2010–2019
Nguya ya Bonganganzambe kati na Elenge Mobali
Sánzá ya mínei 2013


10:54

Nguya ya Bonganganzambe na Elenge Mobali

Bonganganzambe na elenge mobali ezali na nguya kaka lokola bonganganzambe na mobali ya mokolo ntango esalelami na bosembo.

Na mobu 1878 nkonkololo na ngai George F. Richards azalaki na mibu 17. Lokola ntango mosusu ezalaki momesano na mikolo wana, asilaka kokulisama mpaka. Eyenga moko mama na ye azalaki kolela na mpasi. Lokola tata na ye akokaki kozwama te, episikopo mpe basusu mingi babengisamaki mpo na kopesa ye lipamboli, kasi libiki moko eyaki te. Yango wana, abalukaki epai ya mwana na ye ya mobali George mpe asengaki ye atia ye maboko na moto na ye. Akomaki na Zulunale na ye, “Na katikati ya mpizoli na ngai mpo na mpasi ya mama na ngai mpe mokumba ya kosalaka mosala moko lokola nasalaka naino te, namibendaka na kisuku mosusu esika wapi nalelaki mpe nasambelaki.”

Ntango akitisaki motema, atiaki maboko na ye mpe apesaki ye lipamboli moko ya pete mpenza. Nsima akomaki, “Mama na ngai atikaki kolela na ye mpe azwaki libiki na mpasi na ye wana maboko na ngai ezalaki naino na moto na ye.” Nsima akomaki na zulunale na ye likambo eluti bomoni oyo. Alobaki ete azalaka koyoka ntango nyonso ete ntina mama na ye azwaki libiki te na lipamboli ya episikopo ezalaki te mpo ete Nkolo aboyaki kondima lipamboli ya episikopo kasi mpo ete Nkolo abombaki lipamboli oyo mpo na elenge mobali, mpo na koteya ye liteya ete bonganganzambe kati na elenge mobali ezali na nguya kaka lokola bonganganzambe kati na mobali ya mokolo ntango esalelami na bosembo.

Na mpokwa ya lelo, nalingi kolobela na ntina ya nguya wana. Atako nakolobela bakambi ya lisanga likoki ya badiakono, mabongisi oyo elobelami etali bilenge nyonso ya Bonganganzambe ya Alona mpe bakambi na bango mpenza, kokwaka bakambi ya lisanga likoki ya bateyi mpe basungi ya mokambi ya lisanga likoki ya banganganzambe na biso.

Ntango nazalaki kosala lokola mokambi ya misio, namonaki ete ezalaki na kobuta moko ya nguya na molimo mpe bokoki ya kokamba ya bilenge mibali na mibu ya misio na bango. Soki tokokaki kotanga mwa moke ndenge na yango na Bonganganganzambe ya Alona mpe mibu ya misio na bango, ntango mosusu ekokaki komonana eloko moko lokola monkoloto ya bule bozali komona na elili oyo. Na makanisi na ngai ezali penepene na makambo ya ntina misato oyo epesi nzela na bokoli ya kokamwa ya boye na mibu na misio: (1) tondimelaka bilenge mibali oyo lokola esalema naino te liboso, (2) tozali na bozeli ya bonene mpe ya bolingo epai na bango, mpe (3) toteyaka mpe toteyaka lisusu bango mpo ete bakoka kokokisa bozeli wana na malamu eluti.

Moto akoki ntango mosusu kotuna, “Mpo na nini mabongisi oyo kaka ekokaki kosalelama te na bakambi ya lisanga likoki ya badiakono?” Soki oyo esalamaki, mbele bokoli elingaki kobanda kala mingi mpe komonana mingi lokola monkoloto ya mai ya mpondu oyo ezali na elili. Mpo na mwa ngonga, ekoka ngai kolobela lolenge nini ekokaki kosalelama na mokambi ya lisanga likoki ya badiakono.

Yambo—bondimami. Tokoki komipesa na bakambi ya badiakono na biso na mokumba monene. Nkolo solo asalaka yango—lokola elakisami na bolingi na Ye ya kopesa bango bafungola, kolingaka koloba likoki ya kokamba mpe koyangela mosala kati na lisanga likoki na bango. Lokola litatoli na bondimeli, tobiangaka bakambi ya lisanga likoki ya badiakono na nzela ya bobimisi, na bonkulutu kaka te to likambo mosusu songolo ya lolenge ya boye. Mokambi nyonso na Eklezia oyo, kokwaka mokambi ya lisanga likoki ya badiakono, azali na likoki ya koyeba, mpe asengeli koyeba, ete abengami na nzela ya bobimisi. Elikia ya boye esalisi ye ayeba ete Nzambe andimaka ye mpe asungaka ye.

Babolamu ya mibale mpe ya misato ezali ya kokangana—bozeli bonene mpe boyekoli esengeli mpo na kokokisa yango. Nayekolaki liteya monene ne elanga ya misio: Makasi ya misionele emataka to ekitaka mpo na kokutana na ndelo ya elikia ya mokambi ya misio, mpe ezali ndenge moko na bakambi ya lisanga likoki ya badiakono. Soki basengami kaka bakamba mayangani ya lisanga likoki ya bilenge mpe kokende na Makita ya bayangeli ya bilenge na boepisikopo, nde wana ezali manso bakosala. Kasi bino bayangeli bokoki kopesa bango bomoni makasi koleka—bomoni ya Nkolo. Mpe mpo na nini bomoni ezali mpasi mpenza? Mpamba te na bomoni ya kobuta ekomema botindiki ya kobuta.

Oyo ezali ntina na libiangi nyonso na Eklezia ezali likoki ya kozwa libimisi. Yango wana, bakambi ya lisanga likoki ya badiakono oyo basengeli koyeba ete bazali na likoki, kutu batiami elikia, ya kozwa bobimisi mpo na lisanga likoki na bango. Basengeli koyeba ete bazali na likoki ya kozwa bobimisi ya kosengela basungi na ye, likoki ya kozwa bobimisi etali kobikisa babungi, mpe likoki ya kozwa bobimisi ya koteya bato ya lisanga likoki na mikumba na bango.

Moyangeli ya bwania akoteya mokambi ya lisanga likoki ya badiakona mabongisi wana oyo makosalisa na bozwi bobimisi. Akoki koteya ye elaka ya polele ya Nkolo: “soki okosenga, okozwa bobimisi likolo ya bobimisi” (D&C 42:61). Nkolo azali loboko pete mpenza na kopesaka bobimisi. Ye akondolisaki Joseph mpe Oliver, “Mbala nzike bosengi bozwi lilako ya Molimo na ngai” (D&C 6:14)? Mpe ekoki kozala lolenge moko mpo na bino bakambi ya lisanga likoki ya badiakono. Nkolo alingaka bino mpe alingi kobimisa na bino mayele mpe bolingi na Ye. Ekokaki bino kokanisa Nkolo kozalaka na likambo oyo Ye akokaki te kosilisa? Ngai nakoki te. Mpamba te bozali na likoki ya bobimisi, Ye akoki kosalisa bino bosilisa likambo nyonso bozali na yango lokola mokambi ya lisanga likoki na bino soki bokoluka mpenza lisalisi na Ye.

Bino bayangeli ya kokamwa bokoki koteya mokambi ya lisanga likoki ya badiakono ete bobimisi ezali bokitani moko mpo na mosala makasi mpe mosala na ndako te. Mokambi Henry B. Eyring mbala moko atunaki Mokambi Harold B. Lee, “Lolenge nini nakozwa bobimisi?” Mokambi Lee ayanolaki, “Soki olingi kozwa bobimisi, yekola mpe sala mosala mwa yo.” 1 Moyangeli ya bwania akoki kososola na mokambi ya lisanga likoki ya badiakono na ye boko ya mosala ya molimo akoki kosala na kolengelaka mpo na kosengela basungi na ye. Akoki kozala na mposa ya kotuna mpe koyanola mituna lokola: Nani akoki kozala ndakisa malamu oyo ekoki kotombola bana mibali misusu? To nani akozala na liyoki na bamposa ya baoyo bazali kokutana na mikakatano ya kafukafu?

Mpe na Nsuka moyangeli ya bwania oyo akoki toteya ye lolenge nini komona lisusu mpe kosala likolo ya bobimisi ntango eyei. Tozali na mokili etonda na bikela bikangama kala, ya mbangu, ya esengo, wapi minda ya bongengi mpe makelele makasi ezali malamu. Kasi elenge mobali oyo azali na mposa ya koyeba ete oyo ezali lolenge ya mokili, lolenge ya Nkolo te. Mobikisi abotamaki na eleilo moko kutu moto moko te ayebaki; Ye asalaki ekela ya kitoko eluti mpe ezangi bomekoli ya ntango nyonso kati na elanga moke ya kimia; mpe Joseph azwaki Limoni ya Yambo na ye na zamba ya kobombama. Biyano ya Nzambe eyaka na mongono ya kimia, ya moke—mayoki ya kimia to libondi, mayoki ya kosala malamu, bopeli—ntango mosusu na mwa mbuma moke ya makanisi oyo ememiami mpe eleisami ekoki kokola mpo na kokoma nzete monene ya molimo. Ntango mosusu mayoki oyo to makanisi ekoki kosala ete bino bakambi ya lisanga likoki ya badiakono bosengela lokola mosungi to kopesa mokumba na elenge mobali oyo azali sikawa na loningi moke.

Mibu mingi mileki wana ezalaki ngai mokambi ya likonzi, tozwaki makanisi ya kobianga mobali moko malamu lokola kalaki ya likonzi. Azalaki mokonzi ya elonga na mokili ya nkita kasi azalaki kobunda ntango mosusu mpo na kokende na eklezia mbala na mbala. Nzokande, toyebaki ete soki andimaki libiangi, akolinga kosala mosala kitoko mingi.

Topesaki ye libiangi, kasi azongisaki, “Te, nakanisi te ete nakokoka kosala yango.”

Nsima likanisi moko eyaki. Nalobaki, “Malamu, nabanzi ete likonzi ya Glendale ekozala na kalaki ya likonzi te sikawa.”

Esalaki ye mpasi, ayanolaki, “Nini ozali kolobela? Bosengeli kozala na kalaki ya likonzi.”

Nayanolaki, “Olingi biso tobianga moto mosusu mpo na kosala lokola kalaki ntango Nkolo atindi biso tobianga yo?”

“Malamu,” alobaki, “Nakosala yango.”

Mpe asalaki yango mpenza. Ezali kaka na mibali mingi te kasi bilenge mibali mingi oyo bakoyanola na libiangi ntango bayebi ete Nkolo azali kobianga bango mpe ete Nkolo azali na mposa na bango.

Nsima, okoki koyebisa mokambi ya lisanga likoki ya badiakono oyo ete moko ya baelikia ya Nkolo na ntina na ye ezali kobikisa babebi, bandimi ya loningi moke mpe bandimi te lokola. Nkolo asakoli misio na Ye ya ntina na maloba oyo: “Mpo ete Mwana na moto ayei kobikisa yango ebebi” (Matai 18:11). Soki ezali likambo ya liboso ya Nkolo kobikisa babebi, soki ezali likambo ya liboso ya Mokambi Thomas S. Monson kosala yango, lokola elakisamaki na bomoi na ye mobimba, esengeli lisusu kozala likambo ya liboso ya moyangeli nyonso, mokambi ya lisanga likoki ya badiakono nyonso na Eklezia oyo. Na motema ya bokambi na biso, lokola katikati ya mosala na biso, esengeli kozala mokano ya kopela, ya kokamba, ya etingia mpo na kokende kozwa babungi mpe mpe kozongisa bango.

Elenge mobali moko oyo bakendaki kotala na bato ya lisanga likoki na ye alobaki: “Ezalaki kokamwa lelo ntango … bato 30 mpamba bayaki na ndako na ngai. … Ezali kopesa ngai mposa ya kokende na eklezia sikawa.” Boniboni ekoki yo kokanga motema na bolingo mpe bokebi ya lolenge wana?

Nasepelaka ntango nayokaka masolo ya bakambi ya lisanga likoki ya badiakona baoyo bazwa bomoni mpe ntango mosusu bazali koteya mateya nyonso to ndambu na mayangani ya lisanga likoki na bango. Bamposo mingi eleki nakendaki na kelasi ya lisanga likoki ya badiakono. Elenge mobali moko ya mibu 12 apesaki liteya ya Bomikabi na minuti 25. Abandaki na kotunaka baninga na ye badiakono nini bakanisaki Bomikabi ezali. Nsima akabolaki mwa makomi ya ntina mpe atunaki mituna ya bwania, na oyo bayanolaki. Kososolaka, nzoka nde, ete ezalaki na ntango mingi koleka makambo ya mateya oyo etikalaki, azalaki na bwania mingi mpe ntango mosusu mwa makebisi uta na tata na ye mpo na kotuna bayangeli oyo bazalaki wana mituna nini batunamaki oyo etali Bomikabi na misio na bango mpe biyano na bango. Nsima asukisaki na litatoli na ye. Nayokaki na kokamwa. Namilobelaki, “Namikundoli te kopesaka eteni ya liteya moko ya ntina ntango nazalaki elenge ya Bonganganzambe ya Alona.” Tokoki kotombola ndelo mpe bomoni mpo na bilenge mibali oyo, mpe bakoyanola.

Bino bayangeli bosalisaka bakambi ya lisanga likoki ya badiakono malamu mpenza ntango botikaka bango bakamba, mpe botikaka kozalaka na bokebi ya kelasi likolo na bino. Bokomisi libiangi na bino monene malamu ntango bopesi liteya monene te kasi ntango bosalisi bango kopesa liteya monene; ntango bobikisi moto te kasi ntango bosalisi bango kosala yango.

Ezali na lisese moko ya kala: Kokufa te na miziki na yo naino na kati na yo. Na lolenge moko nalingi koloba na bino bayangeli ya mikolo, bopemisama te na mayele na bino ya bokambi kaka kati na bino. Boteya bilenge na bino na mabaku nyonso; boteya bango lolenge nini kolengela mwango ya mayangani, lolenge nini kokamba mayangani na lokumu mpe molunge, lolenge nini kobikisa moko, lolenge nini kolengela mpe kopesa liteya efulama, mpe lolenge nini kozwa bobimisi. Oyo ekozala emekoleli ya elonga na bino—lisango ya bokambi mpe ya molimo oyo bloni na mitema mpe milimo ya bilenge mibali oyo.

Soki bino bakambi ya lisanga likoki ya badiakono bokomisi monene libiangi na bino, bokozala bisalelo na maboko ya Nzambe kutu sikawa, mpamba te bonganganzambe kati na elenge mobali ezali kaka na nguya lokola bonganganzambe na mobali ya mokolo ntango esalelami na bosembo. Mpe nsima, ntango bosali makuli ya tempelo mpe bokomi bamisionele mpe bayangeli ya lobi ekoya ya Eklezia oyo, bokoyeba lolenge nini kozwa bofuli, lolenge nini kobikisa moko, mpe lolenge nini koteya malongi ya bokonzi na nguya mpe likoki. Nde bokosila kokoma bilenge ya likoki ya mbotama ya lokumu. Na ntina ya oyo natatoli mpenza na nkombo ya Yesu Klisto, oyo azali bongo Mobikisi mpe Mosikoli ya mokili, amene.

Matangi

  1. Henry B. Eyring, “Waiting upon the Lord” na Brigham Young University 1990–91 Devotional and Fireside Speeches (1991), 17.