Makomi
Malongi mpe Mayokani 99


Eteni 99

Emoniseli epesami na nzela ya Profeta Joseph Smith epayi ya John Murdock, na mokolo ya 29, sanza ya mwambe ya mobu 1832, na Hiram, Ohio. Mobu moko koleka, John Murdock azalaki koteya nsango malamu ntango bana na ye—bitike ya mama nsima ya liwa ya mwasi na ye, Julia Clapp, na sanza ya minei 1831—azalaki kofanda na mabota mosusu na Ohio.

1–8, John Murdock abiangami kosakola nsango malamu, mpe baoyo wana bakoyamba ye bayambi Nkolo mpe bakozwa boboto.

1 Tala, boye elobi Nkolo epayi ya mosali na ngai John Murdock—obiangami kokende na bikolo ya esti uta ndako na ndako, uta mboka na mboka, mpe uta engumba na engumba, kosakola nsango malamu na ngai ya libela epayi ya bafandi na yango, na katikati ya monyokoli mpe nkuna.

2 Mpe oyo akoyamba yo ayambi ngai; mpe okozwa nguya ya kosakola liloba na ngai na kolakisaka nguya Molimo Mosantu na ngai.

3 Mpe oyo akoyamba yo lokola mwana moke, ayambi bokonzi na ngai; mpe bapambolami, mpo bakozwa boboto.

4 Mpe oyo nyonso akoboya yo akoboyama na Tata na ngai mpe ndako na ye; mpe okosukola makolo na yo liboso na bango lokola litatoli mpo na bango.

5 Mpe tala, mpe mona, nazali koya na lombangu mpo na kosambisa, kondimisa nyonso mpo na misala na bango mizanga bonzambe oyo basalaki na ngai, lokola ekomami na ntina na ngai kati na buku ya makomi.

6 Mpe sikawa, solo nalobi epayi na yo, ete elongobani te ete okende kino bana na yo basungama na oyo bazali kozanga, mpe batindama na bolamu nyonso epayi ya episikopo ya Siona.

7 Mpe nsima ya mwa mibu, soki ezali mposa na yo epayi na ngai, okoki lisusu komata likolo na mboka ya malamu, mpo na kozwa libula na yo ya kosangola;

8 Soki bongo te osengeli kokoba kosakola nsango malamu na ngai kino okokamatama. Amene.

Bimisa na lokasa