Makomi
Malongi mpe Mayokani 72


Eteni 72

Emoniseli epesami na nzela ya Profeta Joseph Smith, na Kirtland, Ohio, na mokolo ya 4, sanza ya zomi na mibale ya mobu 1831. Bampaka ebele mpe bandimi ya eklezia basanganaki mpo na koyekola mosala na bango mpe mpo na kolendisama lisusu koleka na mateya ya Eklezia. Eteni oyo ezali bosangisi ya bimoniseli misato oyo ezwamaki na mokolo se moko. Milongo ya kotanga 1 kino ya 8 ezali koyebisa libiangi ya Newel K. Whitney lokola episikopo. Nsima na wana abiangamaki mpe akulisamaki, nsima na yango nde milongo ya kotanga 9 kino 23 mizwamaki, kopesaka nsango mosusu ya kobakisa mpo na ntomo ya episikopo. Nsima na wana, milongo 24 kino na 26 epesamaki, kopesaka malakisi etali bosangisi ya Siona.

1–8, Bampaka basengeli kotinda mbando ya bokapita na bango epayi ya episikopo; 9–15, Episikopo akobatela ebombelo mpe akobatela babola mpe bakeleli; 16–26, Baepisikopo basengeli kotatola bolongobani ya bampaka.

1 Tiaka bokebi, mpe yoka mongongo ya Nkolo, O bino baye boyangani bino moko esika moko, oyo bozali banganganzambe minene ya eklezia na ngai, epayi kani bokonzi mpe nguya esili kopesama.

2 Mpo solo boye elobi Nkolo, elongobani epayi na ngai mpo ete episikopo aponama mpo na bino, to uta na bino, mpo na eklezia na ndambo oyo elanga ya vinyo ya Nkolo.

3 Mpe solo bosali bwania na likambo oyo, mpo esengami na Nkolo, na loboko ya kapita nyonso, mpo na kopesa mbando ya bokapita na ye, ezala mpo na ntango mpe mpo na boseko.

4 Mpo ye oyo azali na bosembo mpe na bwania na ntango ya bomoi atangami lokola oyo alongobani mpo na kosangola libula ya bifandelo oyo elengelami mpo na ye na Tata na ngai.

5 Solo nalobi epayi na bino, bampaka ya eklezia na eteni oyo ya elanga na ngai ya vinyo basengeli kopesa mbando ya bokapita na bango epayi ya episikopo, oyo akoponama na ngai na eteni oyo ya elanga na ngai ya vinyo.

6 Makambo oyo esengeli kozwama kati na mokanda, oyo mosengeli kopesama na episikopo kati na Siona.

7 Mpe mosala ya episikopo ekoyebisama na mitindo oyo esili kopesama, mpe na kopona ya bato ya likita.

8 Mpe sikawa, solo nalobi epayi na bino, mosali na ngai Newel K. Whitney azali moto oyo asengeli kobiangama mpe kokulisama na nguya oyo. Oyo ezali bolingi ya Nkolo Nzambe na bino, Mosikoli na bino. Kutu bongo. Amene.

9 Liloba ya Nkolo, oyo libakisami na mobeko oyo epesamaki, mpo na ntina ya koyebisa mosala ya episikopo oyo asili kokulisama na eklezia na eteni oyo ya elanga ya vinyo, mosala oyo ezali solo mpenza oyo—

10 Kobatela ebombelo ya Nkolo; kozwa misolo ya eklezia na eteni oyo ya elanga ya vinyo;

11 Kokamata mbando ya bampaka lokola etindamaki liboso; mpe basalaki epayi na bango engebene na mposa na bango, baoyo basengeli kofuta mpo na oyo bazwi, mbala mingi lokola bazali na oyo bazali na yango mpo na kofuta;

12 Ete oyo ekoka lisusu kobulisama na bolamu ya eklezia, na babola mpe na bakeleli.

13 Mpe ye oyo azali na yango mpo na kofuta te, mokanda ya mbando yango mosengeli mokamatama mpe mopesama na episikopo ya Siona, oyo asengeli kofuta nyongo ya oyo Nkolo akotia kati na maboko na ye.

14 Mpe misala ya basembo oyo bazali kosala na makambo ya molimo, na kopesaka nsango malamu mpe biloko ya bokonzi ya likolo epayi ya eklezia, mpe epayi ya mokili, mikofuta nyongo epayi ya episikopo na Siona.

15 Boye yango ewuti na eklezia, mpo engebene na mobeko, oyo nyonso akoya na Siona asengeli kotika biloko nyonso liboso ya episikopo ya Siona;

16 Mpe sikawa, solo nalobi epayi na bino, ete lokola mpaka nyonso na eteni oyo ya elanga ya vinyo asengeli kopesa mbando ya bokapita na ye epayi ya episikopo na eteni oyo ya elanga ya vinyo—

17 Mokanda ewuti epayi ya mosambisi to epayi ya episikopo ya eteni oyo ya elanga ya vinyo, epayi ya episikopo na Siona, ekokomisa moto nyonso alongobani, mpe ekoyanola makambo nyonso, mpo na libula ya kosangola, mpe akoyambama lokola kapita ya bwania mpe lokola mosali ya sembo;

18 Soki bongo te akondimama na episikopo ya Siona te.

19 Mpe sikawa, solo nalobi epayi na bino, tika ete mpaka nyonso oyo akopesa mbando epayi ya episikopo ya eklezia na eteni oyo ya elanga ya vinyo atindama na eklezia to Baeklezia, epayi wapi azali kosala, mpo ete akoka kokoma ye moko mpe mbando na ye endimama na makambo nyonso.

20 Mpe lisusu, tika ete basali na ngai oyo baponami lokola bakapita na ntina ya makambo ya kokoma mikanda ya eklezia na ngai, bazali na lotomo ya kozwa lisungi na episikopo to baepisikopo na makambo nyonso—

21 Na ntina ete bimoniseli ekoka kobimisama na mikanda, mpe makende liboso kino nsuka ya mabele; ete bango lisusu bakoka kozwa misolo oyo kani ekoki kopesa litomba na eklezia na makambo nyonso;

22 Ete bango lisusu bakoka komilongobana na makambo nyonso, mpe batangama lokola bakapita ya bwania.

23 Mpe sikawa, tala, oyo esengeli kozala momekoli mpo na bitape nyonso ya eklezia na ngai oyo epalangani, na mabele wapi bikotongama. Mpe sikawa natie nsuka na maloba na ngai. Amene.

24 Maloba moke ya kobakisa na mibeko ya bokonzi, komemiaka bandimi ya eklezia—bango oyo babiangami na Molimo Mosantu komata na Siona, mpe bango oyo bapesami litomba ya komata na Siona—

25 Tika bango bamema epayi ya episikopo mokanda ya bampaka Misato ya eklezia epayi awuti, to mokanda moko uta na episikopo;

26 Soki bongo te ye oyo akomata na mboka ya Siona akotangama te lokola kapita ya bwania. Oyo ezali lisusu momekoli. Amene.

Bimisa na lokasa