Makomi
Malongi mpe Mayokani 119


Eteni 119

Emoniseli epesami na nzela ya Profeta Joseph Smith, na Far West, Missouri, na mokolo ya 8, sanza ya sambo ya mobu 1838, lokola eyano na libondeli na ye ete: “O Nkolo! Lakisa epayi ya basali na yo motuya boni ezali yo kosenga lokola eteni yoko kati na zomi uta na bozwi ya bato na yo.” Mobeko ya bopesi eteni yoko kati na zomi, lokola esosolami lelo, epesamaki te na Eklezia liboso ya emoniseli oyo. Liloba eteni yoko kati na zomi na losambo yango etangami sikawa mpe na bimoniseli ya yambo (64:23; 85:3; 97:11) elingaki kaka te koloba eteni yoko kati na zomi, kasi mabonza nyonso epesami na bolingi ya motema moko, to ntako, na misolo ya Eklezia. Nkolo apesaki liboso na Eklezia mobeko ya bobulisi mpe bokapita ya bozwi, oyo bandeko bandimi (mingi mingi bampaka bakambi) bamikotelaki na nzela ya liyokani oyo esengelaki kozala ya libela. Lokola mingi bakokaki te kokangama na liyokani oyo, Nkolo alongolaki yango mpo na ntango moko mpe apesaki na esika na yango mobeko ya bopesi eteni yoko kati na zomi na Eklezia mobimba. Profeta atunaki Nkolo soki Asengi boni na bozwi na bango mpo na ntina ya makambo ya bule. Emoniseli oyo ezalaki eyano.

1–5, Basantu basengeli kofuta nyonso oyo eleki likolo ya bozwi na bango mpe nsima kopesa, lokola eteni yoko kati na zomi, yoko eteni kati na zomi ya mosolo na bango oyo ezwami likolo nsima ya eleko ya mobu moko; 6–7, Kosalaka na lolenge oyo ekosantisa mboka ya Siona.

1 Solo, boye elobi Nkolo, nasengi ete nyonso oyo eleki likolo ya bozwi na bango etiama na maboko ya episikopo ya eklezia na ngai na Siona,

2 Mpo na kotonga ndako na ngai, mpe mpo na kotia moboko ya Siona mpe mpo na bonganganzambe, mpe mpo na banyongo ya Bokambi ya Eklezia na ngai.

3 Mpe oyo ekozala ebandeli ya bopesi moko na zomi ya bato na ngai.

4 Mpe nsima, baye bafutaki yoko na zomi basengeli kofuta moko na zomi ya bozwi na bango nyonso ya mobu; mpe oyo ekozala mobeko ya ntango nyonso mpo na bango libela, mpo na bonganganzambe bosantu na ngai, elobi Nkolo.

5 Solo nalobi epayi na bino, ekosalema ete baoyo nyonso basangani na mboka ya Siona basengeli kopesa eteni yoko kati na zomi ya oyo eleki likolo ya bozwi na bango, mpe basengeli kotosa mobeko oyo, soki te bakozala bato balongobani mpo na kotikala na kati na bino te.

6 Mpe nalobi epayi na bino, soki bato na ngai batosi mobeko oyo te, mpo na kobatela yango mosantu, mpe na nzela ya mobeko oyo kosantisa mboka ya Siona mpo na ngai, ete meko na ngai mpe masambisi na ngai ekoka kobatelama na mboka yango, ete ekoka kozala esantu koleka, tala, solo nalobi epayi na bino, ekozala na mboka ya Siona mpo na bino te.

7 Mpe oyo esengeli kozala emekoleli mpo na makonzi nyonso ya Siona. Kutu bongo. Amene.

Bimisa na lokasa