Makomi
Malongi mpe Mayokani 95


Eteni 95

Emoniseli epesami na nzela ya Profeta Joseph Smith, na Kirtland, Ohio, na mokolo ya yambo, sanza ya motoba ya mobu 1833. Emoniseli oyo ezali kokoba ya malako uta na Nzambe mpo na kotonga ndako mpo na kokumbamela mpe kotangisa, mingi malamu mpenza kotonga ndako ya Nkolo (tala eteni 88:119–136).

1–6, Basantu bapesami etumbu mpo bamipesaki te na kotongaka ndako ya Nkolo; 7–10, Nkolo azali na mposa ya kosalela ndako na Ye mpo na kolatisa bato na Ye na nguya uta na likolo; 11–17, Ndako yango esengeli kobulisama lokola esika ya kokumbamela mpe lokola eteyelo ya Bapostolo.

1 Solo, boye elobi Nkolo epayi na bino baoyo nalingaka, mpe baoyo nalingaka mpe lisusu baoyo napesaka etumbu ete masumu na bango makoka kolimbisama, mpo na kopesaka bango etumbu nalengeli nzela mpo na bokangoli na bango na makambo nyonso uta na lisenginia, mpe nalingi bino mpenza—

2 Yango wana, bosengeli kopesama etumbu mpe kozala na nse ya mpamela na miso na ngai.

3 Mpo bosumukaki na ngai na lisumu ya koleka monene, mpo na makambo nyonso botiaki bokebi te na motindo monene, oyo napesaki epayi na bino mpo na oyo etali botongi ya ndako na ngai;

4 Mpo na mabongisi oyo wapi nazali kokana mpo na kolengela bapostolo na ngai kopapa elanga na ngai ya vinyo mpo na mbala ya nsuka, ete nakokisa mosala na ngai ya kokamwa, ete nasopa Molimo na ngai likolo ya mosuni moko moko—

5 Kasi tala, solo nalobi epayi na bino, ete ezali na mingi baoyo bakulisami na kati na bino, baoyo nabiangaki kasi bobele moke kati na bango baponami.

6 Baoyo baponami te basumukaki na lisumu monene, mpo bazali kotambola kati na molili na nzanga ya moi.

7 Mpe mpo na ntina oyo napesaki bino motindo moko ete bosengeli kobianga eyangani na bino na bato nyonso, ete kokila na bino mpe kolela na bino bikoka komata na matoyi ya Nkolo ya Saba, oyo na bolimboli elingi koloba, mokeli ya mokolo ya yambo, ebandeli mpe nsuka.

8 Iyo, solo nalobi epayi na bino, napesaki bino motindo ete bosengeli kotonga ndako, kati na ndako oyo nakani kolatisa na nguya baoyo wana naponaki na nguya uta na likolo;

9 Mpo oyo ezali elaka ya Tata epayi na bino; boye natindi bino botikala naino, kutu lokola etikalaki bapostolo na ngai na Yelusaleme.

10 Nzokande, basali na ngai basumukaki na lisumu monene mpenza; mpe boweli ebimaki na eteyelo ya baprofeta; oyo ezalaki likambo monene mpenza epayi na ngai, elobi Nkolo na bino; boye nabenganaki bango mpo ete bapesama etumbu.

11 Solo nalobi epayi na bino, ezali bolingi na ngai ete bosengeli kotonga ndako. Soki bobombi mitindo na ngai bokozala na nguya ya kotonga yango.

12 Soki bobombi mitindo na ngai te, bolingo ya Tata ekokoba kozala elongo na bino te, na boye bokotambola kati na molili.

13 Sikawa bwania ezali awa, mpe mayele ya Nkolo—tika ete ndako etongama, na lolenge ya mokili te, mpo napesaki bino mibeko te ete bozala na lolenge ya mokili;

14 Boye, tika ete etongama na lolenge oyo nakolakisa epayi ya Misato na kati na bino, baoyo bosengeli kopona mpe kobulisa na nguya oyo.

15 Mpe lomeko na yango ekozala mapeko ntuku mitano na mitano na monene, mpe tika ete ezala mapeko ntuku motoba na mitano na molai, kati na balasani ya kati na yango.

16 Mpe tika ete ndambo ya nse ya balasani ya kati ebulisama mpo na ngai mpo na mabonza na bino ya elambo, mpe mpo na mateya na bino, mpe mpo na bokili na bino, mpe mpo na losambo na bino, mpe mpo na komonisa mposa na bino esantu koleka epayi na ngai, elobi Nkolo.

17 Mpe tika ete ndambo ya likolo ya balasani ya kati ebulisama na ngai mpo na botomboli ya eteyelo ya bapostolo na ngai, elobi Mwana Ahmana; to, na maloba mosusu, Alifa; to, na maloba mosusu, Omega; kutu Yesu Klisto Nkolo na bino. Amene.

Bimisa na lokasa