Makomi
Malongi mpe Mayokani 103


Eteni 103

Emoniseli epesami na nzela ya Profeta Joseph Smith na Kirtland, Ohio, na mokolo ya 24, sanza ya mibale ya mobu 1834. Emoniseli oyo ezwamaki nsima ya kokoma ya Parley P. Pratt mpe Lyman Wight na Kirtland, Ohio, oyo bawutaki na Missouri kozwama na toli elongo na Profeta mpo na oyo etali komema lisalisi mpe kozongisa Basantu na mabele na bango na Etuka ya Jackson.

1–4, Mpo na nini Nkolo apesaki nzela ete Basantu banyokolama na Etuka ya Jackson; 5–10, Basantu bakolonga soki babombi mitindo; 11–20, Bosikoli ya Siona ekoya na nguya, mpe Nkolo akokende liboso ya bato na Ye; 21–28, Basantu basengeli kosangana na Siona, mpe baoyo wana bakotika bomoi na bango bakozwa yango lisusu; 29–40, Bandeko bandimi ya ndenge na ndenge babiangami kobongisa Camp ya Siona mpe kokende na Siona; balakelami elonga soki bazali sembo.

1 Solo nalobi epayi na bino, baninga na ngai, tala, nakopesa epayi na bino emoniseli mpe motindo moko, ete bokoka koyeba lolenge nini kosala mpo na kokokisa misala na bino mpo na oyo etali lobiko mpe bosikoli ya bandeko na bino bandimi, oyo bapanzami na mboka ya Siona;

2 Baoyo bakambami mpe babetami na maboko ya banguna na ngai, likolo ya baoyo kani nakosopa nkele ezanga emekelo na ngai na ntango ya ngai moko.

3 Mpo napesaki bango nzela kino na ntango oyo, ete bakoka kotondisa emekelo ya mabe na bango, ete nkeni na bango ekoka kotonda;

4 Mpe ete baye wana bamibiangami na nkombo na ngai bapesama etumbu mpo na eleko moke na etumbu oyo ya makasi mpe ya monene, mpo batiaki bokebi mobimba te na misise mpe mitindo oyo napesaki epayi na bango.

5 Kasi solo nalobi epayi na bino, ete nabimisaki mokano moko oyo bato na ngai bakokokisa, mbala mingi lokola bakoyoka toli oyo ngai, Nkolo Nzambe na bango, nakopesa bango uta na ngonga oyo mpenza.

6 Tala basengeli, mpo nakanaki yango, kobanda kolonga banguna na ngai uta na ngonga oyo mpenza.

7 Mpe na kotiaka bokebi mpo na kotosa maloba nyonso oyo ngai, Nkolo Nzambe na bango, nakoloba epayi na bango, bakotika te kolonga kino babokonzi ya mokili minyatama na nse ya makolo na ngai, mpe mabele mapesama epayi ya basantu, mpo na kozwa yango libela na libela.

8 Kasi mbala mingi lokola bakobomba mitindo na ngai te, mpe bakotia bokebi mpo na kotosa maloba na ngai nyonso te, babokonzi ya mokili ekolonga bango.

9 Mpo batiamaki kozala pole mpo na mokili, mpe kozala babikisi ya bato;

10 Mpe mbala mingi lokola bazali babikisi ya bato te, bazali lokola mongwa oyo mobungisi elengi na yango, mpe ezali uta na ntango wana kokende liboso malamu mpo na eloko moko te bobele se kobwakama mpe konyatama na nse ya makolo ya bato.

11 Kasi solo nalobi epayi na bino, nasili kokamata mokano ete bandeko na bino bandimi oyo bapanzanaki bakoka kozonga na mboka ya bosangoli mabula na bango, mpe batonga bisika ebeba ya Siona.

12 Mpo nsima ya mikakatano mingi, lokola nalobelaki bino kati na motindo moko ya liboso, lipamboli ekoya.

13 Tala, oyo ezali lipamboli oyo nalakaki bino nsima ya mikakatano na bino, mpe mikakatano ya bandeko na bino bandimi—bosikoli na bino, mpe bosikoli ya bandeko na bino bandimi, kutu bozongisi na bango na mboka ya Siona, mpo ete batiama, mpo na kolongama lisusu soki moke te.

14 Nzokande, soki batie mabula na bango bosoto bakokweisama; mpo nakobikisa bango te soki batie mabula na bango bosoto.

15 Tala, nalobi epayi na bino, bosikoli ya Siona ekoya na nguya;

16 Boye, nakotelemisa moto moko mpo na bato na ngai, oyo akokamba bango lokola Mose akambaki bana ya Yisalaele.

17 Mpo bozali bana ya Yisalaele, mpe nkona ya Abalayama, mpe bosengeli kobima uta na boumbu na nguya, mpe na loboko oyo esembolami.

18 Mpe lokola batata na bino bakambamaki na ntango ya kala, kutu bongo ekozala bosikoli ya Siona.

19 Boye, botika mitema na bino milemba te, mpo nalobi epayi na bino lokola nalobaka na batata na bino: Anjelu na ngai akokende liboso na bino, kasi ekozala ngai te.

20 Kasi nalobi epayi na bino: Banjelu na ngai bakomata liboso na bino, mpe lisusu ngai, mpe na botamboli ya ntango bokozwa mboka ya malamu.

21 Solo, solo nalobi epayi na bino, ete mosali na ngai Joseph Smith Mwana, azali moto oyo namekaki na mosali oyo Nkolo ya elanga ya vinyo alobelaki kati na lisese oyo napesaki bino.

22 Boye tika ete mosali na ngai Joseph Smith Mwana, aloba epayi ya bokasi ya ndako na ngai, bilenge mibali na ngai mpe baoyo bazali na mibu ya katikati—Bosangana esika moko na mboka ya Siona, likolo ya eteni ya mabele oyo nasombaki na mosolo oyo mobulisamaki mpo na ngai.

23 Mpe tika ete Baeklezia nyonso bitinda bato ya bwania elongo na misolo na bango, mpe basomba mabele lokola natindaki bango.

24 Mpe mbala mingi lokola banguna na ngai bakoyela bino mpo na kobimisa bino uta na mboka malamu, oyo nabulisaki mpo na kozala mboka ya Siona, kutu uta na mabele na bino moko nsima ya matatoli oyo, oyo bomemaki liboso na ngai na kofundaka bango, bokolakela bango mabe;

25 Mpe oyo nyonso bokolakela mabe, nakolakela ye mabe, mpe bosengeli kobekola ngai na banguna na ngai.

26 Mpe nakomonana kozala na bino kutu na ntango bokobekola ngai na banguna na ngai, kino nkola ya misato mpe ya minei na bango oyo bayinaka ngai.

27 Tika ete moto moko abanga te kotika bomoi na ye mpo na ntina na ngai; mpo moto nyonso oyo akotika bomoi na ye mpo na ntina na ngai akozwa yango lisusu.

28 Mpe moto nyonso oyo alingi kotika bomoi na ye mpo na ntina na ngai te azali moyekoli na ngai te.

29 Ezali bolingi na ngai ete mosali na ngai Sidney Rigdon atombola mongongo na ye kati na mangomba oyo na bikolo ya esti, na kolengelaka Baeklezia mpo na kobomba mitindo oyo napesaki bango mpo na oyo etali bozongisi mpe bosikoli ya Siona.

30 Ezali bolingi na ngai ete mosali na ngai Parley P. Pratt mpe mosali na ngai Lyman Wight bazonga na mboka ya bandeko na bango bandimi te, kino bakozwa mangomba ya bato mpo na komata na mboka ya Siona, na zomi, soki na ntuku mibale, soki mpe na ntuku mitano, soki te na monkama, kino bakozwa motango ya nkama mitano ya bato ya bokasi ya ndako na ngai.

31 Tala oyo ezali bolingi na ngai; Senga, mpe bokozwa; kasi bato bazali kosala bolingi na ngai ntango nyonso te.

32 Boye, soki bokoki kozwa nkama mitano te, boluka na molende ete bokokoka mbele kozwa nkama misato.

33 Mpe soki bokoki kozwa nkama misato te, boluka na molende ete bokokoka mbele kozwa monkama moko.

34 Kasi solo nalobi epayi na bino, napesi bino motindo moko, ete bokoki te komata na mboka ya Siona kino bokozwa monkama moko ya bato ya bokasi ya ndako na ngai, mpo na komata elongo na bino na mboka ya Siona.

35 Boye, lokola nalobaki na bino, senga mpe bokozwa; sambela mingi ete mbele mosali na ngai Joseph Smith Mwana, akoka kokende elongo na bino, mpe ayangela kati na bato na ngai, mpe abongisa bokonzi na ngai likolo ya mboka oyo ebulisami, mpe atia bana ya Siona na mibeko mpe mitindo oyo napesaki mpe oyo ekopesama na bino.

36 Elonga mpe nkembo nyonso ekokisami mpo na bino na nzela ya etingia, bosembo, mpe sambo na bino ya bondimi.

37 Tika ete mosali na ngai Parley P. Pratt akende mobembo elongo na mosali na ngai Joseph Smith Mwana.

38 Tika ete mosali na ngai Lyman Wight akende mobembo elongo na mosali na ngai Sidney Rigdon.

39 Tika ete mosali na ngai Hyrum Smith akende mobembo elongo na mosali na ngai Frederick G. Williams.

40 Tika ete mosali na ngai Orson Hyde akende mobembo elongo na mosali na ngai Orson Pratt, na esika nyonso wapi mosali na ngai Joseph Smith Mwana, akotinda bango kokende, mpo na kokokisa mitindo oyo napesaki epayi na bino, mpe botika montika na maboko na ngai. Kutu bongo. Amene.

Bimisa na lokasa