Makomi
Malongi mpe Mayokani 69


Eteni 69

Emoniseli epesami na nzela ya Profeta Joseph Smith, na Hiram, Ohio, na mokolo ya 11, sanza ya zomi na moko ya mobu 1831. Bosangisi ya bimoniseli yango ebongisamaki mpo ete buku ebima noki mpe endimamaki na likita monene ya mokolo ya 1 mpe ya 2 ya sanza ya zomi na moko. Na mokolo ya 3 ya sanza ya zomi na moko, emoniseli oyo emonisami awa na kati lokola eteni 133, mpe nsima ebiangamaki Bobakisi, ebakisamaki. Oliver Cowdery aponamaki mpo na komema makomi oyo ekomamaki na maboko, oyo ezalaki na bimoniseli mpe mitindo ya kosangisa na Independence, Missouri, ete minyatama na buku. Asengelaki lisusu kokamata elongo mosolo oyo misangisamaki mpo na kotonga Eklezia kati na Missouri. Emoniseli oyo etindi John Whitmer kosala mobembo mpe kokoma makambo etali mambi ya kala engebene na libiangi na ye lokola mokomi ya mambi ya kala ya Eklezia.

1–2, John Whitmer asengeli kokende elongo na Oliver Cowdery na Missouri; 3–8, Asengeli lisusu koteya mpe kosangisa, kokoma mpo na kobomba, mpe kokoma mambi ya kala.

1 Boyoka ngai, elobi Nkolo Nzambe na bino, mpo na ntina ya mosali na ngai Oliver Cowdery. Ezali bwania te epayi na ngai ete apesama mokumba ya mitindo mpe misolo oyo akomema na mboka ya Siona, longola se soki moto moko akeyi elongo na ye oyo akozala moto ya solo mpe ya sembo.

2 Yango wana, ngai Nkolo, nalingi ete mosali na ngai John Whitmer akende elongo na mosali na ngai Oliver Cowdery;

3 Mpe lisusu ete asengeli kokoba kokoma mpe kosangisa nkoma ya mambi ya kala ya makambo minene nyonso oyo akomona mpe akoyeba mpo na oyo etali eklezia na ngai;

4 Mpe lisusu ete azwa toli mpe lisungi uta na mosali na ngai Oliver Cowdery mpe basusu.

5 Mpe lisusu, basali na ngai oyo bapalangani na mabele basengeli kotinda mbando ya bokapita na bango na mboka ya Siona;

6 Mpo mboka ya Siona ekozala esika mokonzi mpe esika ya kozwa mpe kosala makambo oyo nyonso.

7 Nzokande, tika mosali na ngai John Whitmer akende mobembo mbala mingi uta esika na esika, mpe uta eklezia na eklezia, ete akoka na pete nyonso kozwa boyebi—

8 Koteyaka mpe kolimbolaka, kokomaka, koakisaka, koponaka, mpe kozwaka makambo nyonso oyo ekozala mpo na bolamu ya eklezia, mpe mpo na bokoli ya bankola ya komataka oyo ekokola na mboka ya Siona, mpo na kozwa yango uta nkola na nkola, libela na libela. Amene.

Bimisa na lokasa