2010–2019
Mosala na Bino ya Bule ya Kosalisa
Sánzá ya mínei 2013


10:25

Mokumba na Bino ya Bule ya Kosalisa

Bozwaki nguya, likoki, mpe mokumba ya bule ya kosalisa ntango bokulisamaki na bonganganzambe

Esengo ya Kosalisa

Bilenge mibali ya Bonganganzambe ya Alona, bozali bana ya bolingo ya Nzambe, mpe ye azali na mosala monene mpo na bino kosala. Mpo na kosala mosala oyo, osengeli kokokisa mokumba na yo ya bule ya kosalisa basusu .1

Boyebi kosalisa elingi koloba nini? Kanisa na ntina ya motuna oyo wana ezali ngai koloba na bino oyo etali mwana mwasi moko abiangemi Chy Johnson.

Ntango Chy abandaki eteyelo ya bakolo mobu eleki, akomaki na likama ya monioko ya motema mabe mpe ezanga makanisi. Aniokwamaki, atindikamaki, mpe asekamaki ntango azalaki kokende na kelasi na makolo—boko bayekoli kutu bazalaki kobwakela ye bosoto. Bosili komona ntango mosusu bato baniokwami lokola boye na eteyelo na bino lisusu.

Mpo na bato mingi mpenza, mibu ya bolenge ezali ntango ya bomoko mpe bobangi. Esengeli te kozala lolenge oyo. Esengo mpo na Chy, ezalaki na bilenge mibali na eteyelo na ye baye basosolaki nini elingi koloba kosalisa .

Mama ya Chy asengaka bateyi ya eteyelo basalisa mpo na kosukisa monioko, kasi yango ekobaki. Nde amonaki Carson Jones, mosimbi Bonganganzambe ya Alona mpe mobeti makasi ya ekipi ya ndembo ya makolo. Asengaki ye asalisa ye amona nani azalaki kosala moniokoli.

Carso andimaki kosalisa, kasi na motema na ye ayokaki ete akokaki kosala mingi koleka komona kaka baniokoli. Molimo elobelaki ye na nse ete asengelaki kosalisa Chy amiyoka alingami.

Carson asengaki boko ya baninga na ye ya ekipi basanganana na ye na kosalisaka Chy. Babengisaki ye mpo na kofanda elongo na abango na elambo ya moke. Bakendeki makolo elongo na kelasi mpo na koyeba ete azalaki na likama te. Lokola ezelaki biso, elongo na babeti ndembo ya makolo lokola baninga na ye ya penepene, moko te aniokoli Chy lisusu.

Oyo ezalaki eleko moko ya esengo mpo na ekipi ya ndembo ya makolo. Kasi ata kutu na esengo enene ya eleko moko oyo alongaki, bilenge mibali oyo babosanaki Chy te. Bazalaki kobengisa ye mpo na kosangana na ekipi nsima ya masano. Chy amiyokaki ya kolingama mpe ya motuya. Ayokaki kimia. Azalaki na esengo.

Ekipi ya ndembo ya makolo ekobaki kino elongaki nkeni ya ekolo. Kasi eloko moko ya motuya mingi koleka momekano ya ndembo ya makolo esalamaki na eteyelo na bango. Ndakisa ya bilenge mibali oyo etindikaki bayekoli mosusu bakoma ya kondima basusu mingi koleka, na bolingo mingi koleka. Bazali sikawa kosalisana na boboto mpe limemia mingi koleka.

Balolaka ya nsango ya ekolo emonaki maye bilenge mibali oyo basalaka mpe bakabolaki lisolo na bango na ekolo mobimba. Oyo ebandaki lokola bokasi mpo na kosalisa moto moko ezali kofula bankoto ya basusu kosala lokola.

Mama ya Chy abengaki bilenge mibali oyo “banzelu ya kobombama.” Carson mpe baninga na ye bazali mbangu mpo na koloba ete Chy apamboli babomoi na bango mingi mpenza koleka bapamboli oyo ya ye. Wana ezali oyo esalamaka ntango omibungisi na kosalisaka basusu —omizwi.2 Bobongwami mpe bokoli na ndenge oyo elingaki kosalama te soki yango te. Bilenge mibali bamoni bosepeli ya kosalisaka mpe bakobi koluka mabaku ya kopambola basusu. Bazali na mposa ya kosembola lisalisi na bango na basanza ezali koya ntango bakosala lokola misionele ya ntango mobimba.3

Mposa mpe Mokumba

Ezala na bankoto ya Chy Johnsons na mokili mobimba—bato oyo bazali na mposa ya koyoka bolingo ya Tata na Lola. Bazali na biteyelo na bino, na masanga makoki na bino, mpe kutu na libota na bino. Ndambo bayaka na molimo nokinoki . Basusu bazali na bamposa oyo ezali komonana mpenza te. Na polele moto nyonso oyo oyebi akokaki kopambolama lolenge moko boye na nzela ya lisalisi na ye. Nkolo azali koyekama likolo na biso mpo na kokende epai na bango.

Osengeli te kozala mopoti mbangu ayebana mpo na kosalisa basusu. Bozwaki nguya, likoki, mpe mokumba ya bule ya kosalisa ntango bokulisamaki na bonganganzambe. Mokambi James E. Faust ateyaki, “Bonganganzambe ezali likoki epesami na moto mpo na kosalisa na nkombo ya Nzambe .”4 Bonganganzambe esimbi bafungola ya lisalisi ya banzelu.5

Wana ezali yo kolinga bana na Ye, Tata na Lola okokamba yo mpe banzelu bakosunga yo.6Okopesama nguya mpo na kopambola babomoi mpe kobikisa milimo.

Yesu Klisto azali ndakisa na yo. Ye “ayei mpo na kosungama te kasi mpo na kosunga.”7 Kosunga elingi koloba kolinga mpe kobatela basusu. Elingi koloba kobatela bamposa na bango ya nzoto mpe ya molimo. Na lolenge ya pete, elingi koloba kosala maye Mobikisi alingaki kosala soki Ye azalaki awa.

Libota na Yo

Banda na libota na yomei. Oyo ezali esika wapi okoki kosalela lisalisi na yo ya motuya koleka nyonso.8

Olingi komeka likambo ya litomba? Mbala ya nsima mama na yo akosenga lisalisi nzinganzinga ya ndak, loba likambo moko lokola “Natondi yo lokola osengi nai, Mama. Nalingaki kosalisa” Nsima tala bozongisi na ye. Boko kati na bino bakoki kozongela maye boyebi na ntina ya lisungi ya yambo liboso bomeka oyo. mpamba te bokoki kotinda akweya. Nsima ya kozongisa ye na bomoi. Bokoli moko mpenza na mokangano na bino elongo na ye mpe bobuti ya Molimo na ndako na bino.

Wana ezali nzela moko ya kosalisela na libota na bino; ezali na mingi mosusu. Bosalisaka ntango bozali koloba maloba ya boboto na baye libota. Bosalisaka ntango bozali kozwa bandeko na bino lokola baninga na bino ya malamu mingi koleka.

Ntango mususu ya motuya mingi koleka, bosalisaka wana ezali bino kosunga tata na bino na misala na ye lokola moyangeli ya molimo na libota na bino. Bopesa lisungi mpe bolendisi na bino mobimba na mpokwa ya libota, losambo ya libota, mpe boyekoli makomi na libota. Bosala eteni na bino mpo na kosala ete molimo ezala na ndako na bino. Oyo ekolendisa tata na bino na mosala na ye mpe kolengela bino bozala tata mokolo mosusu. Soki bozali na tata te na ndako na bino, mokumba na bino ya kosalisa libota na bino esengami kutu mingi koleka.

Lisanga likoki na Bino

Bozali lisusu na mokumba ya kosalisa na lisanga likoki na bino.

Bonganganzaambe ezali kopalangana na mokili mobimba. Mingi kati na bino bazali kokeba na libiangi ya Mokambi Monson. Ezali na basimbi bonganganzambe ya loningi mingi lelo koleka liboso na mambi ya Eklezia. Nzokande ezali kaka na baoyo bazali na loningi te mpe oyo bazali na mposa na bino.

Na sanza ya motoba eleki, ntango etape ya sika ekelamaki na Bangalor, Inde, elenge mobali moko kaka na liyangani ya bonganganzambe azalaki diakono moko oyo akulaki sika o nkombo ya Gladwin.

Gladwin, nzela moko elongo na mokambi ya Bilenge Mibali mpe mokambi ya etape, babandaki kobenga bilenge mibali ya loningi mingi te mpe kokende kotala bango na bandako na bango. Nokinoki elenge mobali ya mibale, Samuel, abandaki koya lisusu na eklezia.

Mposo moko na moko Gladwin mpe Samuel babengaki to bakendeki kotala bango na mikolo ya bokundoli mbotama na bango. Moko na moko, bilenge mibali ya loningi mingi te bakomaki baninga na bango mpe babandaki kondima mabengisi ya koya na milulu ya lisanga likoki, ya kokende na mayangani ya lisanga likoki, mpe na nsuka ya kosala lisalisi ya bangomei. Lelo, banso kati na bilenge mibali ya etape bazali na loningi na Eklezia.

Makomi eteyi ete masanga makoki ya Bonganganzambe ya Alona masengeli kofanda na likita mpe kolakisa ndakisa malamu—to kotonga mpe kolendisana.9 Bozali kolakisa ndakisa ya malamu wana ezali bino koteya babosolo ya nsango malamu, kokabola maye ya molimo, mpe kopesa litatoli. Pologalami ya mobu ya bilenge ezali kolendisa babokaboli ya ndenge eye na sanza ya mitanoangani ya lisanga likoki, kasi oyo ekoki kosalema kaka ntango mondimi nyonso ya lisanga likoki amiyoki alingami mpe amemiami. Botioli mpe botuki ezali na esika moko te na liyangani oyo—mingimingi ntango mayoki makabolami na polele. Babokambi ya masanga makoki ezali esika moko ya kimia mpo na moto nyonso asala elongo.

Apostolo Paulo apamelaki, “tika te ete maloba na bosoto mabima na minoko na bino kasi bobele yango majali malamu mpo na kolendisa, mpelamoko yango ejali bosenga, ete mapesa bayoki ngolu.”10

Basimbi ya Bonganganzambe basalelaka mokolo moko te lokota ya motaabano to ya bosoto. Bakitisi to bazokisi basusu mokolo moko te. Batongaka nyonso mpe balendisaka basusu ntango nyonso. Oyo ezali lolenge moko ya pete kasi ya nguya mpo na kosalisa.

Na Ntango Nyonso

Mosala ya kosalisaka ezali kosuka na makuli to na babokeyi koteya na ndako to na miango ya mosala ya libaku te. Tozali ntango nyonso mibali ya bonganganzambe—kaka na mokolo ya eyenga te mpe kaka te ntango tozali kolata basemisi ya mpembe mpe bakalavati. Tozali na mokumba ya kosalisa bisika nyonso totelemi. Lisalisi ezali kaka eloko tosalaka te—ezali kolimbola banani tozali.

Bosalisa mikolo nyonso. Mabaku nyonso ezali nzinganzinga na bino. Boluka yango. Bosenga Nkolo asalisa bino bomona yango lisusu. Bokomona ete mingi koleka ezali ya bikela mike, ya bosembo oyo esalisaka basusu bakoma balandi ya Yesu Klisto.11

Wana ezali bino kobunda mpo na kolongobana na Molimo, bokomona lisusu makanisi mpe mayoki kotindikaka bino bosalisa. Wana ezali bino kokela likolo ya babotindiki oyo, bokozwa mingi na yango, mpe mabaku na bino mpe likoki ya kosalisa ekobuta mpe ekopalangana.

Bandeko na ngai bilenge, natatoli ete bosili kopesama likoki mpe nguya kitoko ya Bonganganzambe ya Alona mpo na kosalisa na nkombo ya Nzambe.

Natatoli ete wana ekozali bino kosala, bokozala esalelo na maboko ya Nzambe mpo na kosalisa basusu. Bomoi na bino ekozala malamu mpe ntina mingi koleka. Bokozwa bokasi mingi koleka mpo na kotelemela mabe. Bokozwa esengo ya solo—ya lolenge oyo eyebani na balandi ya solo ya Yesu Klisto.

Tika boyoka esengo ya kokokisaka mokumba na bino ya bule ya kosalisa, Nasambeli na nkombo ya Yesu klisto, amene.