo oyo napesaki ye mpo na oyo etali esika epayi wapi afandi.

9 Mpe soki akosala oyo, lokola bokabwani esengeli kotiama na mboka te, akotikala se ya koponama mpo na kokende na mboka ya Missouri;

10 Soki bongo te asengeli kozwa mosolo oyo apesaki, mpe kotika esika yango, mpe asengeli kokatama uta na eklezia na ngai, elobi Nkolo Nzambe na bibele;

11 Mpe atako lola mpe mabele maleki, maloba oyo makoleka te, kasi makokokisama.

12 Mpe soki mosali na ngai Joseph Smith Mwana, asengeli mpenza kofuta mosolo yango, tala, ngai, Nkolo, nakofuta yango epayi na ye lisusu na mboka ya Missouri, ete baoyo wana uta na nani asengeli kozwa bakoka kopesama lifuta engebene na oyo wana basali;

13 Mpo bakozwa engebene na oyo wana basali, kutu na mboka ya bosangoli libula na bango.

14 Tala, boye elobi Nkolo epayi ya bato na ngai—bozali na makambo mingi ya kosala mpe ya koyambolela; mpo tala, masumu na bino masili komata kino epayi na ngai, mpe elimbisami te, mpo ete bozali koluka komipesa toli na banzela na bino moko.

15 Mpe mitema na bino misepelisami te. Mpe bozali kotosa bosolo te, kasi bozali koyoka elengi kati na oyo ezangi bosembo.

16 Lisuma epayi na bino bato na bozwi, baoyo bopesaka biloko na bino na babola te, mpo bozwi na bino ekoguga milimo na bino; mpe oyo ekozala boleli na bino na mokolo ya bobimeli, mpe ya bosambisi, mpe ya bosiliki: Eleko ya kobuka eleki, elanga esili, mpe molimo na ngai mobikisami te!

17 Lisuma epayi na bino bato na bobola, baoyo mitema mibukama te, baoyo milimo ezali na mawa te, baoyo mabumu matondaka te, mpe baoyo maboko matikaka kokita te uta na kotiama likolo ya biloko ya bato mosusu, baoyo miso etonda na lokoso, mpe baoyo basalaka na maboko na bango moko te!

18 Kasi bapambolami ezali babola oyo bazali peto na motema, baoyo kani mitema mibukama, mpe milimo ezali na mawa, mpo bakomona bokonzi ya Nzambe koyaka na nguya mpe nkembo monene mpo na bokangolami na bango; mpo mafuta ya mabele ekozala ya bango.

19 Mpo tala, Nkolo akoya, mpe lifuta na ye ekozala na ye, mpe akopesa mbano na moto nyonso, mpe babola bakosepela;

20 Mpe bankola na bango ekosangola libula ya mabele uta nkola na nkola, mpo na libela na libela. Mpe sikawa natie nsuka ya koloba na bino. Kutu bongo. Amene.

Bimisa na lokasa