Makomi
Malongi mpe Mayokani 104


Eteni 104

Emoniseli epesami na Profeta Joseph Smith, na to penepene na Kirtland, Ohio, na mokolo ya 23, sanza ya minei ya mobu 1834, na ntina ya Kompani ya Bomoko (tala mitu ya biteni 78 mpe 82). Ekokaki mpenza kozala na libaku ya likita moko nya lisanga ya bandimi ya Kompani ya Bomoko, wapi basololaki na ntina ya bamposa makasi ntango ya kotalela noki noki ya Eklezia. Likita ya liboso ya kompani yango na mokolo ya 10, sanza ya minei ezwaka mokano ete bapanza lingomba yango. Emoniseli oyo etindi nzokande ete na esika ya kopanzana, kompani oyo ebongisama; biloko na yango esengeli kokabolana na kati ya bandimi ya kompani lokola bokapita na bango. Na nse ya bokambi ya Joseph Smith, na esika ya liloba “Kompani ya Bomoko” batiaki “Molongo ya Bomoko” na emoniseli yango.

1–10, Basantu oyo bakobuka mibeko ya molongo ya bomoko bakolakelama mabe; 11–16, Nkolo apesaka Basantu na Ye na lolenge na Ye moko; 17–18, Mobeko ya nsango malamu mopesaka malako mpo na lolenge ya kobatela babola; 19–46, Bokapita mpe mapamboli ya bandeko bandimi ya ndenge na ndenge elakisami; 47–53, Molongo ya bomoko na Kirtland mpe molongo na Siona esengeli kosala na bokabwani; 54–66, Ebombelo ya bule ya bomengo ya Nkolo etiami mpo na bonyatami buku ya makomi; 67–77, Ebombelo monene ya molongo ya bomoko esengeli kosala engebene na oyo endimami na nyonso; 78–86, Baoyo bazali wana kati na molongo ya bomoko basengeli kofuta banyongo na bango nyonso, mpe Nkolo akokangola bango uta na boumbu ya mosolo.

1 Solo nalobi epayi na bino, baninga na ngai, napesi bino toli, mpe motindo moko, mpo na oyo etali bozwi nyonso boye ezali ya molongo oyo natindaki ete mobongisama mpe motiama, mpo na kozala molongo moko mwa bomoko, mpe molongo ya libela mpo na litomba ya eklezia na ngai, mpe mpo na lobiko ya bato kino nakoya—

2 Elongo na elaka oyo elongolamaka te mpe ebongwanaka te, ete mbala mingi lokola baoyo wana natindaki bazalaki sembo basengeli kopambolama na ebele ya mapamboli;

3 Kasi mbala mingi lokola bazalaki sembo te babelemaki mpo na kolakelama mabe.

4 Boye, mbala mingi lokola ndambo ya basali na ngai babateli motindo te, kasi babuki liyokani na nzela ya bilula-lula, mpe na maloba ya lokuta, nalakelaki bango mabe na bolakeli mabe moko ya makasi mpe ya monene mpenza.

5 Mpo ngai, Nkolo, nakamataki mokano na motema na ngai, ete mbala mingi lokola moto moko oyo azali ya molongo yango akozwama mobuki mibeko, to, na maloba mosusu, akobuka liyokani oyo wapi bokangemi na yango, akolakelama mabe kati na bomoi na ye, mpe akonyokolama na nani oyo nalingi;

6 Mpo ngai, Nkolo, nasengeli kotiolama na makambo oyo te—

7 Mpe nyonso oyo ekozala mpo ete baoyo bazali na ekweyeli te na kati na bino bakoka te kokweisama na oyo azali moyengebene te; mpe ete oyo azali na elindo na kati na bino akoka kokima te; mpamba te ngai, Nkolo, nasili kolakela bino motole ya nkembo na loboko na ngai ya mobali.

8 Boye, mbala mingi lokola bokozwama babuki mobeko, bokoki kokima nkele na ngai te kati na bomoi na bino.

9 Mbala mingi lokola bokokatama mpo na bobuki mibeko, bokoki te kokima minyokoli ya Satana kino na mokolo ya bosikoli.

10 Mpe nazali sikawa kopesa epayi bino nguya uta na ngonga oyo mpenza, ete soki moto nani na kati na bino, ya molongo, azwami mobuki mibeko mpe ayamboli te uta na mabe, ete bopesa ye na minyokoli ya Satana; mpe akozala na nguya te ya komema mabe likolo na bino.

11 Boye, ezali bwania na ngai, napesi epayi na bino motindo moko, ete bomibongisa bino moko mpe bopesa moto na moto bokapita na ye;

12 Ete moto moko na moko akoka kopesa epayi na ngai mbando ya bokapita boye epesami epayi na ye.

13 Mpo elongobani ete ngai, Nkolo, nakomisa moto na moto moyanoli, lokola kapita likolo ya mapamboli ya mabele, oyo nasalaki mpe nalengelaki mpo na bikelamo na ngai.

14 Ngai, Nkolo, nasembolaki lola, mpe natongaki mabele, misala ya maboko na ngai mpenza; mpe biloko nyonso kati na yango ezali ya ngai.

15 Mpe ezali ntina na ngai ya kopesaka makoki mpo na basantu na ngai, mpo biloko nyonso ezali ya ngai.

16 Kasi esengeli esalema na lolenge na ngai moko; mpe tala oyo ezali lolenge oyo ngai Nkolo, nasili kokata mpo na makoki ya basantu na ngai, ete babola batombuama, na ete bato na bozwi bakitisama.

17 Mpo mabele ezali ya kotonda, mpe biloko ezali ya kokoka mpe mingi ya kotikala; iyo, nalengelaki biloko nyonso, mpe napesi na bana ya bato bakoka kozala basali mpo na bango moko.

18 Boye, soki moto moko akamati ndambo uta na ebele oyo nasalaki, mpe akabi ndambo na ye, engebene na mobeko ya nsango malamu na ngai, epayi ya babola mpe bakeleli te, akotombola, elongo na bato ya nkuna, miso na ye na lifelo, mpe akozala kati na monyokoli.

19 Mpe sikawa, solo nalobi epayi na bino, mpo na oyo etali bozwi ya molongo

20 Tika epesama epayi ya mosali na ngai Sidney Rigdon esika oyo wapi afandi sikawa, mpe lopango wapi babongisaka mposo ya nyama ezala lokola bokapita na ye, lokola lisungi na ye wana ezali ye kosala kati na elanga na ngai ya vinyo, kutu lokola nalingi, ntango na kotinda ye.

21 Mpe tika ete makambo nyonso esalema engebene na toli epesami na bato ya molongo, mpe na bondimami kati na bomoko to boponi ya molongo, baoyo bafandi na mboka ya Kirtland.

22 Mpe bokapita boye mpe lipamboli oyo ngai, Nkolo, napesi likolo ya mosali na ngai Sidney Rigdon lokola lipamboli likolo na ye, mpe nkona na ye nsima na ye;

23 Mpe nakoyikisa mapamboli likolo na ye, mbala mingi lokola akozala na bomikitisi liboso na ngai.

24 Mpe lisusu, tika epesama epayi ya mosali na ngai Martin Harris, lokola bokapita na ye, lopango oyo mosali na ngai John Johnson azwaki na kakobolana libula na ye ya kala, mpo na ye mpe nkona na ye nsima na ye;

25 Mpe mbala mingi lokola azali sembo, nakoyikisa mapamboli likolo na ye mpe nkona na ye nsima na ye.

26 Mpe tika ete mosali na ngai Martin Harris apesa mosolo na ye lokola likabo mpo na kosakola maloba na ngai, lokola ekotinda mosali na ngai Joseph Smith Mwana.

27 Mpe lisusu, tika ete mosali na ngai Frederick G. Williams azwa esika oyo wapi afandi sikawa.

28 Mpe tika ete mosali na ngai Oliver Cowdery akamata lopango oyo ekangemi na ndako, oyo esengeli kozala lokolaesika ya mosala ya bonyati buku, oyo ezali lopango ya nimelo ya yambo, mpe lisusu lopango oyo wapi tata na ye azali kofanda.

29 Mpe tika ete basali na ngai Frederick G. Williams mpe Oliver Cowdery bazwaesika ya mosala ya bonyati buku mpe biloko nyonso etaliesika ya mosala yango.

30 Mpe oyo ekozala bokapita na bango boye ekopesama epayi na bango.

31 Mpe mbala mingi lokola bazali sembo, tala nakopambola, mpe nakoyikisa mapamboli likolo na bango.

32 Mpe oyo ezali ebandeli ya bokapita boye napesi bango, mpo na bango mpe nkona na bango nsima na bango.

33 Mpe, mbala mingi lokola bazali sembo, nakoyikisa mapamboli likolo na bango mpe nkona na bango nsima na bango, kutu ebele ya mapamboli.

34 Mpe lisusu, tika ete mosali na ngai John Johnson azwa ndako oyo wapi azali kofanda, mpe libula, nyonso longola se eteni ya mabele oyo ebombamaki mpo na botongi ya bandako na ngai, oyo etali libula wana ya kosangola, mpe mapango oyo wana etangamaki mpo na mosali na ngai Oliver Cowdery.

35 Mpe mbala mingi lokola azali sembo, nakoyikisa mapamboli likolo na ye.

36 Mpe ezali bolingi na ngai ete asengeli koteka mapango oyo matiami ndelo mpo na botongi engumba ya basantu na ngai, mbala mingi lokola ekoyebisama ye na mongongo ya Molimo, mpe engebene na toli ya molongo, mpe na kopona ya molongo.

37 Mpe oyo ezali ebandeli ya bokapita boye napesi epayi na ye, lokola lipamboli mpo na ye mpe nkona na ye nsima na ye.

38 Mpe mbala mingi lokola azali sembo, nakoyikisa mapamboli likolo na ye.

39 Mpe lisusu, tika epesama epayi ya mosali na ngai Newel K. Whitney bandako mpe lopango wapi azali kofanda sikawa, mpe lopango mpe ndako monene likolo ya oyo wapi etiami ndako ya mombongo, mpe lisusu lopango oyo ezali na litumu ya sudi na ndako ya mombongo, mpe lisusu.

40 Mpe nyonso oyo napesaki epayi ya mosali na ngai Newel K. Whitney mpo na bokapita na ye, lokola lipamboli na ye mpe nkona na ye nsima na ye, mpo na litomba ya ndako ya mombongo ya molongo na ngai oyo natiaki mpo na ntina na ngai kati na mabele ya Kirtland.

41 Iyo, solo, oyo ezali bokapita boye napesi epayi ya mosali na ngai N. K. Whitney, kutu ndako mobimba oyo ya mombongo, epayi na ye mpe ntoma na ye, mpe nkona na ye nsima na ye.

42 Mpe mbala mingi lokola azali sembo na kobombaka mitindo na ngai, oyo napesaki epayi na ye, nakoyikisa mapamboli likolo na ye mpe nkona na ye nsima na ye, kutu ebele ya mapamboli.

43 Mpe lisusu, tika ete mosali na ngai, Joseph Smith Mwana, apesama lopangu etiami ndelo mpo na botongi ya ndako monene na ngai, oyo ezali metele penepene na nkama mibale na molai mpe metele ntuku motoba na monene, mpe lisusu libula epayi wapi tata na ye azali kofanda sikawa;

44 Mpe oyo ezali ebandeli ya bokapita boye nasili kopesa epayi na ye, lokola lipamboli epayi na ye, mpe epayi ya tata na ye.

45 Mpo tala, nabombaki libula mpo na tata na ye, elingi koloba lisungi na ye; boye akitolami na ndako ya mosali na ngai Joseph Smith Mwana.

46 Mpe nakoyikisa mapamboli likolo ya ndako ya mosali na ngai, Joseph Smith Mwana, mbala mingi lokola azali sembo, kutu ebele ya mapamboli.

47 Mpe sikawa, napesi motindo moko epayi na bino mpo na oyo etali Siona, ete bosengeli lisusu te kokangama na bandeko ya bandimi ya Siona lokola molongo ya bomoko, bobele na lolenge oyo—

48 Ekosila bino komibongisa, bokobiangama Molongo ya Bomoko ya Likonzi ya Siona, Engumba ya Kirtland. Mpe bandeko na bino bandimi, ekosila bango komibongisa, bakobiangama Molongo ya Bomoko ya Engumba ya Siona.

49 Mpe basengeli kobongisama na bankombo na bango moko, mpe na nkombo na bango moko; mpe bakosala mosala na bango na nkombo na bango moko, mpe na bankombo na bango moko;

50 Mpe bokosala mosala na bino na nkombo na bino moko, mpe na bankombo na bino moko.

51 Mpe oyo natindi esalema mpo na lobiko na bino, mpe lisusu mpo na lobiko na bango, mpo na bobengani na bino mpe na engebene ya oyo makoya.

52 Mpo mayokani ebukami na nzela ya bobuki mobeko, na bilula-lula, mpe na maloba ya lokuta—

53 Boye, lingomba na bino ekopanzana lokola molongo ya bomoko na bandeko na bino bandimi, na lolenge ete kino ngonga oyo bokotikala ya kokangama na bango te, bobele na lolenge oyo, lokola nalobaki, na nzela ya kodefa lokola ekondimama na molongo oyo kati na lisanga, lokola ekopesama makoki mpe lokola ekotinda kopona ya lisanga.

54 Mpe lisusu, napesi motindo moko epayi na bino mpo na oyo etali bokapita na bino boye napesaki epayi na bino.

55 Tala, bozwi oyo nyonso ezali na ngai, soki bongo te bondimi na bino ezali mpamba, mpe bozali bakibisi, mpe mayokani oyo bosalaki epayi na ngai ebukami;

56 Mpe soki bozwi ezali ya ngai, bongo bozali bakapita; soki bongo te bozali bakapita te.

57 Kasi, solo nalobi epayi na bino, naponaki bino kozala bakapita likolo ya ndako na ngai, kutu bakapita solo mpenza.

58 Mpe mpo na ntina oyo natindaki bino komibongisa bino moko, kutu mpo na konyata buku ya maloba na ngai, litondi ya makomi na ngai, bimoniseli oyo napesaki epayi na bino, mpe oyo nakopesa, nsima awa, mbala na mbala epayi na bino—

59 Mpo na ntina ya kotonga eklezia mpe bokonzi na ngai na mabele, mpe kolengela bato na ngai mpo na ntango nakofanda elongo na bango, oyo ntango ebelemi mpe ezali koya noki.

60 Mpe bosengeli kolengela mpo na bino moko ebombelo ya misolo, mpe kobulisa yango mpo na nkombo na ngai.

61 Mpe bosengeli kopona moko na kati na bino mpo na kobatela ebombelo ya misolo, mpe asengeli kokulisama na lipamboli oyo.

62 Mpe elembo moko ekozala likolo ya ebombelo ya misolo, mpe biloko nyonso ya bule ekopesama na ebombelo ya misolo; mpe moto moko te na kati na bino asengeli kotala yango, soki mpe ndambo na yango lokola ya ye moko, mpo esengeli kozala ya bino nyonso na boyokani moko.

63 Mpe uta na ngonga oyo mpenza napesi yango epayi na bino; mpe sikawa bokeba na yango, ete bokende mpe bosalela bokapita boye napesaki epayi na bino, longola se mpo na makambo ya bule, mpo na ntina ya bonyatami buku ya makambo oyo ya bule lokola nalobaki.

64 Mpe matabisi uta na biloko ya bule esengeli kobombama kati na ebombelo ya misolo, mpe elembo esengeli kozala likolo na yango; mpe moto moko te asengeli kosalela soki mpe kokamata yango uta na ebombelo ya misolo, to elembo oyo ekotiama likolo na yango esengeli kofungolama mpe te, bobele na kopona ya molongo, soki te na motindo uta na Nkolo.

65 Mpe boye bosengeli kosimba makasi matabisi uta na biloko ya bule kati na ebombelo ya misolo, mpo na ntina oyo ezali bule mpe esantu.

66 Mpe oyo esengeli kobiangama ebombelo ya bule ya misolo ya Nkolo; mpe elembo esengeli ebatelama likolo na yango ete ekoka kozala ebombelo esantu mpe oyo ebulisami mpo na Nkolo.

67 Mpe lisusu, ekozala na ebombelo mosusu ya misolo oyo elengelami, mpe mobombi misolo aponami mpo na kobomba misolo, mpe elembo esengeli kotiama likolo na yango;

68 Mpe misolo nyonso oyo bokozwa kati na bokapita na bino, na kobongisaka bozwi boye nasili kopesa epayi na bino, na bandako, soki na mabele, soki na bitonga, soki mpe na biloko oyo nyonso longola se soki ezali ya makomi masantu mpe ya bule, oyo nabombaki mpo na ngai moko mpo na ntina oyo ezali esantu mpe bule, esengeli kotiama na lombangu nyonso lokola ekozna bino misolo, na bankama, soki na ntuku mitano, soki na ntuku mibale, soki na bazomi, soki mpe na mitano.

69 Elingi koloba na maloba mosusu, soki moto moko na kati na bino azwi dollars mitano tika ye atia yango kati na ebombelo ya misolo; mpe soki azwi zomi, soki ntuku mibale, soki ntuku mitano, soki monkama moko, tika ye asala mpe lolenge moko;

70 Mpe botika moto moko te na kati na bino aloba ete ezali na ye moko; mpo mikobiangama na ye te, ndambo na yango mpe te.

71 Mpe basengeli kosalela ndambo na yango te, soki mpe kokamata myango uta na ebombelo ya misolo te, bobele na kopona mpe bondimami ya nyonso bato ya molongo.

72 Mpe oyo ekozala kopona mpe bondimami ya nyonso bato ya molongo—ete moto nyonso na kati na bino aloba na mobombi misolo: Nazali na mposa ya oyo mpo na kosunga ngai na bokapita na ngai—

73 Soki ezali dollars mitano, soki mpe ezali dollars zomi, soki ntuku mibale, soki ntuku mitano, soki monkama, mobombi misolo akopesa ye motango ya mosolo asengi mpo na kosalisa ye kati na bokapita na ye—

74 Kino akozwama mobuki mibeko, mpe emonani polele liboso ya lisanga ya molongo ete azali kapita oyo azangi bosembo mpe bwania.

75 Kasi wana ezali ye naino mpenza ndeko mondimi, mpe azali sembo mpe bwania kati na bokapita na ye, oyo ekozala elembo mpo na mobombi misolo ete mobombi misolo asengeli kopekisa ye te.

76 Kasi soki abuki mobeko, mobombi ya misolo asengeli koyangelama na lisanga mpe kopona ya molongo.

77 Mpe soki mobombi misolo azwami kapita oyo azangi bosembo mpe bwania, akokonzama na lisanga mpe boponi ya molongo, mpe asengeli kolongolama uta na esika na ye, mpe mosusu asengeli kobiangama na esika na ye.

78 Mpe lisusu, solo nalobi epayi na bino, mpo na oyo etali banyongo na bino—tala ezali bolingi na ngai ete bofuta banyongo na bino nyonso.

79 Mpe ezali bolingi na ngai ete bomikitisa liboso na ngai, mpe bozwa lipamboli oyo na nzela ya etingia mpe bomikitisi na bino mpe losambo ya bondimi.

80 Mpe mbala mingi lokola bozali na molende mpe bomikitisi, mpe kosalela losambo ya bondimi, tala, nakolembisa mitema ya baoyo bozwami na banyongo na bango, kino nakotinda makoki epayi na bino mpo na bokangoli na bino.

81 Boye koma mokanda na lombangu na New York mpe koma engebene na oyo ekotindama na Molimo na ngai; mpe nakolembisa mitema ya baoyo bozwami na banyongo na bango, ete elongolama uta na mayele na bango makanisi ya komema mitungisi likolo na bino.

82 Mpe mbala mingi lokola bokozala bato na bomikitisi mpe na bosembo mpe bokobelela na nkombo na ngai, tala, nakopesa bino elonga.

83 Napesi epayi na bino elaka, ete bokangolama mbala moko oyo uta na boumbu na bino.

84 Mbala mingi lokola bokozwa libaku ya kodefa mosolo na bankama, soki mpe bankoto, kutu kino bokodefa mingi ya kokoka mpo na komikangola uta na boumbu na bino, ezali litomba na bino.

85 Mpe bopesa ndanga ya bozwi boye nasili kotia na maboko na bino, mbala moko oyo, na kopesaka bankombo na bino na bondimami ya nyonso to soki bongo te, ezala lokola ekobongela bino malamu.

86 Napesi litomba oyo epayi na bino, mbala moko oyo; mpe tala, soki bobandi mpe bokobi kosala makambo oyo nalakisi bino, engebene na mitindo na ngai, biloko oyo nyonso ezali ya ngai, mpe bozali bakapita na ngai, mpe nkolo biloko akopesa te nzela ete ndako na ye ebukama. Kutu bongo. Amene.

Bimisa na lokasa