Makomi
Malongi mpe Mayokani 81


Eteni 81

Emoniseli epesami na nzela ya Profeta Joseph Smith, na Hiram, Ohio, na mokolo ya 15, sanza ya misato ya mobu 1832. Frederick G. Williams abiangami kozala nganganzambe monene mpe moko mopesi toli kati na Bokambi ya Bonganganzambe ya Monene. Masolo ya makomi ya mambi ya kala elakisi ete ntango emoniseli oyo ezwamaki na sanza ya misato ya mobu 1832, emoniseli yango ebiangaki Jesse Gause na mosala ya mopesi toli ya Joseph Smith kati na Bokambi. Nzokande, ntango akokaki te kokoba kotambola na lolenge elongobani na boponami oyo, libiangi yango na bolandani elekisamaki na Frederick G. Williams. Emoniseli (ya sanza ya misato 1832) esengeli kotala yango lokola eteni ya kokende liboso mpo na bobongisami mpenza ya Bokambi ya Yambo, mingi mingi mpenza mpo na mosala ya mopesi toli kati na lisanga wana mpe kolimbolaka bolongobani ya boponi yango. Ndeko mobali Gause asalaki mpo na ntango moke kasi alongolamaki na Eklezia na sanza ya zomi na mibale ya mobu 1832. Ndeko mobali Williams akulisamaki na mosala oyo etangami awa likolo na mokolo ya 18, sanza ya misato ya mobu 1833.

1–2, Bafungola ya bokonzi ezali ntango nyonso na Bokambi ya Yambo; 3–7, Soki Frederick G. Williams azali sembo kati na mosala na ye, akozwa bomoi ya seko.

1 Solo, solo, nalobi epayi na yo mosali na ngai Frederick G. Williams: Yoka mongongo na ye oyo azali koloba, yoka liloba ya Nkolo Nzambe na yo, tiaka bokebi na libiangi oyo wapi obiangami, kutu kozala nganganzambe monene kati na eklezia na ngai, mpe moko mopesi toli ya mosali na ngai Joseph Smith Mwana;

2 Epayi ya oyo kani nasili kopesa bafungola ya bokonzi, oyo ezali ntango nyonso epayi ya Bokambi ya Bonganganzambe ya Monene:

3 Boye, solo nakitoli ye mpe nakopambola ye, mpe lisusu yo, mbala mingi lokola ozali sembo kati na toli, kati na mosala oyo nasili kopesa epayi na yo, ntango nyonso na losambo, na mongongo makasi to kati na motema na yo, liboso ya bato nyonso to na nkuku, lisusu na mosala na yo na kosakolaka nsango malamu kati na mboka ya baoyo bazali na bomoi, mpe na kati ya bandeko na yo bandimi.

4 Mpe na kosalaka makambo oyo okosala bolamu monene koleka epayi ya baninga bazalani na yo, mpe okosala mpo na kotombola nkembo ye oyo azali Nkolo na yo.

5 Yango wana, zala sembo; sala mosala epayi wapi nasili kobianga yo; salisa baoyo bazali kati na bolembu, tombola maboko oyo masili makasi, mpe lendisa mabolongo oyo ezali kotengatenga.

6 Mpe soki ozali sembo kino na nsuka okozwa motole ya bozangi kufa, mpe bomoi ya seko na bifandelo oyo nasili kolengela na ndako ya Tata na ngai.

7 Tala, mpe mona, oyo ezali maloba ya Alifa mpe Omega, kutu Yesu Klisto. Amene.

Bimisa na lokasa