Makomi
Malongi mpe Mayokani 66


Eteni 66

Emoniseli epesami na nzela ya Profeta Joseph Smith, na Hiram, Ohio, na mokolo ya 29, sanza ya zomi ya mobu 1831 William E. McLellin asengaki Nkolo na bonkuku ayebisa na nzela ya Profeta eyano na mituna mitano, oyo eyebanaki te na Joseph Smith. Na bonsenga ya McLellin, Profeta alukaki koyeba uta na Nkolo mpe azwaki emoniseli oyo.

1–4, Liyokani ya libela ezali litondi ya nsango malamu; 5–8, Bampaka basengeli koteya, kotatola, mpe koluka ntina ya liloba elongo na bato ya mokili; 9–13, Kosalela kati na bosembo epesaka solo mpenza nzela ya kosangola libula ya bomoi ya seko.

1 Tala, boye elobi Nkolo epayi ya mosali na ngai William E. McLellin—Opambolami, mbala mingi lokola otikaki mabe na yo, mpe oyambaki bosolo na ngai, elobi Nkolo Mosikoli na yo, Mobikisi ya mokili, kutu ya mingi lokola bandimi na nkombo na ngai.

2 Solo nalobi epayi na yo, opambolami mpo oyambi liyokani na ngai ya libela, kutu litondi ya nsango malamu na ngai, oyo etindami liboso epayi ya bana ya bato, ete bakoka kozala na bomoi mpe bakomisama bakaboli ya nkembo oyo ekobimisama na mikolo ya nsuka, lokola ekomamaki na baprofeta mpe bapostolo na mikolo ya kala.

3 Solo nalobi epayi na yo, mosali na ngai William, ete ozali peto, kasi nyonso te; boye, yambola uta na makambo oyo ezali malamu te na miso na ngai, elobi Nkolo, mpo Nkolo akolakisa yango epayi na yo.

4 Mpe sikawa, solo, ngai, Nkolo, nakolakisa nini nalingi mpo na oyo etali yo, soki te nini oyo ezali bolingi na ngai mpo na oyo etali yo.

5 Tala, solo nalobi epayi na yo, ete ezali bolingi na ngai ete osakola nsango malamu na ngai uta ekolo na ekolo, mpe uta engumba na engumba, iyo, na bituka bina nzinganzinga wapi esakolami naino te.

6 Kowumela mikolo mingi te na esika oyo; kokende naino te kino na mboka ya Siona; kasi mbala mingi lokola okokoka, tinda lisungi; soki bongo te, kotia makanisi na yo na bozwi na yo te.

7 Kende na bikolo ya esti, pesa litatoli na bisika nyonso, epayi ya bato nyonso mpe na basinagoga, kolukaka ntina ya liloba elongo na bato.

8 Tika mosali na ngai Samuel H. Smith akende elongo na yo, mpe kotika ye te, mpe pesa ye malako na yo; mpe ye oyo azali sembo akoyeisama makasi na bisika nyonso; mpe ngai, Nkolo, nakokende elongo na yo.

9 Tia maboko na yo likolo ya bakoni, mpe bakobika. Kozonga te kino ngai, Nkolo, nakotinda yo. Zala na bompikiliki kati na mitungisi. Senga, mpe okozwa; beta, mpe ekofungolama mpo na yo.

10 Koluka te ete ozala na mikumba. Tika nyonso ezangi bosembo. Kosala ekobo te—moko lisenginia na oyo wapi otungisamaki.

11 Bomba maloba oyo, mpo ete ezali maloba ya solo mpe sembo; mpe osengeli kokokisa mosala na yo, mpe kopusa bato mingi na Siona elongo na banzembo ya bosepeli ya libela likolo ya mitu mituna bango.

12 Koba kati na makambo oyo kutu kino na nsuka, mpe okozwa motole ya bomoi ya seko na loboko ya mobali ya Tata na ngai, oyo atonda na ngolu mpe bosolo.

13 Solo, boye elobi Nkolo Nzambe na yo, Mosikoli na yo, kutu Yesu Klisto. Amene.

Bimisa na lokasa