Makomi
Malongi mpe Mayokani 67


Eteni 67

Emoniseli epesami na nzela ya Profeta Joseph Smith, na Hiram, Ohio, na ebandeli mpenza ya sanza ya zomi na moko ya mobu 1831. Ezalaki na libaku ya likita moko ya malamu koleka, mpe libaku ya kotala mpe kosala engebene na bobimisi ya buku ya bimoniseli oyo masilaki kozwama uta na Nkolo na nzela ya Profeta (tala moto ya eteni 1). William W. Phelps awutaki kala mingi kotia masini ya bonyatti buku ya Eklezia na Independence, Missouri. Likita yango ezwaki mokano ya kobimisa buku ya bimoniseli yango na Book of Commandments (Buku ya Mitindo) mpe kobimisa bakopi 10.000 (oyo nsima ekitisamaki na bakopi 3.000 likolo ya mikakatano oyo eyebanaki te). Mingi kati na bandeko mibali bandimi bapesaki litatoli monene ete bimoniseli oyo basangisaki na eleko wana mpo na bobimisi ya buku ezalaki mpenza solo, lokola etatolamaki na Molimo Mosantu oyo mosopanaki likolo na bango. Mambi ya Kala ya Joseph Smith esakoli ete nsima ya kozwa emoniseli yango eyebani lokola eteni 1 ezwaki, mwa masolo esalemaki mpo na oyo etali elobeli ezwami kati na bimoniseli yango. Emoniseli oyo eyaki kolanda.

1–3, Nkolo ayokaka sambo ya bampaka na Ye mpe akengelaka bango; 4–9, Atielaka kutu moto na bwania koleka ntembe ete akoka komekola ata mwa ndambo moke ya bimoniseli na Ye; 10–14, Bampaka ya sembo bakopesama bomoi na Molimo mpe bakomona elongi ya Nzambe.

1 Botala mpe boyoka, O bino bampaka ya eklezia na ngai, baoyo bosangani bino moko esika moko, baoyo kani sambo nayokaki, mpe baoyo kani mitema nayebi, mpe baoyo kani mposa emati liboso na ngai.

2 Tala mpe mona, miso na ngai ezali likolo na bino, mpe lola mpe mabele ezali na maboko na ngai, mpe bozwi ya boseko ngai nde napesaka.

3 Bosalaki makasi mpo na kondima ete bokozwa lipamboli oyo epesamaki epayi na bino; kasi tala, solo nalobi epayi na bino ete bobangi ezalaki na mitema na bino, mpe solo oyo ezali ntina bozwaki te.

4 Mpe sikawa ngai Nkolo napesi bino litatoli ya bosolo ya mitindo oyo etiami awa liboso na bino.

5 Miso na bino ezalaki likolo ya mosali na ngai Joseph Smith Mwana, mpe lokota na ye boyebaki, mpe bolembu na ye boyebaki; mpe bolukaki kati na mitema na bino boyebi mpo ete bokoka koloba malamu koleka lokota na ye; oyo boyebi yango lisusu.

6 Sikawa, boluka uta na Buku ya Mitindo, kutu emoniseli ya moke koleka oyo ezali na kati na yango, mpe bopona ye oyo azali bwania koleka nyonso na kati na bino;

7 To, soki ezali na moto moko na kati na bino oyo akokoka kosala emoniseli moko lokola yango, boye bolongisami na koloba ete boyebi te ete bimoniseli ezali solo;

8 Kasi soki bokoki kosala emoniseli moko lokola yango te, bozali kati na bokweisami soki botatoli te ete ezali solo.

9 Mpo boyebi ete bozangi bosembo kati na yango ezali te, mpe ete oyo ezali sembo ewuti na likolo, uta na Tata ya pole nyonso.

10 Mpe lisusu, solo nalobi na bino ete ezali litomba na bino, mpe elaka napesi epayi na bino baoyo bakulisami kati na mosala oyo, ete mbala mingi lokola bokomilongola uta na likunia mpe bobangi, mpe bomikitisi bino moko liboso na ngai mpo bozali na bomikitisi mingi te, elamba oyo ezipi elongi ekopasuka mpe bokomona ngai mpe bokoyeba ete nazali—na mayele ya mosuni te soki mpe ya mokili te, kasi na oyo ya molimo.

11 Mpo moto moko kati na mosuni naino amona Nzambe te, longola se soki epesami na Molimo ya Nzambe.

12 Moto ya mokili akoki mpe kotikala na miso ya Nzambe te, moko mpe engebene na mayele ya mosuni te.

13 Bozali na makoki ya kotikala na miso ya Nzambe sikawa te, ya kosala mosala ya banjelu mpe te; yango wana, bokoba kati na bompikiliki kino bokokoma bato babongi nie.

14 Botika mayele na bino mazonga nsima te; mpe ntango bozali balongobani, na ntango esengeli ya ngai moko, bokomona mpe bokoyeba nini oyo epesamaki likolo na bino na maboko ya mosali na ngai Joseph Smith Mwana. Amene.

Bimisa na lokasa