Makomi
Malongi mpe Mayokani 5


Eteni 5

Emoniseli epesami na nzela ya Profeta Joseph Smith, na Harmony, Pennsylvania, na sanza ya misato ya mobu 1829, na bosenga ya Martin Harris.

1–10, Nkola oyo ekozwa liloba ya Nkolo na nzela ya Joseph Smith; 11–18, Banzeneneke Misato bakotatola na ntina ya Buku ya Mormon; 19–20, Liloba ya Nkolo ekomonisama solo lokola na ntango ya kala; 21–35, Martin Harris akoki koyambola mpe kozala moko ya banzeneneke.

1 Tala, na lobi epayi na bino, ete lokola mosali na ngai Martin Harris asengaki elembo uta na loboko na ngai, ete yo, mosali na ngai Joseph Smith Mwana, ozali na bapalaki oyo osakolaki mpe otatolaki ete ozwaki yango uta na ngai;

2 Mpe sikawa, tala, oyo nde osengeli koloba epayi na ye—ye oyo alobaki na yo, alobi epayi na yo: Ngai, Nkolo, nazali Nzambe, mpe napesaki makambo oyo epayi na yo, mosali na ngai Joseph Smith Mwana, mpe natindi yo ete osengeli kotelema lokola nzeneneke ya makambo oyo;

3 Mpe nasalaki ete okoka kokota kati na liyokani elongo na ngai, ete okoka te kolakisa yango longola se na bato oyo epayi kani natindaki yo; mpe ozali na nguya likolo na bango te longola se soki napesi yo yango.

4 Mpe ozali na likabo ya kobongola bapalaki; mpe oyo ezali likabo ya yambo oyo napesi epayi na yo; mpe nasili kopesa motindo ete okoki te kokanisa kozwa likabo mosusu kino ekokisama ntina na ngai mpo na oyo; mpo nakopesa yo likabo mosusu te kino ekosila.

5 Solo, nalobi epayi na bino, ete mawa ekoya likolo ya bafandi ya mabele soki bakoyoka maloba na ngai te;

6 Mpo nsima awa okokulisama mpe okokende mpe okosakola maloba na ngai epayi ya bana ya bato.

7 Tala, soki balingi kondima maloba na ngai te, bakondima yo te, mosali na ngai Joseph, soki ekokaki kozala bongo ete olakisa bango biloko nyonso oyo napesaki epayi na yo.

8 O, nkola oyo ezanga bondimi mpe ya matoyi mangongi—nkanda na ngai ezali ya kopela na bango.

9 Tala, solo nalobi epayi na yo, nabombaki biloko oyo wana napesaki epayi na yo, mosali na ngai Joseph, mpo na ntina ya bwania na ngai, mpe eyebana epayi ya nkola ekoya nsima;

10 Kasi nkola oyo ekozwa liloba na ngai na nzela na yo;

11 Mpe likolo ya litatoli na yo, litatoli ya bato misato kati na basali na ngai, baye nakobianga mpe nakokulisa, epayi kani nakolakisa makambo oyo, mpe bakokende na maloba oyo epesami na nzela na yo.

12 Iyo, bakoyeba na ntembe te ete makambo oyo ezali solo, mpo uta na lola nde ekoyebisa ngai yango epayi na bango.

13 Nakopesa bango nguya ete bakoka kotala mpe komona makambo oyo lokola ezali;

14 Mpe nakopesa nguya oyo epayi ya moto mosusu te, nguya ya kozwa litatoli se moko oyo na kati ya nkola oyo, na ntango oyo ya ebandeli wapi eklezia na ngai ebandi kotelema mpe kobima uta na esobe—kongenga lokola sanza, kitoko lokola moi, mpe nsomo lokola mampinga kotambolaka na babendele.

15 Mpe litatoli ya banzeneneke Misato ya liloba na ngai nde ngai nakotinda.

16 Mpe tala, nyonso oyo bakondima maloba na ngai, bango nde nakoya kotala na mamonisi ya Molimo na ngai; mpe bakobotama na ngai, kutu na mai mpe na Molimo—

17 Mpe bosengeli naino kozela ntango moke, mpo bokulisami naino te—

18 Mpe litatoli na bango ekobima lisusu kino na bokwei ya nkola oyo soki bayeisi mitema na bango makasi na bango;

19 Mpo fimbo moko ya bonielengeni ekokweya na kati ya bafandi ya mabele, mpe ekokoba kosopana mbala na mbala, soki bayamboli te, kino mabele makotikala mpamba, mpe bafandi na yango bakozikisama mpe kobebisama nie na bongengi ya boyei na ngai.

20 Tala, nayebisi yo makambo oyo, kutu lokola mpe nayebisaki bato na ntina ya bobebisami ya Yelusaleme; mpe liloba na ngai ekomonisama solo na ntango oyo lokola emonanaki solo kino sikawa.

21 Mpe sikawa natindi yo, mosali na ngai Joseph, koyambola mpe kotambola semba mingi koleka liboso na ngai, mpe komipesa lisusu te na maloba ya kondimisama na bato;

22 Mpe ete ozala ngwi na kobombaka mitindo oyo natindaki yo; mpe soki osali oyo, tala napesi epayi na yo bomoi ya seko, ata soki osengeli kobomama.

23 Mpe sikawa, lisusu, nalobi epayi na yo, mosali na ngai Joseph, mpo na oyo etali moto oyo azali na mposa ya litatoli—

24 Tala, nalobi epayi na ye, azali komitombwama mpe azali komikitisa te na lolenge ekoki liboso na ngai; kasi soki akongumbama liboso na ngai, mpe amikitisi kati na losambo ya nguya mpe bondimi, na bosolo ya motema na ye, bongo nakopesa epayi na ye libaku ya komona biloko oyo azali na mposa ya komona.

25 Mpe nsima nde akoloba epayi ya bato ya nkola oyo: Tala, namoni biloko oyo Nkolo alakisaki epayi ya Joseph Smith Mwana, mpe nayebi na ntembe te ete ezali solo, mpo nasili komona yango, mpo elakisamaki epayi na ngai na nguya ya Nzambe mpe ya moto te.

26 Mpe ngai Nkolo natindi ye, mosali na ngai Martin Harris, ete alobela bango lisusu te mpo na oyo etali biloko oyo, longola se koloba: Namonaki yango, mpe elakisamaki epayi na ngai na nguya ya Nzambe; mpe oyo ezali maloba oyo akoloba.

27 Kasi soki awangani oyo akobuka liyokani oyo asalaki liboso na ngai, mpe tala, akokatama etumbu.

28 Mpe sikawa, longola se soki amikitisi mpe andimi epayi na ngai makambo asalaki oyo ezali mabe, mpe asali liyokani na ngai ete akobomba mitindo na ngai, mpe asaleli bondimi na ngai, tala, nalobi epayi na ye, akoki kozwa libaku ya komona makambo oyo ya lolenge oyo te, mpo nakoki kopesa ye libaku ya komona biloko oyo nalobaki te.

29 Mpe soki ezali boye, natindi yo, Joseph mosali na ngai, ete okoloba epayi na ye, ete akosala eloko moko lisusu te, mpe atungisa mpe lisusu mpo na oyo etali likambo oyo te.

30 Mpe soki ezali boye, tala, nalobi epayi na yo Joseph, ntango okobongola bankasa mingi koleka osengeli kotika mpo na eleko moko, kutu kino nakotinda yo lisusu; bongo okokoka kobongola lisusu.

31 Mpe longola se soki osali oyo, tala, okozala na likabo lisusu te, mpe nakolongola biloko oyo napesaki yo.

32 Mpe sikawa, mpo namoni na mosika mitambo oyo etiami mpo na koboma yo, iyo, namoni na mosika ete soki mosali na ngai Martin Harris amikitisi te mpe azwi litatoli te uta na maboko na ngai, ete akokweya kati na bobuki mibeko;

33 Mpe bazali mingi baoyo babatami mpo na kobebisa yo uta na etando ya mabele; mpe mpo na ntina oyo, mpo ete mikolo na yo mikoka koyeisama milai, napesaki mitindo oyo epayi na yo.

34 Iyo, mpo na ntina oyo nalobaki: Tika, mpe telema se wana kino nakotinda yo, mpe nakopesa yo makoki na oyo kani okoki kokokisa likambo oyo natindaki yo.

35 Mpe soki ozali sembo na kobombaka mitindo na ngai, okotombolama likolo na mokolo ya nsuka. Amene.

Bimisa na lokasa