Makomi
Malongi mpe Mayokani 100


Eteni 100

Emoniseli epesami epayi ya Profeta Joseph Smith mpe na Sidney Rigdon, na Perrysburg, New York, na mokolo ya 12, sanza ya zomi ya mobu 1833. Bandeko bandimi mibale oyo, lokola bamonanaki mikolo ebele na mabota na bango te, bamitungisaki ndambo mingi na ntina na bango.

1–4, Joseph mpe Sidney basengeli koteya nsango malamu mpo na lobiko ya milimo; 5–8, Oyo basengeli koloba ekopesama na bango se na ngonga yango mpenza; 9–12, Sidney asengeli kozala molobeli mpe Joseph asengeli kozala mobimisi mpe makasi na litatoli; 13–17, Nkolo akotelemisa bato moko ya peto, mpe bato ya botosi bakobikisama.

1 Solo, boye elobi Nkolo epayi na bino, baninga na ngai Sidney mpe Joseph, mabota na bino ezali malamu; ezali na maboko na ngai, mpe nakosala na yango lokola ebongeli ngai malamu; mpo nguya nyonso ezali na ngai.

2 Boye, bolanda ngai, mpe boyoka toli oyo nakopesa epayi na bino.

3 Tala, mpe mona, nazali na bato mingi na esika oyo, na bituka nzinganzinga; mpe ekuke moko mpenza ekofungolama na bituka nzinganzinga na mboka oyo ya esti.

4 Boye, ngai Nkolo, napesaki nzela ete bokoma na esika oyo, mpo boye esengelaki na ngai mpo na lobiko ya milimo.

5 Boye, solo nalobi epayi na bino, botombola mingongo na bino epayi ya bato oyo; boloba makanisi oyo nakotia kati na mitema na bino, mpe bokoyokisama nsoni te liboso ya bato;

6 Mpo oyo bokoloba, ekopesama epayi na bino na ngonga yango mpenza, iyo, na ntango yango mpenza.

7 Kasi napesi epayi na bino motindo moko, ete bokosakola likambo nyonso bokosakola na nkombo na ngai, na lipombo ya motema, na molimo ya bosokemi, oyo na makambo nyonso.

8 Mpe napesi elaka oyo epayi na bino, ete mbala mingi lokola bokosala oyo Molimo Mosantu akosopana mpo na kopesa litatoli na makambo nyonso bokoloba.

9 Mpe elongobani epayi na ngai ete yo, mosali na ngai Sidney, osengeli kozala molobeli epayi ya bato oyo; iyo, solo, nakokulisa yo na libiangi oyo, kutu kozala molobeli mpo na mosali na ngai Joseph.

10 Mpe nakopesa epayi na ye nguya ya kozala makasi na litatoli.

11 Mpe nakopesa yo nguya ya kozala makasi na kolimbolaka makomi nyonso, ete okoka kozala molobeli mpo na ye, mpe ye akozala mobimisi mpo na yo, ete bokoka koyeba bosolo ya makambo nyonso etali makambo ya bokonzi na ngai likolo ya mabele.

12 Boye, bokoba mobembo na bino mpe tika ete mitema na bino esepela; mpo tala, mpe mona, nazali elongo na bino kutu kino na nsuka.

13 Mpe sikawa napesi epayi na bino liloba moko mpo na oyo etali Siona. Siona ekosikolama, ata epesami etumbu mpo na eleko moke.

14 Bandeko na bino bandimi, basali na ngai Orson Hyde mpe John Gould, bazali na maboko na ngai; mpe mbala mingi lokola bakobomba mitindo na ngai bakobikisama.

15 Boye, tika ete mitema na bino elendisama; mpo makambo nyonso ekosala elongo mpo na bolamu na bango oyo bazali kotambola na alima, mpe mpo na bosantisi ya eklezia.

16 Mpo nakotelemisa bato moko ya peto mpo na ngai moko, oyo bakosalela ngai na bosembo;

17 Mpe nyonso oyo bakobelela na nkombo ya Nkolo, mpe bakobomba mitindo na ye, bakobikisama. Kutu bongo. Amene.

Bimisa na lokasa