2010–2019
Boya, Bino Banso Bana Babali ya Nzambe
Sánzá ya mínei 2013


19:25

Boya, Bino Banso Bana Babali ya Nzambe

Tika moko na mko na biso aluka makomi na etingia, asala mwango ya bomoi bwa ye na ntina, mpe ateya bosolo elongo na litatoli, mpe asalela Nkolo na bolingo.

Mbala mibale mobu nyonso Nganda ya Likita Linene esali lokola koloba na biso, na mongongo ya kondimisa, “Boya, bino banso bana babali ba Nzambe oyo bazwi bonganganzambe.”1 Ezali na molimo moko songolo oyo ekopanzana na liyangani ya bonganganzambe ya Eklezia.

Mpokwa ya lelo ezali na bankoto mingi ya motango mwa biso na mokili mobimba oyo bazali kosala lokola bamisionele ya Ye. Lokola nalobaki na nsango ya ngai ntongo eye, sikawa tozali na bamisionele 63.000 na elanga, elongo na bankoto mosusu oyo bazali kozela mpo na kokota na nganda ya boyekoli ya bamisionele to mikanda na bango ya kosengela miso mizali kotala sikawa. Tolingi mpe toluli baye bazali na bolingi mpe motema likolo mpo na kosala.

Makomi masantu makwi esakola moko te ebongi mingi, mokumba moko te ekangi mingi, lilako moko te ezali ya semba koleka motindo mopesami na Nkolo mosekwi ntango abimelaki na Galilai bayekoli zomi na moko. Elobaki Ye:

“Boye bokenda kojalisa bayekoli na mabota yonso, kobatisa bango nkombo na Tata, mpe na Mwana, mpe na Molimo Mosantu:

“Kolakisa mpe bango ete batosa yango esili ngai kolaka bino. Mpe tala, ngai najali na bino elongo mikolo yonso kino nsuka na ekeke.”2

Etinda oyo ya bonzambe, elongo na elaka ya yango ya nkembo, ezali mokano lelo lokola ezalaki na katikati ya ntango. Mosala mwa misio ezali eteni ekolakisi lolenge ya Eklezia ya Yesu KListo ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka. Ntango nyonso ezali, ekozala libela. Lokola Profeta Joseph Smith asakolaki, “Nsima ya nyonso elobama, mokumba monene mingi koleka mpe ya motuya mingi koleka ezali koteya Nsango malamu.”3

Na mibu mibale bamisionele bango ya ntango mobimba oyo bazali sikawa kosala na limpinga ya bokonzi ya Nzambe bakosukisa misala mya bango mpe bakozonga na ndako mpe na balingami ba bango. Mpo na bandeko babali, bakitani na bango bazwami mpokwa ya lelo na kati ya Bonganganzambe ya Alona ya Eklezia. Bilenge babali, ezali bino ya kobelema mpo na koyanola? Ezali bino kolinga mosala? Ezali bino ya komilengela mpo na kosala?

Na kotala malamu, mosala mwa misio esengeli bokokisi ya lokengo na lolenge ya bomoi ya moto. Esengi bangonga milai mpe bomipesi bonene mpe losambo ya mpiko. Lokola mbano, mosala mwa misio ya bomipesi ekomemela moleki ya esengo ya seko, oyo ekotandolama na bokufi mobimba mpe na kati ya boseko.

Momekano esegeli kozala basali ya litomba mingi na elenga ya vinu ya Nkolo. Oyo ekosalema na biso bango, ezala mibu kani, mpe te bobele na baye bamilengeli mpo na kosala lokola bamisionele ya ntango mobimba, mpo na moko na moko na biso eyei etinda mpo na kokabola nsango malamu ya Klisto.

Tika napesa likanisi ya ndakisa moko oyo ekokokisa elonga ya bino: yambo, boluka makomi na etingia;ya mibale, bosala mwango ya bomoi bwa bino na ntina (mpe, nakoki kobakisa, bosala mwango mwa bomoi bomoi bwa bino kotala te mibu mya bino); ya misato, boteya boslo elongo na litatoli; mpe ya minei, bosalela Nkola na bolingo.

Tika tomaniola moko na moko ya biteni minei ya ndakisa oyo.

Yambo, bomaniola makomi na etingia.

Makomi matatoli Nzambe mpe makwi maloba ma bomoi bwa seko. Makomi moboko mwa nsango ya biso.

Bobeti nsete ya miango ya Eklezia ezala makomi masantu, ebongisami mpe elengelami na nzela ya makasi ya correlation. Tolendisami, lisusu, koyekola makomi mokolo na mokolo moto na moto mpe elongo na mabota na biso lokola.

Tika napesa litangi moko oyo ekosala na semba na bomoi bwa biso. Na Buku ya Mormon, mokapo ya 17 ya Alama, totangi nsango ya esengo ya Alama ntango mbala moko lisusu amonaki bana babali ba Moziya mpe amonaki molende ya bango na likambo ya bosolo. Nsango elobeli biso ete, “bakolaki makasi o boyebi bwa bosolo; mpe bazalaki bato ba bososoli bolamu mpe balukaki makomi na etingia, ete bakoka koyeba liloba lya Nzambe.

“Kasi ezali enso te; bamipesaki o losambo, mpe bokili boike; yango wana na molimo mwa bobikuli, mpe molimo mwa bobimisi, mpe elakisaki bango, balakisaki na nguya mpe bokonzi bwa Nzambe.”4

Bandeko, boluka makomi na etingia.

Ya mibale na ndakisa na biso: bosala mwango ya bomoi bwa bino na ntina.

Ntango mosusu nkola moko te ya bilenge bakutanaki na mikano ya minene boye. Bolengeli esengeli kosalema mpo na eteyelo, misio, mpe libala. Mpo na boko, mosala ya soda esengeli ekotisama na kati.

Bolengeli mpo na misio ekobanda noki. Na bobakisi na bolengeli ya molimo, moboti moko ya bwania akopesa makoki nayango elenge moko ya mobali akoki kobanda bobombi mosolo mwa misio ya yemei. Akoki malamu kolendisama ntango mibu mizalaki koleka mpo na koyekola monoko mwa bampaya, mpo ete, soki esengeli, makoki maye ya lokota ekokaki kosalelama. Na nsuka ekomi mokolo moye ya nkembo ntango episikopo mpe mokambi ya likonzi abengisaki elenge mobali yango mpo na kotala bango. Bolongobani bososolami; ndingisa ya misio esalemi.

Na ntango mosusu te libota mobimba etalaki na motema moto moto mpenza mpe ezelaki mokaboli mikanga mpe mokanda ewuti na balabala 47 East South Temple, Salt Lake City, Utah. Mokanda ekomaki; bozeli boyei ndongo; libiangi etangami. Ntango mosusu elanga etangami kosalela misio ezali mosika mpenza na mboka. Kotala te esika, nzokande, eyano ya misionele alengelami mpe ya botosi ezali yango kaka: “Nakosala.”

Bolengeli mpo na kokende ebandi. Bilenge babali, nalikii bokolula mabonza oyo baboti na bino bazali kosala na bolingi boye mpo ete bino bosala. Mosala na bango ekosunga bino, bongimi na bango ekolindisa bino nsambo na bango ekotombola bino. Misio ezali likambo ya libota. Atako etando ya mikili mpe bambu ikoki kokabola, mitema mizali moko.

Bandeko, ntango bosali mwango na ntina ya bomoi bwa bino, bomikundola ete mabaku ma bino ya misio ezali kaka te mpo na eleko moko ya libiangi. Mpo na baye bakosaka kisoda, ntango oyo ekoki mpe esengeli kozala na litomba. Mobu na mobu bilenge bya biso ya babali na sokoto bakomema milimo mingi na kati ya bokonzi ya Nzambe na kokumisaka bonganganzambe ya bangomei, kosalelaka mitindo mya Nzambe, mpe koteyaka basusu liloba lya bonzambe ya Nkolo.

Kotiola litomba lya bino ya kozala bamisionele ntango bozali kolandela boyekoli bwa bino mpenza. Ndakisa ya bino lokola Basantu ba Mikolo mya Nsuka ekozala kontalama, komekama, mpe mbala mingi komekolama.

Bandeko, ezala mibu mya bino kani, ezala ezalela ya bino kani, nasengi bino bosala mwango ya bomoi bwa bino na ntina.

Sikawa na likambo ya misato na ndakisa na biso: Boteya bosoli na litatoli.

Botosa toli ya Apostolo Petelo, oyo atindi: “Boselingwaka mikolo yonso mpo na kojongisa monoko na moto na moto oyo akotuna bino mpo na ntina na elikia kati na bino.”5 Botombola mingongo mpe botatola bozali ya solo ya Bonzambe. Bosakola litatoli lya bino etali Buku ya Mormon. Bokabola babosolo bozwami na mwango mwa lobiko.

Ntango nasalaki lokola mokambi ya misio na Canada eleki mibu koleka 50, moko ya misionele ya elenge oyo awutaka na mwa etuka moko ya moke, ya zamba akamwaki na bonene ya Toronto. Azalaki mokuse kasi molai na litatoli. Ntango mingi te nsima ya boyei bwa ye, elongo na baninga ba ye, akendeki na ndako ya Elmer Pollard na Oshawa, Ontario, Canada. Koyokaka mawa mpo na bilenge babali oyo, na londende ya komonisa te, bazalaki kokende ndako na ndako, tata Pollard abengisaki bamisionele na kati ya ndako ya ye. Balakisaki ye nsango ya bango. Ayokaki molimo te. Na ntango esengeli asengaki ete balongwa mpe bazonga te. Maloba ma ye ma nsuka na bampaka ntango bazalaki kolongwa na liboso ya ndako ya ye ezalaki na litio: “Bokoki te koyebisa ngai bozali ya solo kondima Joseph Smith azalaki profeta ya Nzambe!”

Ekuke ekangamaki. Baeleder batambolaki na nse na nzela. Mowuta wa biso alobaki na moninga wa ye: “Mpaka, toyanolaki tata Pollard. Alobaki tondimi te Joseph Smith azalaki profeta ya solo. Tozonga mpe topesa matatoli ma biso na ye.” Liboso misionele aleki na mayele atatabanaki kasi na nsuka andimaki mpo na kokende elongo na moninga wa ye. Bobangi ebetaki mitema mya bango ntango babelemaki na ekuke uta wapi babenganaki bango. Babetaki, bakutaki tata Pollard, balekisaki ngonga moko ya nsomo, mpe nsima na nguya ya Molimo, misionele wa biso azanga mayele alobaki: “Tata Pollard, olobaki tondimi mpenza te Joseph Smith azalaki profeta ya Nzambe. Natatoli na yo ete Joseph azalakiprofeta ya Nzambe. Abongolaki mpenzaBuku ya Mormon. Amonaki Nzambe Tata mpe Yesu Mwana wa Ye. Nayebi yango.”

Mwa ntango nsima, tata Pollard, sikawa Ndeko mobali Pollards, atelemaki na liyangani ya bonganganzambe mpe atatolaki, “Mpoka wana nakokaki te kolala. Kobetaka na motoyi ma ngai nayokaki moloba ‘Joseph Smith azalaki profeta ya Nzambe. Nayebi yango. Nayebi yango. Nayebi yango.’ Mokolo molandaki natelefonaki bamisionele mpe nasengaki bango bazonga. Nsango ya bango, ebalanaki na matatoli ma bango, ebongolaki bomoi bwa ngai mpe bomoi bwa libota lya ngai.” Bandeko, boteya bosolo na litatoli.

Likambo ya Nsuka na ndakisa na biso ezali kosalela Nkolo na bolingo. Ezali na mokitani mpo na bolingo. Bamisionele ya elonga bakolinga baninga ba bango, bayangeli ba bango ya misio, mpe bato ba motuya oyo bakoteya. Na eteni ya minei ya Doctrine et Alliances, Nkolo atii makoki mpo na misala ya Nzambe. Tomaniola mwa nzela:

“O bino baye bomati na mosala ya Nzambe, botala ete bokosalela ye na motema, bokasi, mpe mayele mpe bokasi, ete botelema na elindo te liboso lya Nzambe na mokolo mwa nsuka. …

“Mpe bondimi, elikia mpe bolingo, elongo na liso bobele na nkembo ya Nzambe, ekokokisa ye mpo na mosala.

“Bomikundola bondimi, bolamu, boyebi, bwania, bompikiliki, bosembo ya bondeko, bonzambe, bolingani, bosawa, etingia.”6

Malamu ekoka moko na moko ya bino na kati ya lokito ya mongongo ya ngai komituna motuna“Lelo, ekoli ngai na bondimi, na bolamu, na bonzambe, na bolingo?”

Na nzela ya bomikabi ya komipesa na ndako to libanda, milimo oyo osalisi kobika ekokozala mpenza oyo oleki kolinga.

Mibu mingi mileki, moninga molingami wa ngai, Craig Sudbury mpe mama wa ye, Pearl, bayaki na bilo ya ngai yambo ya bolongwa bwa Craig mpo na Misio ya Melbourne na Australie. Fred Sudbury, tata wa Craig, azangaki mpenza. Mibu tuku mitano liboso, mama wa Craig abalaka Fred, oyo akabolaki bolingi ya ye ya Eklezia te mpe, boye, azalaki mondimi te.

Craig alobelaki ngai bolingo bwa ye ya bozindo mpe ya makasi mpo na baboti ba ye mpe elikia ya ye ete na lolenge moko to mosusu, mokolo moko tata wa ye asimbama na Molimo mpe akofungola motema mwa ye na nsango malamu ya Yesu Klisto. Nasambelaki mpo na bofuli etali boniboni mposa ya boye ekokaki kokokisama. Bofuli boyaki, mpe nalobaki na Craig, “Salela Nkolo na motema mwa yo mobimba. Zala na botosi na libiangi lya yo ya bule. Poso na poso komela baboti ba yo mokanda, mpe na libaku, komela Papa ye moko, mpe sala ayeba boniboni mingi olingi ye, mpe lobela ye ntina nini ozali na botondi ya kozala mwana wa ye.” Apesaki ngai botondi mpe, elongo na mama wa ye, balongwaki bilo.

Ezalaki bobele mpo na komona mama wa Craig mwa sanza zomi na mwambe nsima, ntango ayaki na bilo ya ngai mpe, na maloba makatana na mpizoli, alobaki na ngai, “Ezali penepene na mibu mibale uta Craig alongwaki mpo na misio. Alembaki ata moke te kokomela biso mposo nyonso. Kala te, mobali wa ngai, Fred mpo na mbala ya yambo na liyangani moko ya litatoli mpe akamwisaki ngai mpe bato banso baye bazalaki wana kosakolaka ete azwaki mokano ya kokoma mondimi ya Eklezia. Alakisaki ete ye me ngai tolingaki kokende na Australie kokuta Craig na nsuka ya misio ya ye mpo ete Fred azali libatisi ya nsuka ya Craig lokola misionele misonele ya ntango mobimba.”

Misionele moko te atelemaki molai lokola Craig Sudbury ntango, na mosika kuna na Australie, asalisaki tata wa ye na kati ya mai kino loketo, kotombolaka loboko la ye ya mobali mbata semba, kozongelaka maloba ya bule maye: “Frederick Charles Sudbury, kotindamaka na Yesu Klisto, nakobatisa yo o nkomba ya Tata, mpe ya Mwana, mpe ya Molimo Mosantu.”

Bolingo elongaki elonga ya yango. Salela Nkolo na bolingo.

Bandeko, tika moko na mko na biso aluka makomi na etingia, asala mwango ya bomoi bwa ye na ntina, mpe ateya bosolo elongo na litatoli, mpe asalela Nkolo na bolingo.

Mobateli Mpate abonga nie ya milimo mya biso, misionele oyo asikolaki bato banso, apesaki biso elikia ya Ye ya bonzambe:

“Soki ezali boye ete esengeli kosala mikolo mya yo minso na kogangaka boyamboli epai ya bato, mpe komema, ata ezali molimo moko epai na ngai, enene kani ekozala esengo elongo na bokonzi bwa Tata!

“Mpe sikawa, soki esengo ya yo ekozala enene na molimo moko oyo omemi epai na ngai na kati ya bokonzi bwa Tata, enene kani ekozala esengo ya yo soki okomema milimo mingi epai na ngai!”7

Na ntina na Ye oyo alobaki maloba maye, nasakoli litatoli lya ngai: Ye azali Mwana wa Nzambe, Mosikoli wa biso, mpe Mobikisi wa biso.

Nasambeli ete tokoka ntango nyonso koyanola na libengisi lya Ye ya boboto, “Bolanda na bino ngai.”8 O nkombo ya Ye ya bule—kutu nkombo ya Yesu Klisto Nkolo—amene.