Makomi
Malongi mpe Mayokani 86


Eteni 86

Emoniseli epesami na nzela ya Profeta Joseph Smith, na Kirtland, Ohio, na mokolo ya 6, sanza ya zomi na mibale ya mobu 1832. Emoniseli oyo ezwamaki wana ezalaki Profeta kotanga lisusu malamu mpe kobongisa emoniseli ya nkoma na maboko uta na bobongoli ya Biblia.

1–7, Nkolo apesi ndimbola ya lisese ya masangu mpe matiti mabe; 8–11, Alimboli mapamboli ya bonganganzambe epayi na baoyo wana bazali basangoli mabula na kotalaka mobeko engebene na mosuni.

1 Solo, boye elobi Nkolo epayi ya basali na ngai, mpo na oyo etali lisese ya masangu mpe matiti mabe:

2 Tala, solo nalobi, elanga ezalaki mokili, mpe bapostolo bazalaki baloni ya nkona;

3 Mpe esilaki bango kolala mpongi oyo azali monyokoli monene ya eklezia, mopengwi, mwasi ya pite, kutu Babiloni, oyo alangwisaka bikolo nyonso na vinyo ya nkele ya bondumba na ye, kati na mitema ya baoyo kani monguna, kutu Satana, afandi mpo na koyangela—tala aloni matiti mabe; boye, matiti mabe ekoteli masangu mpe matambwisi eklezia na ngai kati na esobe.

4 Kasi tala, na mikolo ya nsuka, kutu sikawa wana ezali Nkolo kobanda kobimisa liloba, mpe ntongo ezali se kokolaka mpe ezali naino pete—

5 Tala, solo nalobi epayi na bino, banjelu bazali koganga epayi ya Nkolo butu mpe moi, oyo basili kobelema mpe bazali kozela batindama mpo na kokita kobuka na elanga;

6 Kasi Nkolo alobeli bango, kopikola te matiti mabe wana ezali ntongo naino pete (mpo solo bondimi na bino ezali makasi te), mbele bobebisa masangu mpe lokola.

7 Boye, botika masangu mpe matiti mabe ekola elongo kino ntango mbuma esili kokomela mpenza mpo na kobuka; bongo bokopona yambo masangu uta na matiti mabe, mpe nsima ya kosangisa masangu, tala mpe mona, bokokangisa matiti mabe na mobimba, mpe elanga ekotikala mpo na kozikisama.

8 Boye, Nkolo alobi boye epayi na bino baoyo elongo na banani bonganganzambe ezali kokoba na nzela ya libota ya batata na bino—

9 Mpo bozali basangoli libula na kotalaka mobeko, engebene na mosuni, mpe bobombamaki uta na mokili elongo na Klisto kati na Nzambe—

10 Boye bomoi na bino mpe bonganganzambe etikali, mpe esengeli kotikala na nzela na bino mpe libota na bino kino na bozongisi ya makambo nyonso oyo elobamaki na minoko ya baprofeta basantu nyonso uta mokili ebanda.

11 Boye, bopambolami soki bokobi kati na bolamu na ngai, kozala pole mpo na baoyo bazali Bayuda-te, mpe na nzela ya bonganganzambe boye, kozala lokola mobikisi mpo na bato na ngai ya Yisalaele. Nkolo alobi yango. Amene.

Bimisa na lokasa