Makomi
Malongi mpe Mayokani 61


Eteni 61

Emoniseli epesami na nzela ya Profeta Joseph Smith, na libongo ya Ebale ya Missouri, na Libunu ya McIlwaine’s Bend, na mokolo na mokolo ya 12, sanza ya mwambe ya mobu 1831. Na nzela ya kozonga na bango uta na mobembo na Kirtland, Profeta mpe bampaka zomi bakendaki botioli na Ebale ya Missouri kati na bwato. Na mokolo ya misato ya mobembo, bazwanaki na makama mingi. Mpaka William W. Phelps, na nzela ya limoni moko na nse ya moi ya nzanga, amonaki mobebisi konana na nguya likolo ya etando ya mai.

1–12, Nkolo asili kobimisa mokano ya bobebisami boike likolo ya mai; 13–22, Mai malakelamaki mabe na Yoane, mpe mobebisi ananaka likolo ya etando na yango; 23–29, Boko bato bazali na nguya ya kopamela mai; 30–35, Bampaka basengeli kokende mobembo mibale na mibale mpe koteya nsango malamu; 36–39, Basengeli komilengela mpo na boyei ya Mwana ya Moto.

1 Tala, mpe yoka mongongo na ye oyo azali na nguya nyonso, oyo azali uta libela na libela, kutu Alifa mpe Omega, ebandeli mpe nsuka.

2 Tala, solo boye elobi Nkolo epayi na bino, O bino bampaka ya eklezia na ngai, baoyo basangani likolo ya esika oyo, baye masumu elimbisami bino sikawa, mpo ngai, Nkolo, nalimbisaka masumu, mpe natonda na boboto epayi na baoyo batubelaka masumu na bango na mitema ya bomikitisi;

3 Kasi solo nalobi epayi na bino, ete ezali na ntina te ete lingomba mobimba oyo ya bampaka na ngai bakende na lombangu likolo ya mai, wana ezali bafandi ya ngambo na ngambo kowa kati na bozangi boyambi.

4 Nzokande, napesaki yangna nzela kaka mpo ete bokoka kopesa litatoli; tala, makama ezali mingi likolo ya mai, mpe mingi mingi mpenza awa nsima;

5 Mpo ngai, Nkolo na nkanda na ngai nasili kobimisa mokano ya bobebisami boike na nzela ya mai; iyo, mpe mingi mpenza likolo ya mai oyo.

6 Nzokande, mosuni nyonso ezali na loboko na ngai, mpe ye oyo azali sembo na kati na bino akokufa te na nzela ya mai.

7 Yango wana, elongobani ete mosali na ngai Sidney Gilbert mpe mosali na ngai William W. Phelps babanda na lombangu etinda mpe mosala na bango.

8 Nzokande, nakokaki kopesa nzela te ete bokabwana kino bopesamaki etumbu mpo na masumu na bino nyonso, ete bokoka kozala moko, ete bokoka te kowa kati na nkuna;

9 Kasi sikawa, solo nalobi, ebongi malamu mpo na ngai ete bokabwana. Yango wana tika ete basali na ngai Sidney Gilbert mpe William W. Phelps bakamata lingomba na bango ya yambo, mpe tika ete bakende mobembo na bango na lombangu mpo ete bakokisa etinda na bango, mpe na nzela ya bondimi bakolonga;

10 Mpe mbala mingi lokola bakozala sembo bakobatelama, mpe ngai Nkolo, nakozala elongo na bango.

11 Mpe tika ete montika mokamata oyo esengeli mpo na kolata.

12 Tika ete mosali na ngai Sidney Gilbert akamata oyo basengeli kozwa te elongo na ye, lokola ekolinga bino.

13 Mpe sikawa, tala, mpo na bolamu na bino napesi epayi na bino motindo moko na oyo etali makambo oyo; mpe ngai, Nkolo, nakoluka nayeba ntina elongo na bino lokola na bato na mikolo ya kala.

14 Tala, ngai Nkolo, na ebandeli napambolaki mai; kasi na mikolo ya nsuka, nalakelaki mai mabe, na monoko ya mosali na ngai Yoane.

15 Yango wana, mikolo ezali koya ete mosuni moko te ekozala na bokengi likolo ya mai.

16 Mpe ekolobama na mikolo mikoya ete moko te akoki komata na mboka ya Siona likolo ya mai, bobele ye oyo azali sembo kati na motema.

17 Mpe, lokola ngai, Nkolo, nalakelaki mboka mabe na ebandeli, ata bongo kutu na mikolo ya nsuka napambolaki yango, na ntango na yango, mpo ete basantu na ngai basalela, ete bakoka kolia mafuta na yango.

18 Mpe sikawa nazali kopesa bino motindo ete oyo nalobi epayi ya moko nalobi yango epayi ya nyonso, ete bokokebisa bandeko na bino bandimi mpo na oyo etali mai oyo, ete bakende mobembo likolo na yango te, mbele bondimi na bango ekweya mpe bakangama na mitambo;

19 Ngai Nkolo, nabimisi mobeko, mpe mobebisi azali konana likolo ya etando na yango, mpe nalongoli mobeko yango te.

20 Ngai, Nkolo, lobi nazalaki na nkanda epayi na bino, kasi lelo nkanda na ngai esili.

21 Yango wana, tika ete baoyo nalobelaki, baoyo basengeli kokende mobembo na bango na lombangu—lisusu nalobi epayi na bino, tika ete bakende mobembo na bango na lombangu.

22 Mpe ezali likambo mpo na ngai te, nsima ya ntango moke, soki ezali bongo ete bakokisi etinda na bango, soki bakei na nzela ya mai to na nzela ya mokili; tika ete oyo eyebisama epayi na bango engebene na motindo bakopona awa nsima.

23 Mpe sikawa, mpo na oyo etali basali na ngai Sidney Rigdon, Joseph Smith Mwana, mpe Oliver Cowdery, tika ete banana na mai te, longola se na nzela ya mongala, wana ezali bango kozonga bipayi na bango; to na maloba mosusu basengeli kozonga na mai te, longola se na nzela ya mongala.

24 Tala, ngai Nkolo, napesi nzela ya kokende mobembo mpo na basantu na ngai; mpe tala, oyo ezali nzela—ete esili bango kotika mongala bakende mobembo na nzela ya mokili, mbala mingi lokola batindami kokende mobembo mpe komata na mboka ya Siona;

25 Mpe basengeli kosala lokola bana ya Yisalaele, kotelemisaka biema nzela nzela.

26 Mpe, tala, motindo oyo bosengeli kopesa yango epayi ya bandeko na bino nyonso bandimi.

27 Nzokande, epayi na ye oyo nguya ya kopesa mibeko na mai, epayi na ye epesami mpe na Molimo nguya ya koyeba banzela na ye nyonso;

28 Yango wana, tika ete asala lokola Molimo ya Nzambe ya bomoi akotinda ye, ezala na mabele soki te na mai, lokola etikali se nguya na ngai ya kosala awa nsima.

29 Mpe epayi na bino nzela ya mobembo ya basantu ebimisami, soki te nzela mpo ete basantu ya ngambo ya Nkolo, bakende mobembo.

30 Mpe lisusu, solo nalobi epayi na bino ete, basali na ngai, Sidney Rigdon, Joseph Smith Mwana, mpe Oliver Cowdery, basengeli te kofungola minoko na bango kati na mangomba ya bato ya nkuna kino bakokoma na Cincinnati;

31 Mpe na esika wana bakotombola mingongo na bango epayi ya Nzambe na kotelemelaka bato wana, iyo, epayi na ye kani nkanda epeli na nkuna na bango, bato oyo bazali mpenza penepene na kokomela mpo na bobebisami.

32 Mpe uta na esika wana tika bango bakende mobembo na mangomba ya bandeko na bango bandimi, mpo misala na bango misengami kutu sikawa mingi na kati na bango koleka na mangomba ya bato ya nkuna.

33 Mpe sikawa, mpo na oyo etali montika, tika bango bakende mobembo mpe basakola liloba na kati ya mangomba ya bato ya nkuna, mbala mingi lokola ekopesama;

34 Mpe mbala mingi lokola basali oyo bakolongola bilamba na bango, mpe bakozala bazanga mbindo liboso na ngai.

35 Mpe tika ete bakende mobembo elongo, soki te mibale mibale, lokola emoni bango malamu, bobele tika mosali na ngai Reynolds Cahoon, mpe mosali na ngai Samuel H. Smith, na oyo kani nazali kosepela malamu, bakabwana te kino bakozonga epayi na bango, mpe oyo mpo na ntina ya bwania na ngai.

36 Mpe sikawa, solo nalobi epayi na bino, mpe oyo nalobi epayi ya moko, nalobi epayi ya nyonso, bozala na bosepeli malamu, bana bake; mpo nazali na katikati na bino, mpe natiki bino te;

37 Mpe mbala mingi lokola bosili komikitisa bino moko liboso na ngai, mapamboli ya bokonzi ezali ya bino.

38 Kanga nketo na bino mpe bozala ekenge mpe boyeba kosala nyonso na ndelo, na kozelaka boyei ya Mwana ya Moto, mpo azali koya na ngonga oyo bokokanisa te.

39 Bosambela ntango nyonso ete bokweya te na lisenginia, ete bokoka kotikala ngwi mokolo ya boyei na ye, ezala na bomoi soki te na kufa. Kutu bongo. Amene.

Bimisa na lokasa