Nkolo Alingaka Kolimbisa
Nkolo alingaka biso mpe alingaka tososola bolingi na Ye mpo na kolimbisa.
Na ntango ya mosala na kufa ya Mobikisi, mingi balandaki Ye, lokola bakomeli mpe Bafalisai “bautaki na mboka yonso ya Galilai, … Yuda, mpe na Yelusaleme.”1 Moto moko akangama na mbeto, mokatatali na mposa ya kobikisama amemamaki na lisanga monene moko, kasi kozangaki makoki ya kokomisa ye mpembeni ya Mobikisi, baninga bamemaki ya likolo ya ndako esika wapi Mobikisi azalaki mpe bakitisaki ye na nse. Komonaka bolakisi oyo ya bondimi, na ntina monene oyo eyebani naino te na bayoki na Ye, Mobikisi asakolaki, “Ndeko, masumu na yo malimbisameli.”2
Oyo esengelaki kokamwisa moto yango, mpe atako makomi elobi eloko moko te na ntina ya eyano na ye, akokaki kokamwa soki Mobikisi solo asosolaki mpo na nini ayaka.
Mobikisi ayebaki ete bato mingi balandaki Ye mpo na makamwisi na Ye ya nguya. Esilaki Ye kobongola mai na vinyo,3 kobengana milimo ya mabe,4 mpe abikisaki mwana mobali ya mokolo na mokonzi,5 moto na mbala,6 bokilo na Petelo,7 mpe basusu mingi.8
Kasi na mokatatali oyo, Nkolo aponaki kopesa litatoli na moyekoli mpe motioli bango mibale na ntina ya mosala malamu mpenza na Ye lokola Mobikisi ya mokili. Koyokaka maloba ya Mobikisi, bato na mibeko mpe Bafalisai babandaka kokanisa o ntei na bangomei, kolobaka na bozangi koyeba na ntina ya kotuka Nzambe wana ezalaki bango kosukisa ete kaka se Nzambe akoki kolimbisa masumu. Koyebaka makanisi na bango, Mobikisi azongisaki monoko na bango, kolobaka:
“mpo nini bojali kobanja boye na mitema na bino?
“Likambo nini eleki makasi, koloba ete, masumu na yo malimbisameli yo, soko koloba ete, Telema, mpe tambola;?”9
Kozelaka eyano na bango te, Mobikisi akobaki, “Nde na ntina ete boyeba ete Mwana na moto ajali na bokonji awa na nse na kolimbisa masumu, [Ye nsima abalukaki na mokatatali]nalobi na yo ete,Telema, kamata litoko na yo mpe kenda na ndako na yo.”10 Mpe asalaki!
Na nzela ya bobiki ya nzoto ya kokamwa oyo, Mobikisi andimisaki na banso bosolo ya molimo ya nguya mingi koleka ezanga nsuka oyo: Mwana na Moto alimbisaka masumu!
Atako bosolo oyo eyambami na pete na bandimi, kasi endimami na pete te ezali bosolo ya boninga ya ntina: Mobikisi alimbisaka masumu “likolo na mabele” mpe kaka se na Bosambisi ya Nsuka te. Ye alimbisaka biso te na masumu na biso.11 Ye andimaka te bozongeli na biso na masusu maleka.12 Kasi ntango toyamboli mpe totosi nsango malamu na Ye, Ye alimbisaka biso.13
Na bolimbisi oyo tozali komona nguya ekokisaka mpe esikolaka ya Bomikabi oyo esalelami na boyokani mpe na botondi. Soki tosaleli bondimi kati na Nkolo Yesu Klisto, nguya ekokokisaka ya Bomikabi elendisi biso na ngonga na biso ya bokeleli,14 mpe nguya na Ye esikolaka ebulisi biso wana ezali biso “[kotia] libanda moto wa mokili.”15 Oyo ememaka elikia na banso, mingimingi na baoyo bazali koyoka ete botau oyo ekozongaka na moto ezali mosika ya bolingi ya Mobikisi mpo na kosalisa mpe kobikisa.
Kopesaka libaku mpo na Mobikisi apelisa bososoli na biso,16 Petelo kala atunaka mbala boni asengeli kolimbisa ndeko na ye ya mobali mpe nsima atunaki, “Kino mbala nsambo?” Solo wana ekozala mingi koleka oyo ekoki. Kasi eyano ya Mobikisi efungolaki monene ekuke ya motema na Ye ya mawa: “Nalobi na yo te kino mbala nsambo mbala ntuku nsambo.”17
Nkolo alingi biso mpe alingi biso tososola bolingi na Ye mpo na kolimbisa. Na mabaku mingi koleka 20 na Doctrina et Alliances, Nkolo alobaki na baoyo Ye azalaki koloba na bango, “Masumu na bino malimbisami,” to maloba makokani.18 Na penepene na katikati ya mabaku wana, maloba ya Nkolo elobamaki mingimingi epai ya Profeta Joseph Smith kolobaka ntango mosusu na ye moko, ntango mosusu elongo na basusu. 19 Oyo ya yambo ekomamaki na 1830, oyo ya nsuka na 1843. Boye, na eleko ya mibu mingi, Nkolo alobaki na Joseph mbala na mbala, “Masumu na yo malimbisami.”
Ntango Joseph azalaki te “na elindo ya masumu ya minene to ya mayele mabe,”20 tokosala malamu na komikundola ete na kolongolaka moke mpenza, “mbala ntiku nsambo” ya Nkolo ezali kosukisa te bolimbisi engebene na bonene ya lisumu.
Kolobaka na bampaka basanganaki na Kirtland, Nkolo alobaki, “Ngai nalingi ete bosengela kolonga mokili; yango wana Ngai nazali na mawa na bino.”21 Nkolo ayebi botau na biso mpe bambano ya seko ya “mokili” likolo ya mibali mpe basi babongo nie te.22 Maloba yango wana na nzela oyo ezali bondimi na Ye ete ezali bobele na nguya ya mawa na Ye nde tokoki na nsuka “kolonga mokili.”Mawa kani elakisamaki wana? Na bampaka oyo wana kaka na Kirtland, Ye alobaki, “Nalimbisi bino masumu na bino.”23Mobikisi alingi kolimbisa.
Moto moko te asengeli kokanisa ete bolimbisi eyaka kozangaka boyamboli. Solo, Nkolo asakoli, “Ngai, Nkolo nalimbisi masumu ya baoyo batubeli masumu na bango liboso na ngai mpe basengi bolimbisi,” nsima Ye abakisi na lolenge ya bokebi “oyo asumuki te kino liwa.”24 Ntango Nkolo “akoki te kotala lisumu na ata ndambo eke te ya ndingisa,”25Ye akesenisi bonene ya boko masumu. Ye alobi ete ekozala na bolimbisi te mpo na “kotuka Molimo na Bulee”26 Ye asakoli bonene ya koboma 27 mpe abetaki sete na bonene ya lisumu ya pite lokola ekobo. 28 Na oyo etali kozongelaka lisumu monene ya pite, Ye ayebisi kpokoso ebakisami ya koyamba bolimbisi na Ye.29 Mpe Ye alobi ete “ye oyo asumuki na pole monene mingi koleka akozwa etumbu monene.”30 Nzokande, na ngolu na Ye, Ye apesi biso nzela mpo na kobongisa o ntaka ya ntango esika ya kosengaka bobongi nie ya nokinoki. Ata na ebele ya masumu masalami na botau ya bokufi, mbala mingi lokola toyamboli mpe toluki bolimbisi na Ye, Ye alimbisi lisusu mpe lisusu.31
Na ntina na oyo, biso banso, lokola baye kobundaka mpo na kolonga bizalela ya kokakema lokola kosalela mabe to pornogalafi mpe biye bikangami na yango, tokoki koyeba ete Nkolo akondima babokasi na biso ya bosembo mpe akolimbisa na bolingo ntango boyamboli ezali mobimba, “kino mbala ntuku nsambo.” Kasi oyo elingi koloba te moto akoki na bolingi kozongela lisumu na bozangi etumbu.32
Nkolo azali ntango nyonso litomba na mitema na biso,33 mpe bondimi ya mayele mabe ekolongisa ²lisumu te.34 Na eleko oyo Nkolo akebisi moko ya baoombo na Ye na kotelemela mayele ya boye na kosakolaka,, “Tika [ye] ayokisama nsoni ya lingomba ya Nicolaitane mpe ya masumu ya somo ya sekele na bango nyonso.”35 Banikolaite bazalaki eyamba ya kala oyo elukaki ndingisa ya kosala lisumu pite na nguya ya ngolu ya Nkolo. 36 Oyo ezali kosepelisa Nkolo te.37 Mawa mpe ngolu na Ye ezali kolimbisa biso te ntango “mitema [na biso] misepelisami te. Mpe [biso]totosi bosolo te, kasi tozali kosepela na bozangi bosembo.”38 Nzokande, nsima ya kosala manso tokoki kosala,39 mawa mpe ngolu na Ye ezali nzela na yango “o ntaka ya ntango”40 tolongi mokili na nzela ya nguya ya kokokisa ya Bomikabi. Wana ezali biso koluka na bosawa likabo ya motuya oyo, “makambo ma botau makoma makasi mpo na[biso],”41 mpe na bokasi na Ye, tokomisami na makoki ya kosala oyo tokokaki kosala biso moko te.
Nkolo atalaka pole tozwi,42 bamposa ya mitema na biso,43 mpe misala na biso,44 mpe ntango toyamboli mpe toluki bolimbisi na Ye, Ye alimbisi. Wana ezali biso kotala babomoi na bisomei mpe babomoi ya balingami mpe bayebani na biso, tosengeli kolinga na lolenge moko mpo na kolimbisa bisomei mpe basusu.45
Preach My Gospelelobeli na ntina ya kpokoso na kolongaka bizaleli ya kokakema mpe elendisi bakambi ya bonganganzambe mpe bandimi mpo na “koyokisama mpasi to kolembisama” soki baluki to bandimi ya sika bakobi kobunda na bakpoko ya bongo. Nzokande, topesami toli mpo na “kolakisa elikia na moto na moto mpe kozala basambisi te … [kozwaka] yango lokola bozongi nsima ya ngonga moko mpe ya kososolama.”46 Ekokaki biso kosala moke na bana to baye libota na bisomei oyo bazali kobunda na bakpokoso ya lokola oyo, kopengwaka na ntango na nzela ya bosembo? Solo babongi na molende, bompikiliki, mpe bolingo na biso—mpe iyo, bolimbisi na biso.
Na likita linene kaka na sanza ya zomi eleki, Mokambi Monson apesaki toli:
“Tosengeli kotia na motema ete bato bakoki kobongwana. Bakoki kotia nsima na bango bizaleli mabe. Bakoki koyambola masumu.…
“… Tokoki kosalisa bango balonga mabe na bango. Tosengeli kokolisa likoki ya komona bato te lokola bazali sikawa kasi lokola bakoki kokoma.”47
Na likita moko na ebandeli ya Eklezia, ya lokola likita oyo, Nkolo alobaki na bandimi:
“Solo Ngai nalobi na bino, bozali peto, kasi banso te; …
“Mpo mosuni nyonso ezali ya kobeba liboso na ngai. …
“… Mpo solo boko na bino bazali na elindo liboso na ngai, kasi nakozala na mawa epai ya botau na bino.”48
Etinda na Ye ezali yango moko kaka lelo.
Tata wa Lola ayebi maye tozali kokutanaka na yango, ete biso banso tosumuki mpe “tojangi nkembo na Njambe”49 mbala na mbala. Ye atindaki Mwana wa Ye, oyo “ayebi botau ya moto mpe lolenge ya kosalisa baoyo basenginiami.”50 Mwana na Ye ateyi biso “tosambela ntango nyonso ete [biso] tokweya na masenginiate.”51 Tolobelami ete “belemani epai ya [Nzambe] mpo ya ngolu; mpo azali na nguya mpo na kobikisa.”52 Mobikisi atindi biso toyambola 53 mpe tolimbisa.54 Mpe atako boyamboli ezali pete te, wana ezali biso kobunda na mitema na biso mobimba mpo na kotosa nsango malamu na Ye, Ye apesi elaka oyo: “Solo nalobi na bino, ata masumu [na bino], nsopo na ngai etondisami na mawa epai ya [bino]. Nakobwaka mpenza [bino] libanda te; mpe na mokolo ya nkanda nakomikundola mawa.”55 Mobikisi alingi kolimbisa.
Mposo moko na moko Bayembi ya Tabelenakele ya Bamormon babandaka lolaka ya kofula na yango na maloba ya kotombola ya loyembo eyebana ya William W. Phelps “Gently Raise the Sacred Strain.” Ya koyebana te lokola maloba ya kobondisa ya nzela ya minei:
Mosantu, mosantu azali Nkolo.
Ya motuya, ya motuya ezali liloba na ye: …
Boyambola mpe bozala na bomoi;
Atako masumu na bino ezali motane lokola ngola,
O, boyambola, mpe akolimbisa.56
Nasengi bino bomikundola mpe bondima maloba ya Nkolo mpe bosalela bondimi na Ye mpo na koyambola.57 Ye alingi bino, Ye alingi kolimbisa. Natatoli bongo na nkombo ya bule ya Yesu Klisto, amene.