2010–2019
Nzela ya Nzambe
Sánzá ya mínei 2013


Lolenge ya Nkolo

Lolenge ya Nkolo ezali ete toyokela mateya ya bakambi na biso, tososola mabongisi, mpe tomiyangela bisomei.

Ntuku Sambo

Nazali kosala lokola ntuku sambo. Bantuku Sambo babiangami mpo na kozala batindami—mpo na kokabola liloba ya Nkolo lokola tozwi yango uta na bapostolo mpe baprofeta mpe uta na Molimo mpe mpo na kozala banzeneneke ya kafukafu ya nkombo ya Klisto na kosakolaka na mokili mobimba, na kotongaka Eklezia mpe koyangelaka makambo na Ye (tala D&C 107:25, 34).

Elenge Mobali Mokati Bilanga

Nakolaki na bilanga moko penepene ya Burley, Idaho—“Elenge mobali mokati bilanga ya Idaho” ya solo! Na boye nayekolaki:

  1. Kosala—soki oloni te, okobuka te.

  2. Kosala na mayele—soki oyingisi mai o bilanga mpe obongisi mabele mpo ebota, okobuka mingi.

  3. Ntina ya kolanda ngonga—soki oloni na ngonga malamu, mbula ya mpempe ya ntongontongo ekoki kobebisa milona te.

  4. Mpo na kosala maye masengelami to masengeli kosalama kotala te nini esepelisi, elingami, to ebongi kosalama—obendi miliki ya ngombe ntango esengi kobendama miliki, kasi ntango yo olingi kobenda te.

  5. Mpo na koloba polele—na makambo eteli baniama mpe masini, bozali na ntango ya “kotepatepa te” to ya kokanisa na ntina ya kozala semba na politiki. (Na makambo oyo, lokola nasali o ntei ya Eklezia, natuni mbala mingi, “Bolingi naloba polele to na sukali?” Lokola mobeko Basantu baponi “polele!” Nakozala polele lelo.)

  6. Na nsuka, lokola elenge mobali na bilanga ya Idaho, nayekolaki kokangama na makambo ya ntina.

Eloko moko te ezali na ntina mpo na biso nyonso, mpe malongi na biso, mingi koleka babosolo ya eteni ya yambo ya bondimi: “Tondimi Nzambe, Tata wa Seko, mpe Mwana wa Ye, Yesu Klisto, mpe Molimo Mosantu” (Biteni ya Bondimi 1:1).

Lisusu, Ye azali Tatawa biso ya Lola, oyo ayebi biso, alingaka biso, mpe alingi biso tozonga epai na Ye. Yesu azali Mobikisi mpe Mosikoli na biso, oyo na nzela ya Bomikabi asalaki yango ya solo biso tokolonga kufa mpe kozala lisusu na bomoi mpe ekoka kosalama mpo na biso tonetwama mpe tozwa bomoi ya seko. Molimo Mosantu azali mobondisi, mobimisi, moteyi, motatolisi, mpe mokambi na biso .

Kanisa na ntina na yango, bandeko mibali mpe basi—tozali bana etike te na molimo! Tozali biso moko te.

Matomba ya kozalaka na baboti —ya kozalaka mwana etike te ezali nini? Tokoki koyekola uta na bango, kozwa litomba uta na boyebi na bango, koboya mitambo oyo na ntina na yango bazali kokebisa biso, mpe kososola malamu kolela mpo na lolenge ya bomoni na bango. Tosengeli te kobunga, kobulungana, kowumbama, to kozala makasi moke. Oyo ezali mingimingi solo na oyo etali Tata wa biso ya Lola, oyo ateyi biso mpe alakisi biso kaka se lolenge te kasi lolenge yango.

Nzambe Azali na Lolenge

Ya solo, Nzambe azali na lolenge mpo tozala na bomoi,1 kolinga,2 kosalisa,3 kosambela,4 kosolola,5 kozalana,6 kokamba,7 kobala,8 kobokola bana,9 koyekola,10 koyeba solo,11 kokabola nsango malamu,12 kopona na bwania nini tokolia,13 bongo na bongo.

Elongo na makomi, boko maziba manene mpo na kozwa lolenge ya Nzambe ezali True to the Faith, For the Strength of Youth, mpe mateya mosusu ya bapostolo mpe baprofeta ya bomoi.

  1. Ndakisa, Nkolo ateyaki biso na makomi: “Mpo ete makanisi na ngai majali makanisi na bino te mpe njela na bino ijali njela na ngai te. Yawe alobi bongo.“Jambi lokola lola eleki mokili likolo, boye njela na ngai eleki mpe makanisi na ngai maleki makanisi na bino” (Yisaya 55:8–9).

  2. Moko ya mabe ya mikolo mya nsuka miye “moto nyonso azali kotambola na lolenge na yemei” (D&C 1:16). Na Masese tokebisami “kotika te ete omonana na mayele na miso na yo moko” mpe “kondima bososoli na yo moko te” (tala Masese 3:5–7).

  3. Toteyami ete soki tosali makambo na lolenge ya Nkolo, Ye akangisami mpe tozali na likoki na bilaka na Ye; mpe soki na lolenge na Ye te, tozali na elaka moko te (tala D&C 82:10).

  4. Nkolo akesenisaki lolenge na Ye na lolenge na biso na boyekolisi na Ye ya profeta Samwele, oyo atindamaki mpo na kokende kozwana na mokonzi ya sika: “Kasi Yawe alobaki na Samwele ete, tala na elongi na ye te na molai na njoto na ye te mpo ete naboyi ye. Mpo ete Yawe akotalaka lokola ekotalaka moto te. Moto akomonaka lolenge na libanda nde Yawe akotalaka kati na motema” (1 Samwele 16:7).

  5. Ata na mposa endimama na mokili mobimba mpo na kosalisa babola mpe bakeleli, Nkolo andimaka ntina na biso kasi akebisaka, “Kasi esengeli kosalama na lolenge na ngaimei” D&C 104:16). Soki te, na babokasi na biso mpo na kosalisa, tokoki solo kosala bango mpasi. Nkolo ateyi biso bosenga ya kotombola bomikoki. Ata soki tozali na likoki ya kosalisa, tosengeli te kopesa to kokaba oyo bakoki mpe basengeli kosala na bangomei. Bisika nyonso bameki yango, mokili eyekoli mabe ya bisengasenga. Solo Nzambe ayebi malamu mingi koleka.

Tika totala boko bandakisa mosusu. Nkolo azali na lolenge ya kosala mosala ya misionele. Ekomami na makomi mpe na Preach My Gospel mpe esalelami lokola ekambami na Molimo.

Nkolo azali na lolenge na Ye, to lolenge yango, kolinga. Boye ya mokili balobaka maye mazali ntina ezali ete bato mibale balingana. Tata wa biso na Lola ateyaka ete oyo ezali ntina, kasi Ye ateyaka biso mingi koleka: ete ezali na lolenge endimama mpe ntango mpo na kolakisa bolingo wana.

Komikamba

Joseph Smith ateyamaki uta bolenge na ye ndenge ya Nkolo. Ntango atunaki lolenge nini akambaki Eklezia, alimbolaki ete ateyaki mabongisi malamu mpe bandimi bamikambaki.14 Bandeko mibali mpe basi, bapostolo mpe baprofeta ya bomoi na biso bazali ntango nyonso koteya mabongisi malamu. Motuna ezali “Ezali biso kosaleka mabongisi ya komikamba?”

Eloko moko toteyami mingimingi ezali tofuluka bisika wapi tolonami. Nzoka nde ntango mosusu tosenginiami tokende na mwa bituka ya sika, kokanisaka ete bana na biso bakozala na baninga mingi koleka mpe wana bapologalami ya bilenge malamu.

Bandeko mibali mpe basi, ekanisi biso mpenza ete makambo ya likama na lobiko ya bana na biso ezali nzinganzinga na biso wapi tofandi? Bapostolo mpe baprofeta bateyi biso mbala mingi maye masalaka na kati ya ndako ezali mosika motuya koleka maye bana na biso bakutaka na libanda. Lolenge nini tobokolaka bana na biso ezali motuya koleka bisika wapi tobokolaka bango.

Ya solo ezali na makambo mosusu oyo esalaka kati na kozwaka mokano ya bisika wapi kofanda, mpe na matondi, Nkolo akokamba biso toluka bondimisi na Ye.

Motuna mosusu ezali “Bisika nini tosengelami?” Na mibu 16 nasalaki na bokambi ya Likonzi ya Houston Texas North. Mingi bakendeki na etuka na biso na mibu wana. Tolingaki mbala mingi kozwa libiangi ya telefoni koyebisaka moto moko koyaka awa mpe kotunaka soki palwasi ya malamu koleka nyonso ezalaki nini. Kaka mbala moko na mibu 16 nayambaki mpenza libiangi kotunaka, “Palwasi nini ezali na mposa ya libota malamu? Bisika wapi ekoki biso kosalisa?”

Na mibu ya ebandeli ya Eklezia, Mokambi Brigham Young mpe basusu bazalaki kobianga bandimi mpo na kokende na esika songolo kotonga Eklezia kuna. Ya kosekisa ezali ete ata sikawa tozali na bandimi ya Eklezia ya botongono bisika nyonso oyo bazalaki kolinga kokende esika nyonso profeta asengaki bango bakende. Ezali biso kozela Mokambi Monson aloba na moko na moko mingi koleka efuka 14 ya biso wapi libota na biso esengami? Lolenge ya Nkolo ezali ete toyoka mateya ya bakambi na biso, tososola mabongisi ya malamu, mpe tomikamba.

Mingimingi ya Motuya

Na manso oyo ezali kosalema na Eklezia lelo, mpe lokola nkolo azali kotambwisa mosala na Ye na ngambo nyonso, ezali kutu na likama mingi ya motuya koleka ete tosala manso tosalaka na lolenge na Ye!

Mingimingi na mosala ya lobiko, toyekoli ete “na likabo lya Mwana Mobali wa ye elengeli Nzambe nzela eluti elamu mingi” (Etele 12:11). Malongi ya Klisto “azali nzela ; mpe ezali na nzela esusu te epesami o nse ya lola na yango moto akoki kobikisama o bokonzi bwa Nzambe” (2 Nefi 31:21).

Bosukisi

Wana ezali biso komona mingi na mokili lelo kozalaka na bomoi na mobulungano to, mabe koleka, kowayawayaka na banzela epekisami mpe koniokwamaka bambando ezanga ntina ya maponi ya mabe, ezali kotinda ndai nalinga konganga lokola Alma:

“O ete nazalaka anzelu, mpe nakokaka kozala na litombeli lya motema mwa ngai, ete nakokaka kokende mpe koloba na mondule mwa nzambe, na mongongo moko mwa koningisa mabele, mpe kobelela boyamboli epai ya bato banso!

“Iyo, nalingi kosakola epai ya bozo bonso, ….mwango mwa bosikoli, ete basengeli koyambola koya epai ya Nzambe wa biso, ete ekoka lisusu te kozala mawa likolo lya mabele mobimba” (Alma 29:1–2).

Lisusu, natatoli Nkolo azali na lolenge yango! Tata wa biso ya Lola ayebi biso, alingaka biso, mpe alingi kosalisa. Ye ayebi malamu koleka nyonso lolenge nini kosalisa. Tozali bana etike ya molimo te!

Mobikisi na biso, Yesu Klisto, azali “njela mpe solo mpe bomoi” (Yoane 14:6; tala lisusu Alma 38:9). Nzela na Ye efandisami na bosolo ya seko mpe ekambaka biso na “kimia kati na mokili oyo, mpe bomoi ya seko na mokili ekoya” (D&C 59:23). Natatoli bongo na nkombo ya Yesu Klisto, amene.