Telema Makasi na Bisika ya Bule
Kotelemaka na botosi mpe makasi na malongi ma Nzambe wa biso, totelami na bisika bisantu mpo malongi ma Ye mazali bule mpe makobongwana te
Bandeko, ezali lokumu kozala elongo na basimbi bonganganzambe ya bokonzi ya Nzambe. Tozali na mikolo mya nsuka, na “ntango ya makama.”1 Lokola basimbi bonganganzambe, tozali na mokumba ya kotelema makasi na nguba ya bondimi mpo na kotelemela makonga ya monguna. Tozali bandakisa mpo na mokili, kobatelaka makoki mpe babonsomi ya kokakola te epesama na Nzambe. Totelemi na bobateli ya bandako mpe mabota ma biso.
Ntango nazalaki na kelasi ya yambo ya secondaire, nawutaki na lisano ya ngai ya mbala ya yambo na mboka mosusu elongo na ekipi ya baseball ya université. Tata wa ngai asosolaki ete na mobembo molai ya engunduka mpo na kozonga ndako nazalaki nzeneneke ya maloba mpe ezalela ezalaki te engebene na mibeko ya nsango malamu. Kozalaka moyemi na mosala mwa ye, avandaki elongo na ngai mpe abendaki elili ya soda ya lokumu—mobundi oyo akoki kobatela bandako ya bakonzi mpe babokonzi.
Ayemaki bilili mpe atangaki uta na makomi, nayekolaki boniboni kozala mosimbi bonganganzambe ya botongono—mpo na kobatela mpe kokengela bokonzi ya Nzambe. Maloba ma Apostolo Paulo ekambaki ngai:
“Mpo na oyo bokamata molato mobimba na etumba na Njambe, ete boyeba kotelema na mokolo na mabe, mpe nsima na kosala yonso, kotelema.
“ Botelema bongo, na loketo lokangami na sembo mpe na kolata boyengebene lokola ebolo makasi na ntolo,
“Mpe koselingwa na sapato na makolo lokola bantoma na nsango na kimia.
“Na yango yonso bokamata nguba na kondima, na yango bokoki kojimisa mbanji na moto na oyo mabe.
“Bokamata ekoti na kobika mpe mopanga na Molimo, yango Liloba na Njambe.”2
Bandeko, soki tozali botongono na bonganganzamba, ebundeli oyo ekopesamela biso lokola likabo uta na Nzambe. Tosengeli ebundeli oyo mpo na komibatela!
Bilenge babali, batata mpe bankoko ba bino bakutanaki mokolo moko te na masenginia oyo bozali kokutana na yango mbala na mbala. Bozali na mikolo mya nsuka. Soki tata wa yo alingaki kozwa matata, asengelaki koluka yango. Lisusu te! Lelo lisenginia ekokuta yo! Nasengi bino bomikundola yango! Satana alingi kozwa bino, mpe “lisumu elali na ekuke ya yo.”3 Boniboni okotelemela mayele ma ye ya etumba? Lata ebundeli mobimba ya Nzambe.
Tika nateya bino uta na mayele mosusu na bomoi bwa ngai:
Na sanza ya yambo ya 1982, nalobaki na losambo na nganda ya BYU na Provo, Utah. Nabengisaki bayekoli mpo na kokanisa ete Eklezia ezalaki na ngambo moko ya etando, kaka awa, mpe mokili ezalaki kaka sentimetele 30 to 60 na ngambo mosusu. Oyo elakisi “ntaka ya mokuse mingi koleka katikati ya wapi mokili ezalaki mpe wapi mibeko ya Eklezia ezalaki” ntango nazalaki na université. Bongo, kotelemaka liboso ya bayekoli mibu 30 nsima, natiaki maboko ma ngai likolo na lolenge moko mpe nalimbolaki, “Mokili ekoti mosika na zamba; [ekei mobembo; ezali esika moko te mpo na komonama;] ekei nzela, nzela nyonso na libanda ya [ndako oyo mpe nzinganzinga na mokili]. …Nini biso mpe bana ba biso mpe bankoko ba biso tosengeli komikundola ezali ete Eklezia etikali sikisiki, [kasi] mokili ekokoba koninganaka—libulu ezali [kokoma] monene mpe monene mingi koleka. [ezali bobele kaka awa; kasi] mokili ekobi na kokende—libulu ezali [kokoma] monene mingi mingi. . … Yango wana, bosala keba mpenza. Soki bosambisi bikela mpe mibeko ya Eklezia kobandaka na esika wapi mokili ezali mpe wapi ezali kokende, bokomona ete bozali te wapi bosengelaki kozala.”4
Kozongaka nsima nakokaki kokanisa te mosika kani mpe mbangu kani mokili elingaki kokende mosika na Nzambe; tokokaki te kososola yango, na ntina ya malongi, mabongisi, mpe mitindo. Mpe kasi mibeko ya Klisto mpe ya Eklezia ya ye eningani te. Lokola Ye alobaki, “Bosolo bokowumela libela na libela.” 5 Ntango tososoli mpe tondimi yango, tolengelami mpo na kotelemela bofini ya lingomba ya bato, litio, mpe kutu bokabwani oyo ekowuta na mokili mpe boko oyo bamibengi baninga.
Mingi na biso toyebi moto moko oyo akoki koloba, “Soki olingi kozala moninga wa ngai, osengeli kondima makambo ma ngai.” Moninga wa solo akosenga biso te topona katikati ya nsango malamu mpe kozala moninga na ye. Mpo na kodefa maloba ma Paulo, “Opengwa ndenge yango.” 6 Moninga ya malamu akolendisa binso totikala na nzela eke mpe ya nkaka.
Kotikalaka na nzela ya nsango malamu ya mitindo, makuli, mpe mayokani ekobatela biso biso mpe ekolengela biso mpo na kosala mosala mwa Nzambe na Mokili oyo. Ntango totosi Liloba lya Bwania, bomoni bwa biso ebatelami na babokakemi lokoka molangwa, lopipi, mpe likaya. Ntango tofuti moko na zomi ya biso, toyekoli makomi, tozwi libatisi mpe nkotisa, tozali na bomoi mpo na kozala na kimoninga ya sikisiki ya Molimo Mosantu, tokaboli elambo na bolongobani, totosi mobeko ya bopeto, tomilengeli mpo na kozwa Bonganganzambe ya Melikisekeki, mpe tosali mayokani ma tempelo, nde tomilengeli mpo na kosala.
Na tempelo tomilengeli mpe tolaki mpo na kosalela mobeko ya komikaba. Bilenge babali na bokoki bakobanda kosalela mobeko oyo na kolukaka libiangi ya misio—kopesaka moko na zomi ya mibu ya yambo ya bomoi ya bango na mosala ya ntango mobimba na Nkolo. Libonza wana ekolendisa bango kokende liboso na boyokani ya likolo mingi koleka na bomoi—kobala mpe kokangisama na tempelo mpe kobanda libota moko ya seko.
Ntango towelisi liboso o ntaka ya nzela, totongi bokasi ya kokola na molimo—bokasi na kosalelaka boponi bwa biso mpo kosala na bisomei. Mpo na bilenge babali mpe basi lokola, bokoli oyo esungami ntango bayekoli malongi mpe bakaboli matatoli ma bango na nzela ya pologalami ya sika ya interneti, Yaka , Landa Ngai.
Na kobakisa, bosalela boponi bwa bino mpo na kokolisa bomoto ya bisomei. Ntango boyebi makabo mpe makoki ma biso, bomikundola ete baboti mpe bayangeli bakoki kosalisa bino, kasi bosengeli kotika Molimo akamba bino. Bopona mpe bosala mpo na binomei. Botindikama uta na kati. Bosala miango mpo na bomoi bwa bino, ndakisa boyekoli to bolakisami mosala ya maboko. Boluka matomba mpe bokoki. Bosala mpe bokoma ya komikoka. Botia bantina, bolonga mabunga, bozwa mayele na mosala, mpe bosilisa maye bobandaki.
O ntaka ya nzela, bokeba mpo na kosala elongo na libota, lisanga likoki, kelasi, mpe milulu Misangani ya babali mpe basi. Bosepela na lisano ya malamu elongo. Na nzela ya mayele oyo bokokoma na komemia mpe kolula makabo ya molimo ya bino na bino mpe bozalani ya seko ya bana babali mpe bana basi ba Nzambe.
Likolo na nyonso, bozala na bondimi na Mosikisi! Bobanga te! Ntango tozali kosalela nsango malamu na etingia, tokokoma makasi na Nkolo. Elongo na bokasi bwa Ye tokoki koboya motelemeli-Klisto oyo alobi, “Liani, meleni, mpe sepelani;” mpo Nzambe “akoyengebene [yo] na kosalaka lisumu lyoko like; ezali bobe te na eye, …, mpo lobi tokokufa.” 7 Na bokasi ya Nkolo tokoki kotelemela filosofi to boyambi nyonso oyo ewangani Mobikisi mpe elobeli mabe mwango monene, ya seko ya esengo mpo na bana ba bato.
Tozali na ndingisa te ya kosamba na masengeli ma mwango wana ya seko. Bomikundola Nehemia oyo azwaki mokumba ya kotonga efelo mpo na kobatela Yelusaleme. Boko balingaki ye akita mpe abebisa esika ya ye, kasi Nehemia aboyaki. Azalaki motema mokuse te mpo na basusu; alimbolaki bobele, “Nazali kosala mosala monene mpe boye nakoki kotika te. Mosala etelema nde mpo na nini wana nakotika yango mpo na kokita epai na bino … ?”8
Ntango mosusu tokomi ekangi nkake, mpe tosengeli “kozwa moto” mpo na kokangama makasi na mibeko mya Nzambe mpe kosalaka mosala mwa Ye. Natatoli ete tosengeli te kobanga soki tovandi na malongi ma Ye. Tokoki kokutana na bozangi bososoli, matongi, mpe bofundi ya lokuta, kasi tozali ata moke te biso kaka. Mobikisi wa bino “atiolamaki mpe aboyamaki na bato.”9 Ezali litomba lya biso kotelema elongo na Ye!
Na liseki, kotelamaka makasi ntango mosusu elingi koloba koboya mpe kutu kokima mokili. Mobikisi asakolaki, “Zonga nsima na ngai, Satana.”10 Yosefe ya Ejipito akimaki liboso ya masenginia ya mwasi ya Potifala,11 mpe Lehi atikaki Yelusaleme mpe amemaki libota lya ye na kati ya esobe.12
Boyeba ya solo ete baprofeta banso liboso na biso batelemaki makasi na mikolo mya bango:
Nefi asalaki mosala ya kokamwa ya Nkolo atako bibotu ya Satana mpe moniokoli ya Lamani mpe Lemueli, bandeko ba ye babali.13
Abinadi atatolaki Klisto liboso ya bofundi, litio, mpe liwa ya ntembe te.14
Bilenge babundi 2.000 babatelaki mabota ma bango kobundaka na baye batiolaki makambo ya nsango malamu.15
Moloni atelemisaki nkombo ya bonsomi mpo na kobatela mabota ya bato ba ye mpe bonsomi ya boyambi.16
Samwele atelemaki likolo ya efelo mpe asakolaki boyei ya Klisto, atako mabanga mpe makonga malandaki te.17
Profeta Joseph Smith azongisaki nsango malamu ya Mobikisi, kokangaka litatoli lya ye na makila ma ye. 18
Mpe pionié ya Bamormon batelemaki makasi na liboso ya bokeseni ya nsomo mpe mpasi, kolandaka profeta moko na mobembo monene mpe bovandi ya Westi.
Basali banene mpe Basantu ba Nzambe bakokaki kotelama makasi mpamba te batelemaki elongo na Mobikisi. Bomaniola lolenge nini Mobikisi atelemaki makasi:
Lokola elenge Yesu akendeki na botongono nzinganzinga na ntina ya mosala ya Tata wa Ye, koteyaka nsango malamu na bato bayekola na tempelo.19 Na mosala mwa ye mobimba, Ye asalaki mosala mwa bonganganzambe—koteyaka, kobikisaka, kosalisaka, mpe kopambolaka basusu. Ntango elongobanaki, Ye na mpiko atelemelaki mabe, kutu na kopetolaka tempelo.20 Mpe Ye ntango nyonso atelemaki mpo na bosolo—ezala na koloba to na koloba te ya lokumu. Ntango banganganzambe bakonzi bafundaki Ye liboso ya Kayifa, Yesu na bwania mpe mpiko, aboyaki kopesa eyano na bozangi bosolo mpe asimbaki kimia ya Ye. 21
Na Elanga ya Getesemane, Mobikisi mpe Mosikoli wa biso azongaki nsima te na komela nkeni ya bololo ya Bomikabi.22 Mpe na ekulusu Ye ayokaki mpasi lisusu na bolingi ya Tata wa Ye, tii na nsuka Ye akokaki koloba, “Esili.”23 Na eyano na botosi bobongi nie ya Mobikisi na kotelemaka makasi, Tata wa biso ya Lola asakolaki, “Tala Mwana Mobali Molingami wa ngai na ye nasepeli mingi, na ye nakembeli nkombo ya ngai.”24
Bandeko ba bonganganzambe ba bolingo bilenge mpe bakolo, tika tokembisa nkombo ya Nzambe na kotelemaka makasi elongo na Mobikisi, Yesu Klisto. Napesi litatoli lya ngai ya kafukafu ete Ye azali na bomoi mpe ete “tobiangami na libiangi moko ya bule”25 mpo na kosala elongo na Mosala mwa Ye. “Yango wana, botelema na bisika bisantu, mpe boningana te.”26 Kotelemaka na botosi mpe makasi na malongi ma Nzambe wa biso, totelami na bisika bisantu mpo malongi ma Ye mazali bule mpe makobongwana te mpo na mipepe mya bozalani mpe politiki ya mikolo mya biso. Nasakoli, lokola Apostolo Paulo asalaki, “Bokengela, botelema kati na kondima, bojala babali mpenja, bokemba na nguya.”27 Eye ezali losambo la ngai ya solo, o nkombo ya bule ya Yesu Klisto, amene.