Makomi
Malongi mpe Mayokani 90


Eteni 90

Emoniseli epayi ya Profeta Joseph Smith, epesami na Kirtland, Ohio, na mokolo ya 8, sanza ya misato ya mobu 1833. Emoniseli oyo ezali eteni elandi na mosala ya kotiaka Bokambi ya Yambo (tala moto ya eteni 81); na nsuka na yango, bapesi toli oyo batangami awa bakulisamaki na mokolo ya 18, sanza ya misato ya mobu 1833.

1–5, Bafungola ya bokonzi epesami epayi ya Joseph Smith mpe na nzela na ye epayi ya Eklezia; 6–7, Sidney Rigdon mpe Frederick G. Williams basengeli kosalela kati na Bokambi ya Yambo; 8–11, Nsango malamu esengeli koteyama na ekolo ya Yisalaele, na baoyo bazali Bayuda-te, mpe na Bayuda, moto na moto koyokaka yango na monoko na ye moko; 12–18, Joseph Smith mpe bapesi toli na ye basengeli kotia Eklezia na molongo; 19–37, Bato ya ndenge na ndenge bapesami toli na Nkolo mpo na kotambola na alima mpe mpo na kosalela kati na bokonzi na Ye.

1 Boye elobi Nkolo, solo, solo nalobi epayi na yo mwana mobali na ngai, masumu na yo elimbisami yo, engebene na libondeli na yo, mpo sambo na yo mpe sambo ya bandeko na yo bandimi esili komata kino na matoyi na ngai.

2 Boye, opambolami uta sikawa kokende liboso yo oyo omemi bafungola ya bokonzi oyo epesami epayi na yo; bokonzi boye ezali koya mpo na mbala ya nsuka.

3 Solo nalobi epayi na yo, bafungola ya bokonzi boye makobotolama te uta epayi na yo, wana ezali yo naino na mokili oyo, to na mokili ekoya te;

4 Nzokande, na nzela na yo maloba kitoko ya molimo ekobimisama epayi na mosusu, iyo, kutu epayi ya eklezia.

5 Mpe bango nyonso oyo bazwi maloba kitoko ya Nzambe, tika batia bokebi na lolenge kani bazali kotala yango mbele matangama te lokola eloko moko ya mpamba, mpe na lolenge wana bamemama na bokwei te, batutisama mabaku mpe bakweya ntango bikumbaki bikokita, mpe mipepe mikopepa, mpe mvula ekokita, mpe ekobeta likolo ya ndako na bango.

6 Mpe lisusu, solo nalobi epayi ya bandeko na yo bandimi, Sidney Rigdon mpe Frederick G. Williams, masumu na bango malimbisami bango lisusu, mpe batangami lokola baoyo bakokani na yo na kozalaka na bafungola ya bokonzi boye ya nsuka;

7 Lokola mpe lisusu na nzela ya bokambi na yo ya bafungola ya eteyelo ya baprofeta, oyo natindaki ete ebongisama;

8 Ete na nzela wana bakoka kozala bato basili kobonga nie kati na mosala na bango mpo na lobiko ya Siona, mpe lobiko ya bikolo ya Yisalaele, mpe lobiko ya Bayuda-te, ya mingi lokola bakondima;

9 Ete na nzela ya bokambi na yo bakoka kozwa liloba, mpe na nzela ya bokambi na bango liloba ekende kino na nsuka ya mabele, liboso naino epayi ya baoyo bazali Bayuda-te, mpe nsima, tala, mpe mona bakobaluka epayi ya Bayuda.

10 Mpe nsima nde ekoya mokolo ntango loboko ya Nkolo ekomonisama na nguya mpo na kondimisa bikolo, bikolo ya bapaganu, ndako ya Yosefe, mpo na oyo etali nsango malamu ya lobiko na bango.

11 Mpo ekosalema na mokolo wana ete moto na moto akoyoka mobimba ya nsango malamu na monoko na ye moko, mpe na lokota na ye moko, na nzela na baye bakulisami na nguya oyo, na bokambami ya Molendisi, oyo esopami likolo na bango mpo na emoniseli ya Yesu Klisto.

12 Mpe sikawa, solo nalobi epayi na bino, napesi bino motindo ete bokoba kati na mosala mpe na bokambi.

13 Mpe ntango ekosilisa bino bobongoli ya baprofeta, bosengeli uta wana mpe kokende liboso koyangela likolo ya makambo ya eklezia mpe ya eteyelo;

14 Mpe mbala na mbala, lokola ekomonisama na Molendisi, bokozwa bimoniseli mpo na kofungola mibombamo ya bokonzi;

15 Mpe kotia Baeklezia na molongo, mpe koyekola mpe koluka kozwa boyebi, mpe komesenisa na buku nyonso ya malamu, mpe na nkota, na minoko, mpe na bato.

16 Mpe oyo ekozala mosala na bino mpe etinda na bino na bomoi na bino nyonso, koyangela kati na lisanga, mpe kotia na molongo makambo nyonso ya eklezia oyo mpe bokonzi boye.

17 Bozala na nsoni te, bobulunganisama mpe te; kasi bopamelama kati na bomilakisi na bino mpe lolendo na bino nyonso, mpo ememaka motambo likolo ya milimo na bino.

18 Botia molongo kati na bandako na bino; bopusa goigoi mpe bosoto mosika na bino.

19 Sikawa, solo nalobi epayi na yo, tika ete esika moko epesama, noki lokola ekoki kozwama, mpo na libota ya mopesi toli mpe mokomeli na yo, kutu Frederick G. Williams.

20 Mpe tika mosali na ngai ya mokolo, Joseph Smith Tata, akoba kotikala na libota na ye na esika wapi afandi sikawa, mpe tika ete etekama te kino monoko ya Nkolo elakisa yango.

21 Mpe tika mopesi toli na ngai, kutu Sidney Rigdon, atikala na esika wapi afandi sikawa kino monoko ya Nkolo elakisa yango.

22 Mpe tika episikopo aluka na molende kozwa ntoma moko, mpe tika ete azala mobali oyo azali na bozwi na ebombelo—moto ya Nzambe, mpe ya bondimi makasi—

23 Ete na nzela wana akoka kosilisa nyongo nyonso; ete ebombelo ya Nkolo ekoka kosambwa te liboso ya miso ya bato.

24 Boluka na molende, bosambela ntango nyonso, mpe bozala se na bondimi, mpe makambo nyonso ekosala elongo mpo na bolamu na bino, soki botamboli na alima mpe bokundoli liyokani na nzela ya oyo wapi boyokanaki moko na mosusu.

25 Tika ete mabota na bino mazala moke, mingi mingi mosali na ngai ya mokolo, Joseph Smith Tata, na kotalaka baoyo wana bazali bato ya mabota na bino te;

26 Ete biloko bina oyo epesami mpo na bino, mpo ete mosala na ngai mosalema, bikamatama uta na bino te mpe epesama na baoyo wana balongobani te—

27 Mpe na nzela wana bopekisama na kosalaka mpo na kokokisa makambo wana natindaki bino.

28 Mpe lisusu, solo nalobi epayi na bino, ezali bolingi na ngai ete mosali na ngai Vienna Jaques azwa mosolo ya kofuta mpo na ntina na ye, mpe amata likolo na mabele ya Siona;

29 Mpe ndambo etikali ya mosolo mokoka kobulisama epayi na ngai, mpe afutama na ntango esengeli ya ngai moko.

30 Solo nalobi epayi na bino, elongobani na miso na ngai ete amata likolo na mboka ya Siona, mpe azwa libula ya kosangola uta na maboko ya episikopo;

31 Ete ye mwasi akoka kofanda na esika wana na kimia mbala mingi lokola azali sembo, mpe akoka te kozala goigoi na mikolo na ye uta sikawa mpe kokende liboso.

32 Mpe tala, solo nalobi epayi na bino, ete bokokoma motindo oyo, mpe bokoloba epayi ya bandeko na bino bandimi na Siona, na mbote ya bolingo, ete nabiangaki bino lisusu koyangela likolo ya Siona na ntango oyo esengeli ya ngai moko.

33 Boye, tika bango batika kolembisa ngai na ntina ya likambo oyo.

34 Tala, nalobi epayi na bino ete bandeko na bino bandimi na Siona babandi koyambola, mpe banjelu basepeli na ntina na bango.

35 Nzokande, nazali kosepela malamu te na makambo mingi; mpe nazali kosepela malamu te na mosali na ngai William E. McLellin, na mosali na ngai Sidney Gilbert mpe te; mpe episikopo mpe lokola, mpe basusu bazali na makambo mingi mpo na oyo basengeli koyambola.

36 Kasi solo nalobi epayi na bino, ete ngai, Nkolo nakowela na Siona, mpe nakoluka kondimisa bamoko na ye ya makasi, mpe nakopesa ye etumbu kino akolonga mpe akozala peto liboso na ngai.

37 Mpo bakolongola ye uta na esika na ye te. Ngai, Nkolo, nalobi yango. Amene.

Bimisa na lokasa