2010–2019
Elikia na Pole ya Nzambe
Sánzá ya mínei 2013


17:12

Elikia ya Pole ya Nzambe

Wana ezali biso koluka kobutisa bolingo naa biso mpo na Nzambe mpe kobunda mpo na kolinga mozalani biso, pole ya nsango malamu ekozinga biso mpe kotombola biso.

Bokoti na Bopeli

Nasepeli mingi liyememi moko na bilo na ngai oyo nkombo na yango ezali Bokoti na Bopeli. Ekelamaki na moninga na ngaii, moyemi ya Danemark Johan Benthin, oyo azalaki mokambi ya likonzi ya yambo na Copenhague, Danemark.

Liyemi ezali kolakisa kisuku ya molili na ekuke ya kofungwama uta na yango pole ezali kongenga. Ezali na litomba mpo na ngai ete pole kowutaka na nzela ya ekuke engengisi kisuku mobimba te—kaka esika oyo elandi liboso ya ekuki.

Na ngai, molili mpe pole na liyemi oyo ezali ndakisa ya bomoi. Ezali eteni ya ezalela na biso lokola bato na bokufi mpo ete ntango mosusu tomiyoka lokola tozingami na molili. Tokoki kobungisa molingami na biso moko; mwana akoki kowayawaya; tokoki kozwa eyano ya monganga ya mabe; tokoki kozala na mikakatano ya mosala mpe kozala na mokumba ya bantembe to babobangi; to tokoki komiyoka biso moko kaka to ya kolingama te.

Kasi atako tokoki komiyoka ya kobunga na kati ya makambo na biso ya mikolo oyo. Nzambi alaki elikia ya pole na Ye—Ye alaki kongengisa nzela liboso na biso mpe kolakisa biso nzela ya kobima libanda ya molili.

Kisuku Etonda na Molili

Nakolinga koloba na bino oyo etali mwasi moko oyo akolaki na kisuku moko etonda na molili—nakobenga ye Jane.

Uta ntango Jane azalaki na mibu misato, abetamaki mbala na mbala, akitisamaki, mpe atukamaki. Abangisamaki mpe asekamaki. Azalaki kolamuka ntongo nyonso koyebaka te soki akotikala na bomoi kino mokolo elandi. Bato oyo basengelaki kobatela ye bazalaki baoyo boniongaki ye to bandimaki kotukama ekoba.

Mpo na komibatela, Jane ayekolaki kokanga koyoka. Azalaki na elikia moko te ya kobika, yango wana amikembisaki na mayoki mpo na komibatela na makambo ya nsomo azalaki komona. Ezalaki na pole te na mokili na ye, yango wana amitikaki na molili. Na bozangi liyoki oyo ekoki koya kaka uta na bokutani ya mbala na mbala mpe ya kotika te elongo mabe, andimaki likambo ete akokaki ngonga nyonso ekokaki kozala ya ye ya nsuka.

Nde, na mobu 18, Jane amonaki Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka. Esengo mpe elikia ya nsango malamu ekotaki na motema na ye, mpe andimaki libengisi mpo na kobatisama. Mpo na mbala ya yambo, pole ekotaki na bomoi na ye, mpe amonaki nzela ya kongenga liboso na ye. Atikaki molili ya mokili na ye mpe azwaki mokano ya kokende na eteyelo mosika mingi mpenza na batuki na ye. Na nsuka amiyokaki ya kokangolama na esika moko ya molili mpe mabe—na bonsomi ya kosepela na kimia ya elengi mpe libiki ya kokamwa ya Mobikisi.

Nzokande, mibu milekaki, nsima ya liwa ya batuki na ye, Jane atungisamaki lisusu na makambo ya nsomo ya bolenge na ye. Mawa mpe nkanda ya mozindo ebangisaki mpo na kobebisa pole ya kitoko azwaki na nsango malamu. Asosolaki ete soki apesaki nzela na molili wana elia ye, moniokoli na ye elingaki kozwa elonga moko ya nsuka.

Alukaki lisungi mpe lisalisi ya monganga mpe abandaki kososola ete, mpo na ye, nzela malamu koleka nyonso mpo na libiki ezalaki kososola mpe kondima ete molili ezali—kasi kofanda kuna te. Mpo, lokola ayebaki sikawa, pole lisusu ezalaki—mpe ezali wapi aponaki kofanda.

Mpo na makambo ya kpokoso akutanaka na yango kala, Jane akokaki na pete kokoma kozongisa mabe, nko, to kutu moto na loma. Kasi asalaki yango te. Atelemelaki lisenginia ya kopanza molili na kolakisaka nkanda, mpasi, to matema mabes. Na esika na yango, asimabaki makasi na elikia ete na lisalisi ya Nzambe akobikisama. Aponaki kongengisa pole mpe apesaki bomoi na ye na kosalisaka basusu. Mokano oyo ekokisaki ye atika kala nsima mpe akota na kati ya oyo ekoya.

Akomaki moteyi ya eteyelo, mpe lelo, mibu zomi nsima, bolingo na ye epesi nguya na bomoi ya bana bankama, kosalisaka bango bayeba ete bazali na ntina, ete bazali ntina. Akomaki mobundeli ya mpiko ya bato ya botau, batukami, mpe balembisami. Atongaki, alendisaki, mpe afulaki moto nyonso nzinganzinga na ye.

Jane ayekolaki ete libiki eyaka ntango tolongwe na molili mpe totamboli epai ya elikia ya pole ya kongenga mingi. Ezalaki esaleli ya pete ya bondimi, elikia, mpe bolingani ete abongolaki bomoi na yemei kaka te kasi mpo na libela apambolaki babomoi ya mingi, basusu mingi.

Pole Ekokanganaka na Pole

Ezalli na boko kati na bino bakoki koyoka ete molili ezali mingimingi koniata bango. Bokoki komiyoka ya bozitisami na makanisi, bobangi, mpe ntembe. Mpo na bino mpe mpo na banso kati na biso, nazongeli bosolo ya kitoko mpe ya sikisiki: Pole ya Nzambe ezali ya solo. Ezwami mpo na banso! Epesaka bomoi na biloko nyonso.1 Ezali na nguya ya kokitisa nzube ya mpota ya mozindo mingi koleka. Ekoki kozala mafuta ya kobikisa mpo na bomoko mpe bokono ya milimo na biso. Na nzela ya bozangi elikia, ekoki kolona bankona ya elikia ya kongenga mingi. Ekoki kopelisa balubwaku ya mozindo mingi koleka ya mawa. Ekoki kongengisa nzela liboso na biso mpe kokamba biso na butu ya molili mingi koleka mpo na kokota na ntongontongo ya sika.

Oyo ezali “Molimo ya Yesu Klisto, ” oyo epesaka “pole na bato nyonso oyo bayei na Mokili.”2

Nzokande, pole ya molimo eyaka mbala mingi te na baoyo bafandi kaka na molili kozelaka moto moko apelisa mwinda. Esengaka ekela moko ya bondimi mpo na komona Mwinda ya Klisto. Pole ya molimo ekoki kolimbolama na miso ya musuni te. Yesu Klisto Yemei ateyaki ete Ye azali pole oyo ezali kongenge na molili, mpe molili ekoki kososola yango te.”3 Mpo ete “moto na mosuni akoki koyamba makambo na Molimo na Njambe te mpo ete majali na ye bolema; akoki koyeba yango te jambi molimo akososola yango.”4

Yango wana boniboni ekofungola biso miso mpo na elikia ya pole ya Nzambe?

Yambo, bobanda bisika bozali.

Ezali kitoko mingi koyeba ete tosengeli te kozala ya kobonga nie mpo na kozwa mapamboli mpe makabo ya Tata wa biso na Lola? Tosengeli kozela te kino tobongi nie mpo na kozwa mapamboli ya Nzambe. Ya solo, lola ebandi kokabwana mpe mapamboli ya lola ebandi kosopela biso litambi ya yambo epai ya pole.

Esika ebongi nie mpo na kobanda ezale solo wapi bozali sikawa. Ekosala eloko te lolenge nini bozali ya kokoka te bokoki kokanisa bozali to boniboni mosika mingi na nsima ya basusu bokoki komiyoka. Kaka na ngonga oyo bobandi koluka Tat wa bino na Lola, na ngonga wana kaka, elikia ya pole na Ye ekobanda kolamuka, koningisa, mpe kopesa lokumu na molimo na yo.5 Molili ekoki kolimwa nyonso na mbala moko, kasi ya solo mpenza lokola butu epesa nzela na ntongo ntango nyonso, pole ekoya.

Ya Mibale, bobalusu motema na bino epai ya Nkolo.

Botombola molimo na bino na losambo mpe bolimbola epai ya Tata wa bino na Lola maye bozali koyoka. Bondima bambeba na bino. Bofongola motema na bino mpe boloba botondi na bino. Botika Ye ayeba mimekano bozali kokutana na yango. Bosenga elongo na Ye na nkombo ya Klisto mpo na bokasi mpe lisungi. Bosenge ete matoye na bino ekoka kofungwama, ete bokoka koyoka mongonga na Ye. Bosenga ete miso na bino ekoka kofungwama, ete bokoka komona pole na Ye.

Ya misato, botambola na pole.

Tata wa bino na Lola ayebi ete bokokosala bambeba. Ye ayebi ete bokobeta mabaku—ntango mosusu mbala mingi. Oyo epesaka Ye mawa, asi Ye alingi bino. Alingi te bobebisa molimo nabino. Na bokeseni, Ye azali na mposa ete bino botelema mpe bokoma moto oyo bokaniselamaki kokoma.

Mpo na ntina oyo, Ye atindaki Mwana na Ye angengisa nzela mpe alakisa biso lolelenge nini tokokatisa na kimia binkonongo ya mabaku biye bitiami na nzela na biso. Ye apesi biso nsango malamu, oyo eteyeka na lolenge ya moyekoli. Eteyaka biso makambo tosengeli koyeba, kosala, mpe kozala mpo na kotambola na pole na Ye, kolandaka matambi ya Mwana wa Ye Molingami.

Pole Elongaka Molili

Iyo, tokosala bambeba.

Iyo, tokolemba.

Kasi wana ezali biso koluka kobutisa bolingo naa biso mpo na Nzambe mpe kobunda mpo na kolinga mozalani biso, pole ya nsango malamu ekozinga biso mpe kotombola biso. Molili ekolemba solo, mpamba te ekoki kozala ten a miso ya Nzambe. Ntango topusani mpembeni na Nzambe, Ye akopusana mpembeni na biso.6 Mpe na mokolo wana, elikia ya pole ya Nzambe ekokola na kati na biso, ya kongenge se kongenga koleka kino mokolo ebongi nie.”7

Na banso baye bamiyoki ete bazali kotambola na molili, nasengi bino boyekemela likolo ya elaka ya solo elobami na Mobikisi ya bato: “Ngai najali moi na mokili: Ye oyo akobila ngai akotambola na amolili te kasi akojali na moi na bomoi.”8

Pole na Afrika

Mibu mingi meki, mwasi na ngai, Harriet, mpe ngai tozwaka likambo moko ya komikundolaka na yango tomonaki bilaka kokokisamaka. Tozalaki na Afrika ya westi, eteni moko kitoka ya mokili wapi Eklezia ezali kokola mpe Basantu Bamikolo mya Nsuka bazali na esengo. Nzoka nde, Afrika ya westi lisusu ezali na mikakatano ebele. Mingimingi, nayokisamaaki mawa na bobola oyo namonaki. Na baengumba ezali na bozangi mosala makasi, mpe mabota mazali kobunda mbala mingi mpo na kokokisa bamposa na bango ya mokolo na mokolo mpe mpo na kimia na bango. Ebukaki motema na ngai koyeba ete mingi ya bandimi na biso ba motuya ya Eklezia bazali na bozangi ya bongo. Kasi nayekolaki lisusu ete bandimi ya kitoko oyo bazali kosalisana mpo ete moko te akoka kokufa nzala.

Na nsuka tokomaki na moko ya bandakonzambe na biso mpembeni ya engumba moko monene. Kasi esika ya kokutaka bato moko batondisami mpe bamelami na molili, tomonaki bato ya esengo baye bazalaki kongenga na pole! Esengo bazalaki koyoka epumbukilaki biso mpe etombolaki milimo na biso. Bolingo balakisaki biso eteyaki biso bosawa. Baboseki na bango ya mike ezalaki ya solo mpe esekisaki biso.

Namikundoli komitunaka ntango soki ekozala mpenza na bato ya esengo koleka na likolo ya mabele. Ata kutu Basantu balingami oyo bazingamaki na bakpokoso mpe mimekano, batondisamaki na pole!

Liyangani ebandaki, mpe nabandaki koloba. Kasi nokinoki lotiliki ekatanaki na ndako, mpe totikelaki na molili mpenza.

Mpo na ntango moke nakokaki komona moto te mpenza kati na liyangani, kasi nakokaki komona te mpe koyoka baboseki mike ya kongenga mpe kitoki ya Basantu na biso. Nalingaki mpenza mingi kozalaka elongo na bato kitoko oyo.

Molili na ndakonzambe ekobaki, mpe yango wana nafandaki mpembeni ya amwasi na ngai mpe nazelaki lotiliki ezongisama. Wana ezalaki biso kozela, likambo moko ya monene esalamaki.

Mwa mingongo ebandaki koyeba moko ya banzembo ya Bozongisi. Mpe nde basusu basanganaki. Mpe nde mingi. Noki noki, lisanga ya bayembi ya mingongo kitoko mpe kafukafu etondisaki ndakonzambe.

Bandimi oyo ya Eklezia ya bazalaki na mposa ya babuku ya banzembo te; bayebaki maloba nyonso ya nzemba bayebaki. Mpe bayembaki nzembo moko nsima na mosusu na mpiko mpe molimo oyo esimbaki molimo na ngai.

Na nsuka, mwinda ezongaki mpe esokolaki kisusu na pole. Harriet mpe ngai totalanaki, matama na biso mapolaki na mpinzoli.

Na katikati ya molili makasi, Basantu kitoko, kafukafu oyo batondisaki Ndako ya Nzambe mpe milimo na bison a pole.

Ezalaki likambo moko ya liyoki ya mozindo mpe ntina mpo na biso—moko oyo Harriet mpe ngai tokobosa mokolo moko te.

Boya na Pole

Iyo, mingi mingi babomoi na biso ekoki komonana lokola kosimbama na, to kutu kolingama na, molili. Ntango mosusu mwinda oyo ezingi bisu ekomonana ya koniokola, kolembisaka, mpe kobangisaka.

Motema na ngai ezali kolela mpo na mawa boko na bino bazali koyoka, mpo na bozali se yo moko ya mpasi mpe babongi ya kotungisa bokoki kokutanaka na yango.

Kasi, Natatoli ete elikia na biso ya bomoi ezali na Klisto Yesu! Ye azali efelo ya solo, ya peto, mpe ya nguya epai ya Bopeli ya bonzambe.

Natatoli ete elongo na Klisto, molili ekoki kolonga te. Molili ekozwa elonga te likolo ya pole ya Klisto.

Napesi litatoli ete molili ekokoka kotelema te liboso ya pole ya kongenga ya Mwana ya Nzambe ya bomoi!

Nasengi moko na moko na bino mpo na kofungola motema na bino na Ye. Boluka Ye na nzela ya boyekoli mpe losambo. Boya epai ya Eklezia na Ye, boyekola na tina na Ye mpe na ntina ya nsango malamu na Ye, bosala elongo na loningi, bosalisana, bosalela Nkolo na bison a esengo.

Bandeko mibali mpe basi, kutu nsima ya butu ya molili makasi koleka nyonso, Mobikisi ya mokili akokamba bino na ntongo moko moke moke, ya kitoko, mpe ya kongenga oyo na ntembe te ekotana kati na bino.

Ntango obotamboli epai ya pole ya Nzambe, bokomona mawa, bolingo, mpe bolamu ya Tata na Lola moko ya bolingo, “ molili ejali kati na ye soko moke te.” 9 Na ntina ye natatoli na nkombo ya Yesu Klisto, amene.