Tozali Moko
Nasambeli ete esika kani tozali mpe mikumba kani tozwi na bonganganzambe ya Nzambe, tosangana na likambo ya komema nsango malamu na mokili mobimba.
Nkolo alakisaki yango polele na ebandeli mpenza ya eleko oyo ya nsuka ete tosengelaki komema nsango malamu na mokili mobimba. Oyo Ye ayebisaki na bamemi bonganganzambe moke na 1831 Ye alobi yango na mingi lelo. Ozala moto ya mibu kani, ezala makoki, libiangi na yo na Eklezia, to esika wapi ofandi, tozali lokola tobiangami na mosala mpo na kosalisa Ye na lobiko ya milimo kino Akoya lisusu:
“Mpe lisusu, nalobi na bino, napesi bino motindo moko, ete moto nyonso, mpaka, nganganzambe, moteyi, mpe lisusu mondimi, bokende elongo na makasi ma ye, elongo na mosala ya maboko ma ye, mpo na kolengela mpe kokokisa makambo oyo natindi.
“Mpe tika liteya lya bino ezala ya mongongo ya bokebisi, moto nyonso na mozalani wa ye, na bosembo mpe na bosekomi.
“Mpe bokende libanda o ntei ya bankuna. Bomibikisa. Bozala peto, bino baoyo bomemi basani ya Nkolo.”1
Sikawa, bino baye ya Bonganganzambe ya Alona. Zambi bokoki komona ete motindo ya Nkolo etali bino mpe lokola. Lokola boyebi ete Nkolo akolengele ntango inso nzela mpo na kobatela mitindo mya Ye, bokoki kozela ete Akosala yango mpo na moko na moko na biso.
Tika nalobela bino boniboni Ye asalaki mpo na mwana mobali moko oyo sikawa azali na mosala ya nganganzambe na Bonganganzambe ya Alona. Azali na mibu 16. Avandi na mboka moko wapi bamisionele bakomaki yambo mobu moko moleki. Bapesamaki mosala na bingumba mibale, kasi na engumba wapi mwana mobali azalaki kovanda te.
Ntango azalaki elenge mpenza, baboti ba ye bamemaki ye na Utah mpo na bokengi. Libota eteyamaki mpe ebatisamaki na bamisionele. Abatisamaki na Eklezia te mpamba te akokisaki nanino mibu mwambe te.
Baboti na ye bakufaki na likama ya motuka. Yango wana nkoko na ye ya mwasi azongisaka ye na ndako na ye, kokatisaka mbu, na engumba wapi abotamaka.
Azalaki kotambola na babalaba na sanza ya misato kaka mobu moko eleki ntango ayokaki lokola asengelaki koloba na mwasi moko oyo ye ayebaki te. Alobelaki ye na mwa Angele oyo akokaki komikundola. Azalaki monganga atindamaki na mokambi ya misio na engumba na ye mpo na koluka ndako mpe lopitalo mpo na bamisionele oyo balingaki kotindama kuna. Mwana mobali mpe mwasi bakomaki baninga lokola bazalaki kosolola. Ntango azongaki na nganda ya misio, balobelaki bamisionele na ntina na ye.
Bampaka mibale ya yambo bakomaki na sanza ya zomi 2012. Mwana mobali etike wana azalaki libatisi lya bango ya yambo na Eklezia ya Yesu Klisto ya Basanu ba Mikolo mya Nsuka. Na sanza ya misato ya mobu moye azalaka mondimi oyo awumeli sanza minei. Akulisamaki nganganzambe na bonganganzambe ya Alona mpe boye akokaki kobatisa mobongwani ya mibale na Eklezia. Azalaki pionie ya yambo ya banganganzambe na kosangisa bana basusu ya Tata na Lola elongo na ye mpo na kotia Eklezia na engumba moko ya penepene na bato 130.000.
Na eyenga ya pasika, sanza ya misato 31, 2013, bandimi ya Eklezia kuna babakisamaki tii na bandimi motoba na engumba wana. Azalaki bobele ye moko mondimi ya esika wana oyo azalaki na liyangani eyenga wana. Libolongo na ye ezokaki mokolo ya yambo, kasi azalaki na mokano ya kozala kuna. Asambelaki ete akoka kotambola tii na eklezia. Akabolaki elambo elongo na bampaka bilenge minei mpe bamisionele babale..
Lisolo oyo ezali ya kokamwa te longola se soki omoni kati na yango ndakisa ya loboko ya Nzambe na kotongaka bokonzi bwa Ye. Nasili komona yango mbala mingi.
Namonaki yango na New Mexico lokola elenge mobali. Uta bankola baprofeta balobeli biso ete tosengeli kosalisa bamisionele kokutana mpe koteya basembo na motema mpe nde kolinga baoyo bakoti na bokonzi.
Namoni mpo na ngaimei nin bakambi ya banganzambe mpe bandimi bakoki kosala.Na 1955 nakomaki soda mokonzi na mampinga ya mpepo ya Etazini. Episikopo na ngai apesaki ngai lipamboli kaka yambo ya kolongwa mpo na esika ya ngai ya yambo, oyo ezalaki na Albuquerque, New Mexico.
Kati na lipamboli na ye alobaki ete ntango na ngai na mapinga ma mpepo elingaki kozala mosala ya misio. Nakomaki na eklezia na eyenga na ngai ya yambo na Albuquerque First Branch. Moto moko atambola tii epai na ngai, amilakisaki lokola mokambi ya disitiliki, mpe alobelaki ngai ete alingaki kobianga ngai mpo na kosala lokola misionele ya disitiliki.
Nalobelaki ye ete nalingaki bobele kozala kuna mpo na boyekoli ya mwa bamposo mpe nsima nalingaki kotiama esika mosusu na mokili. Alobaki nayebi likambo moko te na yango, kasi tosengeli kobianga yo mpo na kosala.” Na katikati ya boyekoli ya kisoda, na nzela oyo emonanaki lokola libaku malamu, naponamaki kati na bakonzi ya basoda nkama oyo bazalaki koyekola mpo na kozwa esika na babilo ya mokonzi moko ya basoda oyo nsima akufaki na mbalakaka.
Boye, mibu mibale nazalaki wana, nasalaki na libiangi na ngai. Mpokwa mingi koleka mpe na nsuka ya mposo, nateyaki nsango malamu ya Yesu Klisto na bato bandimi bamemelaki biso.
Baninga na ngai mpe ngai tozwaki ata mingi koleka ngonga 40 na sanza moko na mosala na biso ya misio na kozangaka kobeta bikuke mpo na kokuta moto ya koteya. Bandimi basalisaki biso na mosala mingi ete mbala mingi tozalaki koteyaka mabota mibale na mpokwa moko. Namonaki mpo na ngaimei nguya mpe lipamboli na libiangi ya mbala na mbala ya baprofeta mpo ete mondimi moko na moko azala misionele.
Na eyenga ya nsuka liboso natika Albuquerque, likonzi lya yambo ebongisamaki na engumba wana.Ezali sikawa na tempele moko ya bule kuna, ndako moko ya Nkolo, na enguma moko wapi tokutanaki mbala moko na ndako ya losambo elongo na Basantu bamemelaki biso baninga ya koteya mpe koyoka litatoli lya Molimo. Bayokaki mpenza ete bayambaki bango malamu na Ekleiza ya solo ya Nkolo.
Nsima namonaki yango na New England, ntango nakendeki na eklezia. Nabiangamaki lokola mosungi na mokambi ya disitiliki moko monene oyo azongaki na Eklezia nsima ya kozala moto oyo azangaki litomba na moto moko ya nguya monene na molimo. Moteyi na ya ye na ndako alingaki ye mingi mpo ete abosana likaya na ye mpo na kotala nini Nzambe akokaki kosala na ye. Mokambi ya disitiliki mpe ngai tokumbaki motuka likola ya bangomba mpe kolanaka mabongo mpo na kotala mwa bitape oyo etandamaki na Massachutts mpe Rhode Island mpo na kotonga mpe kopambola bokonzi bwa Nzambe.
Na mibu oyo nasalaki elongo na moyangeli monene oyo, tomonaki bato bamemaki baninga na Eklezia na ndakisa na bango mpe libiangi na bango mpo na koyoka bamisionele. Mpo na ngai bokoli ya bitape wana emonanaki ya malembe mpe ya kolemba. Kasi eyenga nalongwaki natikaki, mibu minei nsima, Bapostolo babale bayaki mpo na kobongisa disitiliki ya biso ete ekoma likonzi na Longfellow Park chapel na Cambridge.
Nsima ya mibu nazongaki koyangela likita ya likonzi kuna. Mokambi ya likonzi amemaki ngai kotala ngomba ya mabanga na Belmont. Alobelaki ngai ete elingaki kozala esika malamu mingi mpenza mpo na tempelo ya Nzambe. Moko ezali kuna sikawa. Ntango natalaki yango, namikundoli bandimi na bomikitisi oyo navandaki elongo na bango na mwa bitape, bato ya pembeni oyo babengisaki, mpe bamisionele oyo bazalaki koteya bango.
Ezali na diakona moko ya sika na liyangani oyo awa na mpokwa oyo. Nazalaki elongo na ye na eyenga se moko wana ya Pasika wapi nganganzambe oyo nalobalaki liboso, atambolaki kokende na liyangani na ye wapi kaka moto moko azalaki. Diakona wana angengaki ntango tata na ye alobaki alingaki kozala na liyangani ya bonganganzambe elongo na ye mpokwa ya lelo. Tata na ye azalaki misionele moko monene na misio moko wapi nkoko na ye azalaki mokambi. Namoni Mokanda ya Misio ya 1937 ya nkokololo na ye. Libula na ye ya kosangola mpo na komemaka bato na Eklezia ezali se kokoba.
Nalobaki elongo na epikisikopo ya diakona wana mpo na koyeba mayele kani akokaki kozela na kozwaka mokumba ya bonganganzambe mpo na kosala na kosangisaka milimo mpo na Nkolo. Episikopo azalaki na nsai ntango elimbolaki boniboni moyangeli ya palwasi alandelaki bokoli ya baluki. Azwaki boyebi wana na kozalaka elongo na bamisionele.
Episikopo mpe lisanga ya palwasi ya ye bakolobala moluki nyonso oyo azali kokola. Bakokana nini kosala mpo na moto nyonso mpe mabota ma bango mpo na kosalisa bango kokoma baninga yambo ya libatisi, mpo na kokotisa bango na milulu, mpe koleisa bango baye bazwi libatisi. Aolbaki bamisionele na libaku bazali na bilako ekoka mpo na koteya mpo ete bamema basimbi Banganganzambe ya Alona lokola baninga.
Mwango ya misio ya palwais ekwi bantina ya masanga makoki mpo na kobengisa baye bango bayebi bakutana na bamisionele. Ata bokambi ya lisanga likoki ya badiakona ebengisami mpo na kotia bantina mpe mwango mpo nna bandimi ba lisanga likoki lya bango kosalisa komema bango baye bayebi na kati ya bokonzi ya Nzambe.
Sikawa, diakona oyo na palwasi oyo maksi mpe nganganzambe na mwa lingomba ya bandimi ya sika bakoki komonena bazala na moke ekokani bango na bango to na bino. Mpe bokoki komona bokokani mingi na mayele ma bino na kotongaka Eklezia elongo na nini namonaki lokola likamwisi na New Mexico mpe New England.
Kasi ezali na nzela moko na yango tozali moko na mokumba mwa biso na bonganganzambe. Tomisantisi mpe tokokiki ntomo ya biso ya moko na moko na motindo mpo na komema nsango malamu na bana banso ba Tata wa biso ya Lola.
Tokaboli mayele na nzela na yango Nkolo bazali kotonga bokonzi bwa Ye na mabele. Na Eklezia ya Ye, elongo na bisalele ya kitoko mpe libongisi topesami, ezali naino na bosolo moko ya ntina eteyami na baprofeta ya boniboni tosengeli kokokisa etida ya biso ya mosala ya misio.
Na likita linene ya sanza ya minei na 1959, Mokambi David O. McKay ateyaki libongisi lokola baprofeta basalaki uta mokolo mwa ye, lokola Mokambi Thomas S. Monson. Mokambi McKay asangelaki na ndimbola na ye ya nsuka ete na 1923 na Mission Britanique, ezalaki na lilako moko linene litindamaki na bandimi ba Ekliezia. Mokambi McKay alobaki mokano ezalaki: “Bobwaka mokumba likolo ya mondimi nyonso ya Eklezia ete na mobu moko ya 1923 mondimi nyonso akozala misionele. Mondimi nyonso misionele! Okoki komema mama na yo na Eklezia, to ekoki kozala tata na yo; ntango mosusu boninga na yo ya mosala. Moto mosusu akoyoka nsango malamu ya bosolo na nzela na yo.”
Mpe Mokambi McKay akobaki: “Mpe wana ezali nsango lelo. Mondimi nyonso—funda moko na ndambo—misionele moko!”2
Ntango esakolamaki na 2002 ete mosala ya misio ekokoma mokumba ya baepisikopo, nakamwaki. Emonanaki na ngai lokola basilaki kozala komema mokumba penepene na bandeko ya bango na kosalisaka bandimi mpe kokambaka mabongisi ma palwasi.
Episikopo moko nayebeki amonaki yango lokola mokumba ya kobakisa te, kasi libaku mpo na komema palwasi esika moko mpo na ntina monene wapi mondimi nyonso akomaki misionele. Abiangaki moyangeli ya misio ya palwasi. Akutanaki elongo na bamisionele yemei mposo nyonso mpo na koyekola mosala mwa bango mpe kolendisa bango. Palwasi emonaki banzela mpo na mabongisi mpe masanga makoki kosalela mayele ya kosalisa lokola bolengeli ya misio. Mpe lokola zuzi na Yisalaele, asalisaki bilenge koyoka mapamboli ya Bomikabi mpo na kobatela bango peto.
Kala te natundaki boniboni alimbolaki komata likolo ya mabatisi ya babongwani na palwasi mpe bobakisi na motango ya bilenge babonga mpe na mposa ya komema nsango malamu ya Yesu Klisto libanda na mokili. Alobaki emonani epai na ye ete ezalaki te mpenza mingi mokumba moto moko asalaki, kasi lolenge bakomaki moko na nsai mpo na komema bato na kati ya lingomba ya Basantu oyo ekomemela bango esengo ya boye.
Mpo na boko ezalaki wana mpe mingi koleka. Lokola bana babali ba Moziya, bayokaka mbano ya lisusu na bomoi na bangomei mpe libiki ya kokamwa ya Bomikabi na kati ya Eklezia ya Nzambe. Uta na bolingo mpe botondi mpo na likabo ya Mobikisi mpo na bango, balingaki kosalisa moto nyonso bakokaki mpo na koponioka na mawa ya lisumu, koyoka bosepeli ta bolimbisi, mpe kosangana elongo na bango na kimia ya bokonzi ya Nzambe.
Ezalaki bolingo ya Nzambe mpe bolingo mpo na baninga mpe bazalani oyo esangisaki bango mpo na kosalisa bato. Bazalaki na mposa ya komema nsango malamu na eteni ya bango ya mokili. Mpe balengelaki bana ba bango na kolongobana mpo na kobiangama na Nkolo mpo koteya, mpo na kotatola, mpe kosala na biteni bya bango ya elanga ya vinu ya Ye.
Ezala na palwasi ya monene wapi diakona ya sika akosala mokumba mwa ye mpo na kokabola nsango malamu mpe kotonga bokonzi to na mwa lingomba ya bato mosika mpenza wapi banganganzambe ya sika bazali kosala, bakozala moko na lotomo. Diakona akofulama na bolingo ya Nzambe mpo na kokende epai ya baninga bazali naino te bandimi. Akozwa moninga na ye na nzela ya lisalisi to molulu na Eklezia mpe nde bakobengisa ye mpe libota na ye mpo na koteyama na bamisionele. Na bango baye babatisami, akozala moninga basengeli.
Nganganzambe akobengisa basusu mpo na kosangana elongo na ye na mwa lingomba ya Basantu wapi ayokaki bolingo ya Nzambe mpe kimia epambolami ya Bomikabi.
Soki akobi na botongono na mokumba ya bonganganzambe, akomona mwa lingomba moke ya bato kokoma etape, mpe nsima likonzi ya Siona ekoya na engumba na ye. Ezala na palwasi moko na episikopo ya bolengeli. Ekokoka kozala bana babali na ye to bankoko ya babali na ye oyo moko moko bakomema mosali moko ya Nzambe na ngomba moko ya penepene mpe koloba, “Eye ekoki kozala esika ya kitoko mpenza mpo na tempelo.”
Nasambeli ete esika kani tozali mpe mikumba kani tozwi na bonganganzambe ya Nzambe, tosangana na likambo ya komema nsango malamu na mokili mobimba mpe ete tolendisa bato tolingaka mpo na kopetolama na masumu mpe kozala na esengo elongo na biso na bokonzi ya Nzambe. O nkombo ya Yesu Klisto, oyo ya Ye Eklezia ezali, amene.