Ezali Likamwisi
Soki bozali misionele ya ntango mobimba na elembo ekangisami likolo ya kazaka na bino te, sikawa ezali ntango ya kopakola moko likolo ya motema na bino—epakolami, lokola Paulo alobaki, “na mai na mokanda te, nde na Molimo na Njambe na bomoi.”
Bomoi ya Yesu Klisto etondaki na makamwisi: Mama moko ya moseka, minzoto ya sika, banzelu kobimelaka babokoli mpate, bakufi miso komonaka, batengoli kotambolaka, banzelu na Getesemane mpe na lilita, mpe likamwisi monene koleka nyonso—Bosekwi na Ye ya nkembo.
Ekoki bino kokanisa likambo ya Bapostolo zomi na moko likolo ya ngomba ya Galilea ntango Nkolo mosekwi ayaki epai na bango mpe alobaki: “Boye, bokenda kojalisa bayekoli na mabota yonso, kobatisa bango na nkombo na Tata, mpe na Mwana, mpe na Molimo Mosanto”?1 “Bokenda na mokili mobimba, kosakola Nsango Malamu epai na bato yonso.”2
Bikolo nyonso”? Mokili mobimba”? Bikelamu nyonso”? Ekokaki kosalama? Atako Yesu apesaki bango elikia, basengelaki komituna soki makamwisi solo malingaki kolanda bango na kopanzaka nsango malamu.3
Bondimi elongaki ntembe, mpe Petelo atombolaki mongongo na ye, kolobaka:
“Yonso bofandi na Yelusaleme, … boyoka maloba na ngai: …
“… Yesu na Nasalete, … [oyo] kati na bino mpe bino bobakisi ye na ekulusu, mpe bobomi ye na maboko: …
“Ye Yesu … Nzambe, asekwisi ye, [mpe] biso yonso tojali batatoli.”4
Ezalaki na bosopani ya molimo mingi mokolo wana, mpe milimo 3.000 ebatisamaki. Kaka lokola Yesu alakaki, bilembo mpe makamwisi elandaki bondimi ya bandimi.
Ntango Eklezia ya Yesu Klisto ezongisamaki na mabele mibu 183 eleki, motindo ya Nkolo na liboke moke ya bayekoli ba Ye ezongelaki maye Ye alobaki bikeke mingi liboso: “Mongongo ya likebisi ekokende epai ya bato banso.”5 “Mpo, solo, lokito esengeli ekende liboso … kati na mokili mobimba, mpe na biteni ya mosika mingi koleka ya mabele.”6
“Bato banso”? “Mokili mobimba”? “Biteni ya mosika mingi koleka ya mabele”? Ekokaki kosalema?
Mobikisi apesaki lisusu elikia na Basantu ba mikolo mya nsuka na Ye,7 kasi ekokaki bango komona molai mpe atandele ya mosala kitoko oyo? Basengelaki kokamwa soki makamwisi solo elingaki kolanda bango na kopanzaka nsango malamu.
Lisusu, bondimi elongaki ntembe, mpe bankoto babatisamaki. Na Angleterre, Mpaka Wilford Woodruff, amonaki lingomba mobimba moko kozelaka boyei na ye. Molimo na Nkolo ekweyaki likolo na bango, mpe abatisaki bateyi 45 mpe bankama mingi ya bandimi na sanza na ye yambo na bilanga ya Benbow.8
Mokolo na biso ezali ya kokesana te. Ntango Mpaka David A. Bednar mpe ngai tozalaki bamisionele mibu 40 eleki (mpe nakoki koyebisa bino ete tozali bakolo koleka bamisionele ya kala nyonso te oyo bafandi na bakiti ya motane), ezalaki na bamisionele 16.000. Lokola Mokambi Monson asangolaki lobi eleki, sikawa tozali na 65.000—mingi koleka liboso. Ezalaki na makonzi 562. Lelo ezali koleka 3.000. Na ntango wana, bapalwasi mpe bitape na biso ezalaki na bikolo 59. Lelo tozali na mayangani na 189 na bikolo 224 mpe mikili ya molongo. Tozali moke na motango, kaka lokola Nefi asakolaki.9 Kasi na ntango wana kaka, bino mpe ngai tozali banzeneneke ya maloba ya lisakoli ya Danyele: “libanga …litimolami na maboko te … [ezali kotondisa] mokili mobimba.”10
Mokolo na biso ezali ntango emonani mpenza ya makamwisi. Basanza motoba eleki ntango Mokambi Monson ayebisaki mbongwana ya mobu mpo na bilenge mibali mpe bilenge basi oyo balingi kosala misio, ezalaki na bosopani moko ya molimo mingi. Bondimi elongi ntembe, mpe bilenge mibali mpe basi bakendaki liboso. Mokolo ya minei kolandaka likita napesamaki mokumba ya kotinda mabiangi ya bamisionele epai ya Bokambi ya Yambo nakamwaki komona mikanda ya kosengela misio ya mibali ya mibu 18 mpe basi ya mibu 19 baye basilaka kobongisa miango na bango, bakendaki kotala badokotolo na bango, basololaki na baepisikopo mpe bakambi ya makonzi na bango, mpe bakotisaki mikanda ya kosengela misio na bango—nyonso kaka na mikolo mitano. Bankoto mosusu basili sikawa kosangana na bango. Ezali likamwisi.
Tozali na botondi mpo na bondimi ya kopesa bokasi ya bandeko na biso basi, motango ya bamisionele oyo ezali kokola uta bikolo na mokili mobimba, mpe motango ya bamisionele kobakisamaka oyo babelemi mpo na kosala. Bamisionele ya sika ntuku mitano na mwambe basili koyebisama, mpe ndako ya boteyi ya bamisionele na biso na Provo ya kotonda esili na kokamwa kozwa moninga ya sika na Mexiko City.
Mokambi Thomas S. Monson alobaki ete: “Tozwaka etinda ya Mobikisi na bokebi nyonso..., ‘Boye, bokenda kojalisa bayekoli na mabota yonso, kobatisa bango na nkombo na Tata, mpe na Mwana, mpe na Molimo Mosanto.’” 11 “Mosala… oyo… ekokoba kokende liboso, kobongolaka mpe kopambolaka babomoi. … Bokasi moko te na mokili mobimba ekoki kokanga mosala ya Nzambe.”12
Tozali banzeneneke ya makamwisi ya Nkolo wana nsango malamu na Ye ezali kopalangana na mokili mobimba.
Bandeko mibali mpe basi, ata Nkolo afuli bamisionele mingi mpo na kosala, Ye azali lisusu kolamusa milimo mpe kofungola mitema ya bato malamu mpe ya bosembo mingi koleka mpo na koyamba bamisionele na Ye. Bosili koyeba bango to bokoyeba bango. Bazali na libota lya bino mpe bafandaka nzinganzinga na bino. Batambolaka koleka liboso na bino na balabala, bafandaka mpembeni na bino na eteyelo, mpe basololaka na bango na Interneti. Yo mpe ozali eteni moko ya motuya ya likamwisi oyo ezali kokola.
Soki bozali misionele ya ntango mobimba na elembo ekangisami likolo ya kazaka na bino te, sikawa ezali ntango ya kopakola moko likolo ya motema na bino—epakolami, lokola Paulo alobaki, “na mai na mokanda te, nde na Molimo na Njambe na bomoi.”13 Mpe bamisionele bazonga, bozwa elembo ya misionele na bino ya kala. Bolata yango te, kasi botia yango esika wapi bokoki komona yango. Nkolo azali na mposa na bino sikawa mingi koleka liboso mpo na kozala esalelo na maboko na Ye. Biso banso tozali na mosala moko ya kosala na likamwisi oyo.
Mondimi ya bosembo nyonso ya Eklezia akanisi na oyo etali kokabola nsango malamu. Boko bakabolaka nsango malamu na pete, mpe tokoki koyekola mingi uta na bango.14 Boko babundaka mpe bamitunaka lolenge nini ya kosala malamu koleka, kolikiaka ete liyoki ya elindo tokoyokaka ntango mosusu ekozwa esika mosusu ya kokende.
Mposa na biso ya kokabola nsango malamu ememaka biso banso na mabolongo na biso, mpe esengeli, mpamba te tozali na mposa ya lisalisi ya Nkolo.
Mokambi Monson asengi ete tosambelaka mpo na “bisika wana wapi nguya na biso ezali moke mpe wapi topesami nzela ya kokabola nsango malamu na bonsomi te.”15 Wana ezali biso kosambela na solo mpe na lisanga Tata wa biso na Lola, Nkolo akokoba kofungola bikuke monene mpo na biso.
Tosambelaka lisusu mpo na mabaku na biso ya kokabola nsango malamu. Apostolo Petelo alobaki, “Boselingwaka mikolo nyonso mpo na kozongisa monoko na moto na moto oyo akotuna … ntina [mpo] na elikia ejali kati na bino.”16
Na mobulu17 mpe boningani 18 ya mokili ya lelo, ezali kokamwa te ete bato moke na moke mingi bazali kokende esika ya bango ya kokumbama. Atako mingi bazali balingi kozala penepene na Nzambe mpe kozala na bososoli boleki malamu ya ntina ya bomoi, bazali na mituna eyanolama te. Mingi bazali na mitema ya kofungwana na bosolo, kasi lokola profeta Amosa alimbolaki, “[bakopota mbango] epai na epai mpo na [koluka] liloba na Yawe, nde bakojuana na yango [te].”19 Bokoki kosalisa koyanola mituna na bango. Na masolo ya mikolo na mikolo na bino bokoki kobakisa na bondimi na bango na Klisto.20
Mobikisi alobaki: “Simbani likolo mwinda mwa bino ete mongenge epai na mokili. Tala nazali mwinda moye bokosimba likolo.”21
Nalaki binso, lokola bokosambela mpo na koyeba elongo na nani bozali kolaba, bankombo mpe bilongo bikoya na kati ya mayele. Maloba mpo na koloba ekopesama na ngonga mpenza bozali na mposa na yango.22 Mabaku makofungwamela bino. Bondimi bokolonga ntembe, mpe Nkolo akopambola bino elongo na makamwisi na binomei mpenza.
Mobikisi ateyaki biso lolenge nini kokabola nsango malamu. Nalingaka lisolo ya Andalea, oyo atunaki, “Motei, ozali kofanda wapi?”23 Yesu akokaki koyanola kopesaka esika wapi azalaki kofanda. Kasi na esika na yango Ye alobaki na Andalea, “Boyaka kotala.”24 Nakolinga kokanisa ete nkolo azalaki koloba, “Boyaka kotala kaka te wapi nafandaka kasi lolenge nini nafandelaka. Boya kotala nani nazali. Boya koyoka Molimo.” Toyebi makambo nyonso te ya mokolo wana, kasi toyebi ete ntango Andalea akutanaki na ndeko na ye Simona, ye asakolaki, “Tosili kojuana … na Masiya.”25
Na baoyo basepelaka na masolo na biso, tokoki kolanda ndakisa ya Mobikisi na kobengisaka bango mpo na “koya kotala.” Boko bakondima libiangi na biso, mpe basusu bakolinga te. Toyebi banso moto oyo basili kobengisama mbala mingi liboso andima libiangi moko mpo na “koya kotala.” Tika lisusu tokanisa na ntina ya baoyo mbala moko bazalaki na biso elongo kasi baye sikawa tozali komona bango mingimingi te, kobengisaka bango mpo bazonga komona mbala mosusu.
Tomemiaka boponi mpe ngonga ya moto na moto. Nkolo alobaki, “Moto nyonso esengeli apona yemei.”26 Bozangi bosepeli ya moto esengeli te ekitisa basinga na biso ya boninga mpe bolingo. Atako soki libiangi endimami to te wana ezali yo kobengisa basusu mpo na “koya kotala,” okoyoka bondimami ya Nkolo mpe, elongo na bondimami wana, emekoli ya kobakisa ya bondimi mpo na kokabola bondimi mbala moko lisusu.
Mpo na basaleli ya Interneti mpe telephone ya maboko, ezali na banzela ya sika ya kobengisa basusu mpo na “koya kotala.” Tika tosala bokaboli bondimi na biso na Interneti mingi eteni moko ya bomoi na biso. LDS.org, Mormon.org, Facebook, Twitter—nyonso epesi mabaku.
Mpo na kokabola nsango malamu, bandimi ya bilenge na Boston babandaki bablog mingi.27 Baye basanganaki na Eklezia babandaki ezaleli ya bango na Interneti, kolandaka masolo elongo na bamisionele. Mayele oyo lisusu esalisaki bilenge bazala na bondimi bonene na kolobelaka nsango malamu bangomei. Moko na bango alobaki, “Oyo ezali mosala ya misio. Oyo ezali lisano ya misio.”28
Tozali banso kati na oyo elongo. Elongo na baninga bandimi ya palwasi mpe bamisionele, tosalaka mwango mpe tosambelaka mpe tosalisanaka. Koba kokanisa mpe kosambela mpo na bamisionele ya ntango mobimba. Tia elikia na bango elongo na libota mpe baninga na yo. Nkolo atie elikia na bango mpe abiangi bango mpo na koteya mpe kopambola baoyo bazali koluka Ye.
Mokambi Paulo Kretly ya Misio Maputo na Mozambique akabolaki mayele oyo: “Ezali momesano na Mozambique [mpo] bato babale bafanda na bomoi na bango elongo [kozangaka kozala ya kobalana mpamba te] bonkoko ya Afrika [yango]esengeka mbongo ya libala ebele, mbongo oyo balongani mingi bakoki kopesa te.”29
Bandimi mpe bamisionele bakanisaki mpe basambelaki na ntina na lolenge nini kosalisa.
Eyano na nsambo na bango ezalaki ete bakobeta nsete na mobeko ya bopeto ya nzoto mpe ntina ya libala mpe mabota ya seko. Mpe wana kosalisaka balongani bayambola mpe babalana engebene na mobeko, bakoteya na ntina ya esengo oyo eyaka kaka se na nzela ya kolandaka Yesu Klisto.
Oyo ezali foto ya balongani ya bingumba mibale bikeseni na Mozambique. Babalanaki na mokolo ya mitano, babatisamaki elongo na bana na bango ya mikolo na mokolo ya poso.30 Baninga mpe libota babengisamaki mpo na “koya kotala,” mpe bankama “bayaki kotala” mpenza.
Kolanda libatisi, ndeko mwasi moko alobaki, “Tosengeli kopona soki kolanda batata na biso to kolanda Yesu Klisto. Biso toponi kolanda Klisto.”31
Bokoki kozala na Mozambique te, kasi na lolenge na binomei, na bonkoko na binomei, bokoki kokabola nsango malamu ezongisami ya Yesu Klisto.
Sambela Tata wa yo na Lola. Oyo ezali mosala na Ye ya bule. Na bondimi ya kobakisa, okokambama na maye okosala. Ye akofongola bikuke, akolongola mabaku ya nzela, mpe akosalisa yo olonga bikonongo. Nkolo asakolaki, “mongongo ya bokebisi ekozala epai ya bato banso, na monoko ya bayekoli ba ngai, … mpe moko te akokanga bango.”32
Natatoli ete “mongongo ya Nkolo [ekozala] na bansuka ya mabele, ete baye banso bakoyoka ye bakoka koyoka ye.”33 Ezali likamwisi. Ezali likamwisi. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.