Makomi
Malongi mpe Mayokani 9


Eteni 9

Emoniseli epesami na nzela ya Profeta Joseph Smith epayi ya Oliver Cowdery, na Harmony, Pennsylvania, na sanza ya minei ya mobu 1829. Oliver atindami kozala na bompikiliki mpe atindami kozala na esengo ya kokoma, mpo na ntango oyo, na nse ya etangeli ya mobongoli, na esika ya komeka kobongola.

1–6, Masolo ya makomi mosusu ya kala ezali naino ya kobongola; 7–14, Buku ya Mormon ebongolami na nzela ya boyekoli mpe na nzela ya bondimami uta na molimo.

1 Tala, nalobi epayi na yo, mwana mobali na ngai, ete lokola obongolaki te engebene na oyo ozalaki na yango mposa uta na ngai, mpe obandaki lisusu kokoma mpo na mosali na ngai Joseph Smith Mwana, atako bongo nalingi ete okoba kino okosilisa lisolo ya makomi oyo napesaki epayi na ye.

2 Mpe nsima, tala, nazali na masolo ya makomi mosusu, oyo nakopesa yo nguya mpo ete okoka kosunga mpo na kobongola.

3 Zala na bompikiliki, mwana mobali na ngai, mpo ezali bwania epayi na ngai, mpe elongobani te ete okoka kobongola na ntango oyo.

4 Tala, mosala oyo obiangami kosala ezali ya kokoma mpo na mosali na ngai Joseph.

5 Mpe, tala, ezali mpo okobaki te lokola obandaki, ntango obandaki kobongola, ete na longolaki litomba oyo uta na yo.

6 Koyima-yima te, mwana mobali na ngai, mpo ezali bwania epayi na ngai ete nasala na yo lolenge wana.

7 Tala, ososolaki te; okanisaki ete nakopesa litomba yango epayi na yo, ntango ozwaki te libanzo ete longola se soki osengi ngai.

8 Kasi, tala, nalobi epayi na yo, ete osengeli koyekola yango na mayele na yo; nsima osengeli kosenga ngai soki ezali malamu, mpe soki ezali malamu nakosala ete oyoka ntolo na yo kopela moto kati na yo; boye, okoyoka ete ezali malamu.

9 Kasi soki ezali malamu te okoyoka bongo te, kasi okoyoka bolembu ya bozangi makanisi boye ekosala ete obosana eloko oyo ezali malamu te; boye, okoki te kokoma oyo ezali bule longola se soki epesameli yo uta na ngai.

10 Sikawa, soki oyebaki oyo olingaki kobongola; nzokande, elongobani te ete obongola sikawa.

11 Tala, elongobanaki ntango obandaki kobongola; kasi obangaki, mpe ntango esili koleka, mpe elongobani te sikawa;

12 Mpo, emoni yo te ete napesaki bokasi ekoki epayi ya mosali na ngai Joseph, na nzela oyo ekoki kosembolama? Mpe nakweisi moto moko te kati na bino.

13 Sala eloko oyo natindaki yo, mpe okofuluka. Zala sembo, mpe komitika na masenginia te.

14 Telema ngwi kati na mosala oyo wapi nabiangaki yo, mpe nsuki moko te ya moto na yo ekobunga, mpe okotombwama na mokolo ya nsuka. Amene.

Bimisa na lokasa