2010–2019
Tondimi Kozalaka Peto
Sánzá ya mínei 2013


Tondimi Kozalaka peto

Botosi ya mobeko ya bopeto ekobakisa esengo na biso na bokufi mpe ekokokisa bokoli na biso na boseko.

Etinda na ngai elobeli motuna moko ya ntina ya mbano ya molimo monene: Mpo na nini mobeko ya bopeto ezali monene mpenza? Nasambeli ete Molimo Mosantu akondimisa bosolo ya mabongisi nazali kobetela nsete.

Mwango ya Esengo wa Tata

Bonene ya seko ya bopeto ekoki kaka kososolama o ntei ya esika ya likonzi ya mwango ya esengo Tata ya lola mpo na bana na Ye. “Bato banso—mobali mpe mwasi—bakelami na elilingi ya Nzambe. Moko na moko azali mwana mobali to ya mwasi wa molimo ya bolingo ya baboti ya lola, mpe … azali na ezalela mpe atandele moko ya bonzambe” (“The Family: A Proclamation to the World,” Ensign to Liahona, sanza ya zomi na moko 2010, 129). Mibali mpe basi banso bazalaki elongo na Nzambe lokola bana na Ye ya molimo loboso ya koya na mabele lokola bato ya kufa. Mwango ya Tata ekokisi bana na Ye ya mibali mpe ya basi ya molimo mpo na kozwa banzoto ya mosuni, kozwa mayele ya kufa, mpe kokende liboso epai ya bonetwami.

Bonene ya Nzoto ya Mosuni

Banzoto na biso ya mosuni esali ete tokoka kozala bolai boko, bozindo boko, mpe nguya moko ya mayele oyo ekokaki te kozwama na bomoi na biso ya yambo na kufa. Bongo, bazalani na biso elongo na bato basusu, makoki na biso ya komona lisusu mpe kokela engebene na bosolo, mpe likoki na biso ya kotosa mabongisi mpe makuli ya nsango malamu ya Yesu Klisto evimbisami na nzela ya banzoto na biso ya mosuni. Na eteyelo ya bokufi, tozali koyoka boboto, bolingo, bolamu, esengo, mawa, bosisoi, mpasi, mpe kutu mikakatano ya bandelo ya mosuni na ndenge oyo elengelisi biso mpo na boseko. Kolobaka na pete, ezali na mateya oyo tosengeli koyekola mpe mayele oyo tosengeli kozwa, lokola makomi elimboli, “engebene na mosuni” (1 Nephi 19:6; Alma 7:12–13).

Nguya ya Kobota

Nsima ya bokelami ya mabele, Adama atiamaki na Elanga ya Edene. Nzokande, na ntina, Nzambe alabaki “ejali malamu te ete moto ajala ye moko” (Mose 3:18; tala lisusu Genese 2:18), mpe Ewa akomaki mwasi mpe molongani ya Adama. Bosangisi moko kaka ya makoki ya molimo, ya nzoto, mayele, mpe ya mayoki ya mibali mpe basi lokola esengelamaki mpo na kobimisa mwango ya esengo. “Nde kati na Nkolo, mwasi ajali na bosenga na mobali mpe mobali ajali na bosenga na mwasi” (1 Bakolinti 11:11). Mobali mpe mwasi basengeli koyekolisana, kolendisana, kopambolana, mpe kokokisana.

Banzela na yango bomoi na bokufi ekelami etindami na bonzambe. “Motindo ya yambo … Nzambe apesaki Adama mpe Ewa likoki na bango mpo na kozala baboti lokola balongani mobali mpe mwasi” (Ensign to Liahona, sanza ya zomi na moko 2010, 129). Motindo ya kobotana mpe kotondisa mabele etikali na bokasi lelo. Boye, libala katikati ya mobali mpe mwasi ezali nzela endimami na yango milimo ya yambo na kufa ekoti na bokufi. Bopeto mpenza yambo ya libala mpe bopeto o ntei ya libala ebateli bosantu ya nzela ya bule oyo.

Nguya ya kobota ezali ya ntina na molimo. Kosalela mabe nguya oyo ebebisi bantina ya mwango ya Tata mpe ya bomoi ya kufa. Tata wa biso ya lola mpe Mwana wa Ye ya Bolingo bazali bakeli mpe bapesi na moko na moko na biso eteni ya nguya na Bango ya bokeli. Babokambi ya kafukafu mpo na kosalela malamu likoki ya kokela bomoi ezali biteni ya ntina na mwango ya Tata. Lolenge tomiyoki mpe tosaleli nguya wana ya likolo ekotia motuya monene ya esengo na biso na bokufi mpe atandele na biso na boseko.

Mpaka Dallin H. Oaks alimbolaki:

“Nguya ya kokela bomoi ya kufa ezali nguya ya likolo koleka nyonso oyo Nzambe apesi bana na ye. Esaleli na yango etindamaki na motindo ya yambo, kasi motindo monene mosusu epesamaki mpo na kopekisa kosalela yango mabe. Nsete totie na mobeko ya bopeto elimbolami na bososoli na biso ya ntina ya banguya na biso ya kokela na bokokisi ya mwango ya Nzambe. …

“Libanda ya bandelo ya libala, bosaleli nyonso ya nguya ya kobota ezali na lolenge moko to mosusu lisumu ya bokitisi mpe bobebisi ya lolenge ya bonzambe mingi koleka nyonso ya mibali mpe basi” (“The Great Plan of Happiness,” Ensign, Sanza ya zomi na moko 1993, 74).

Emekele ya Mobeko ya Bopeto

Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka ezali na emekele se moko, ya kopengwa te ya bopeto: mikangano ya penepene ya nzoto elongobani kaka katikati ya mobali moko mpe mwasi moko na mokangano ya libala etindamaki na mwango ya Nzambe. Mikangano ya boye ezali te boluki moko mpo na koyekola mpamba, mposa ya kosepelisa, to lolenge moko ya lisano ya kolanda na kimoyimi. Ezali te etumba ya kolonga to kaka ekela ya kosala. Kasi, ezali na bokufi moko ya bolakisi boluti ya lolenge ya bonzambe mpe likoki na biso mpe nzela moko ya kolendisaka mikangano ya mayoki mpe ya molimo katikati ya balongani mobali mpe mwasi. Tozali basali bapambolami na nguya ya bonsomi mpe tolimbolami na lisango na biso ya bonzambe lokola bana ya Nzambe—mpe te na bizalela ya bosangisi nzoto, lolenge ya mikolo oyo, to bafilozofi ya mokili.

Moto ya Mokili

Na lolenge moko boye, moto ya mokili oyo alimbolami na Mokonzi Benyiamina azali na bomoi mpe malamu kati na moko na moko na biso (tala Moziya 3:19). Mobali to mwasi ya mokili ayambolaka te, azali ya mosuni mpe ya nzoto (tala Moziya 16:5; Alma 42:10; Mose 5:13), azali zololo mpe akolekisaka ndelo, mpe azali lolendo mpe moyimi. Mokambi Spencer W. Kimball ateyaki, “‘Moto na mokili’ azali ‘moto ya mabele’ oyo apesi nzela na bamposa ya bonyama ya mabe ezipa mpenza bamposa na ye ya molimo” (“Ocean Currents and Family Influences,” Ensign, sanza ya zomi na moko 1974, 112).

Na bokeseni, mobali to mwasi “wa Klisto” (Elamani 3:29) azali ya molimo mpe akonzi bamposa nyonso (tala Alma 38:12), asaleli ndelo mpe amikangi, mpe azali na bosembo mpe moyimi te. Mibali mpe basi ya Klisto basimbi liloba ya Nzambe, bamiboyi mpe bememi ekulusu na Ye (tala Matai 16:24; Malako 8:34; Luka 9:23; D&C 56:2), mpe baweli liboso na nzela eke mpe kaka ya botongono, botosi, mpe bomipesi na Mobikisi mpe nsango malamu na Ye.

Lokola bana mibali mpe bana basi ya Nzambe, tosangoli libula ya makoki ya bonzambe uta na Ye. Kasi sikawa tofandi na mokili ya kokweya. Biloko wana uta na yango banzoto na biso ekelamaki ezali na lolenge ya kokweya mpe ntango nyonso na nse ya nguya ya lisumu, libebi, mpe liwa. Bongo, Bokweyi ya Adama mpe mbano na yango ya molimo mpe mosuni ezwii biso mpenza na nzela ya nzoto na biso ya mosuni. Mpe nzokande tozali na ndenge mibale, mpo molimo na biso oyo ezali eteni na biso ya seko ezali kati na tabelenakele ya nzoto ya mosuni oyo ezali na nse ya Bokweyi. Mpe Yesu abetaki nsete na Apostolo Petelo, “Molimo ejali na mposa nde njoto ejali na bolembu” (Matai 26:41).

Lolenge mpenza ya momekano ya bokufi, nde, ekoki kolobama na mokuse na motuna oyo elandi: Ekoyanola ngai na bamposa ya moto ya mokili, to ekomitika ngai na masengisi ya Molimo Mosantu mpe kobwaka mosika moto ya mokili mpe kokoma mosantu moko na nzela ya Bomikabi ya Klisto Nkolo (tala Moziya 3:19)? Wana ezali momekano. Mposa, boluli, etinda, mpe botindiki ya moto ya mokili ekoki kolongama na mpe na nzela ya Bomikabi ya Yesu Klisto. Tozali awa na mabele mpo na kokolisa ndenge ya bonzambe mpe mpo na kokonza bamposa nyonso ya mosuni.

Mokano Ya Monguna

Mwango ya Tata esalami mpo na kolakisa nzela na bana na Ye, mpo na kosalisa bango bakoma na esengo, mpe komema bango na likama te na ndako epai na Ye elongo na banzoto ya kosekwa mpe ya konetwama.Tata wa Lola alingi biso tozala elongo kati na pole mpe ya kotondisama na elikia. Nzokande, Lusifelo azali kosala mpo na kobulunganisa bana mibali mpe bana basi ya Nzambe mpe kozangisa bango esengo mpe mpo na kokanga bokoli na bango ya seko. Mokano ya yambo ya tata ya lokuta ezali ete biso banso tolinga kokoma “babola bo yemei” (2 Nefi 2:27). Lusifelo alingi biso na nsuka tokoma biso moko kaka kati na molili mpe na elikia te.

Satana azali ntango nyonso kosala mpo na kobebisa biteni ya motuya mingi koleka ya mwango ya Tata. Ye azali na nzoto te, mpe bokoli na ye ya seko ekangami. Kaka lokola mai oyo etiolaka na nzela na yango ekangisami na duka, bongo bokoli ya seko ya monguna ebulungani mpamba te azali na nzoto ya mosuni te. Na ntina ya botomboki na ye, Lusifelo ayangani yemei mapamboli mpe mayele manso ya bokufi oyo ekokisamaki na nzela ya nzoto ya mosuni mpe mikuwa. Akoki koyekola te mateya oyo kaka molimo moko elati nzoto ekoki koyekola. Ayini bosolo ya bosekwi ya nzoto mpe ya mokili mobimba ya bato banso. Moko ya bandimbola ya makomi ya nguya ya liloba ya kobebisama elakisami na bozangi likoki na ye mpo na kokoba kokola mpe kokoma lokola Tata wa biso ya Lola.

Lokola nzoto ya mosuni ezali na katikati mpenza na mwango ya esengo ya Tata mpe bokoli na biso ya molimo, Lusifelo alukaka kobebisa bokoli na biso na kosenginiaka biso mpo tosalela banzoto na na lolenge elongobani te. Moko ya liseki ya nsuka ya boseko ezali ete monguna, oyo azali mobola mingimingi lokola azali na nzoto ya mosuni te, azali kosenginia biso mpo na kokabola kati na bobola na ye na nzela ya bosaleli elongobani te ya banzoto na biso. Esalelo oyo azali na yango te ezali bongo lotomo ya yambo ya masengenia na ye mpo na kobenda biso na libebi ya molimo.

Kobuka mobeko ya bopeto ezali lisumu moko ya monene mpe bosaleli moko ya mabe ya batabelenakele ya mosuni. Na baoyo bayebi mpe basosoli mwango ya lobiko, kobebisaka nzoto ezali ekela moko ya botomboki (tala Moziya 2:36–37; D&C 64:34–35) mpe boyangani ya lolengo ya solo lokola bana mibali mpe bana basi ya Nzambe. Wana ezali biso kotala mosika ya bokufi mpe kati na boseko, ezali pete mpo na kososola ete kimoninga ya lokuta elobelami na monguna ezali ya ntango mpe ya mpamba.

Mapamboli ya Kozalaka Peto

Alma apesaki toli na mwana na ye ya mobali Shiblon mpo na “kosimba mposa [ya ye] inso, ete [ye] akoki kotondisama na bolingo” (Alma 38:12). Na ntina, kosembola moto ya mokili oyo azali kati na moko na moko na biso ekokisaka bolingo ya Nzambe mpe bana na Ye ya bomengo mingi, ya mozindo mingi, mpe ya mpiko mingo. Bolingo emataka na nzela ya bomikangi ya bosembo mpe ekitaka na nzela ya komitika na mposa.

Mokambi Marion G. Romney asakolaki:

“Nakoki kokanisa na ntina ya mapamboli moko te oyo elingami makasi mingi koleka maye malakelamaki na bato ya petwa mpe ya bolamu. Yesu alobaki na tina ya makabo ya kafukafu mpo babolamu ekeseni kasi abombaki ya minene mingi koleka, yango wana emonani na ngai, mpo na bato ya motema petwa, ‘jambi ba,’elobaki ye, ‘komona Njambe’ (Matai. 5:8). Mpe bakomona kaka Nkolo te, kasi bakomiyoka na ndako na miso na ye.

“Tala … elaka ya Mobikisi: ‘Tika bolamu elata makanisi na yo ntango nyonso; nde elikia ekokoma makasi na miso ya Nzambe’ (D&C 121:45)” (“Trust in the Lord,” Ensign, sanza ya mitano 1979, 42).

Tolakalemi lisusu ete, wana ezali biso kolanda nzela ya bolamu, “Molimo Mosantu akozala moninga [na biso] ya ntango nyonso” (D&C 121:46). Bongo, kosalelaka mobeko ya bopeto na bomoi ebengisi boko ya mapamboli minene koleka manso mibali mpe basi bakoki kozwa na bokufi: elikia ya molimo esengeli na miso ya libota, baninga, bato ya Eklezia, mpe, na nsuka, Mobikisi. Mposa na biso ya kobotama mpo na kozala ya ekokisami na bosembo ntango tozali kotambola kati na pole na elikia.

Libongisi ya Boyamboli

Boko na bino oyo bayambi etinda oyo basengeli koyambola lisumu ya bosangisi nzoto mpe misusu. Mobikisi mbala mingi alakisami lokola Monganga Monene, mpe nkombo oyo ezali na ntina ya elembo mpe ya solo lokola. Biso banso tokoyokaka bolozi oyo ezali esangani na mpasi to mpota ya nzoto. Ntango tozali kati na mpasi, tolukaka mingimingi bobondi mpe tozali na botondi mpo na nkisi mpe mono oyo esalisaka mpo na kolembisa mpasi na biso. Tala lisumu lokola mpota ya molimo oyo esalaka mbeba to, lokola elimbolami na Alma epai ya mwana mobali na ye Corianton, “boswi bwa motema” (Alma 42:18). Mabe ezali epai ya molimo na biso oyo mpasi ezali epai ya nzoto na biso—likebisi ya likama mpe bobateli uta na mbeba mosusu. Uta na Bomikabi ya Mobikisi ezali kotiola mafuta ya kobondisa oyo ekoki kobikisa bampota na biso ya molimo mpe kolongola mbeba. Nzokande, mafuta oyo ekoki kaka kosalelama na nzela ya mabongisi ya bondimi kati na Yesu Klisto, boyamboli, mpe botosi ya ntango nyonso. Mbano ya boyamboli ya bosembo ezali kimia ya motema, libondi, mpe libiki mpe bozongi ya sika ya molimo.

Episikopo to mokambi ya etape na bino azali mosungi ya monganga ya molimo oyo apesami ndingisa ya kosalisa bino boyambola mpe bobika. Nasengi bomikundola, nzokande, ete bonene mpe nguya ya boyamboli na bino esengeli ekokana na lolenge mpe bonene ya masumu na bino—mingimingi mpo na Basantu ba Mikolo mya nsuka oyo bazali na nse ya boyokani. Bampota ya molimo ya minene esengaka lisalisi mpe ntango molai mpo na kobika mpenza mpe mobimba.

Elaka mpe Litatoli

Malongi nalimboli ekomonana lokola ya kala mpe eleka epai ya bato mingi kati na mokili moko oyo ezali kotiola se kotiola bule ya kobota mpe kokitisa motuya ya bomoi ya moto. Kasi bosolo ya Nkolo esengeli kobebisama na bilandalanda, na koyebana, to na koponama na bato. Nalaki ete botosi ya mobeko ya bopeto ekobakisa esengo na biso na bokufi mpe ekokokisa bokoli na biso na boseko. Bopeto mpe bolamu ezali sikawa, ezala ntango nyonso, mpe ekozala ntango nyonso “ntalo mpe motuya koleka likolo ya biloko binso” (Moroni 9:9). Natatoli bongo na nkombo ya bule ya Nkolo Yesu Klisto, amene.