Makomi
Malongi mpe Mayokani 65


Eteni 65

Emoniseli na ntina ya losambo epesami na nzela ya Profeta Joseph Smith, na Hiram, Ohio, na mokolo ya 30, sanza ya zomi ya mobu 1831.

1–2, Bafungola ya bokonzi ya Nzambe epesami epayi ya moto na mabele, mpe ntina ya nsango malamu ekolonga; 3–6, Bokonzi ya lola ya nkoto moko ya mibu ekoya mpe kokuta bokonzi ya Nzambe na mabele.

1 Yoka, mpe tala, mongongo moko lokola ya moto atindami na nse uta na likolo, oyo azali na makasi mpe na nguya, oyo kani ekobima liboso kino nsuka ya mabele, iyo, oyo kani mongongo mokeyi epayi ya bato ete—Bolengela nzela ya Nkolo, mpe bosembola nzela na ye.

2 Bafungola ya bokonzi ya Nzambe epesami epayi ya moto na mabele, mpe uta na esika wana nsango malamu ekotambola kino na nsuka ya mabele, lokola libanga oyo uta na ngomba oyo etimolamaki na maboko te etambolaki, kino etondisaki mabele mobimba.

3 Iyo, mongongo moko oyo ezali kobelela—Bolengela nzela ya Nkolo, bolengela elambo ya Mwana ya mpate, bobelema mpo na koyamba Mobali ya libala.

4 Bosambela Nkolo, bobelela nkombo na ye esantu, boyebanisa misala na ye ya kokamwa na kati ya bato.

5 Bobelela Nkolo, ete bokonzi na ye ekoka kopalangana likolo ya mabele, ete bafandi na yango bakoka koyamba yango, mpe bamilengela mpo na mikolo mikoya, na oyo wapi Mwana ya Moto akokita na nse uta na lola, wana alatisami na bongengi ya nkembo na ye, mpo na kokutana na bokonzi ya Nzambe boye botiami na mabele.

6 Yango wana, tika ete bokonzi ya Nzambe na mabele epalangana, ete bokonzi ya lola ekoka koya, ete yo, O Nzambe, okoka kokembelama na lola lokola mpe na mabele, ete banguna na yo bakonzama; mpo lokumu, nguya mpe nkembo ezali na yo, libela na libela. Amene.

Bimisa na lokasa