Makomi
Malongi mpe Mayokani 121


Eteni 121

Losambo mpe masakoli makomami na Profeta Joseph Smith na mokanda epayi ya Eklezia wana ezalaki ye mokangemi kati na boloko na Liberty, Missouri, na elaka ya mokolo ya 20, sanza ya misato ya mobu 1839. Profeta mpe baninga na ye ebele bazalaki na boloko basanza mingi. Bosenga mpe botubi na bango oyo batindaki epayi ya bakalaki bayangeli mpe basambisi ekokaki koyela bango lisungi te.

1–6, Profeta abondeli Nkolo mpo na Basantu oyo bazali na mpasi; 7–10, Nkolo apesi ye maloba ya kimia; 11–17, nyonso oyo bazali kofunda bato ya Nkolo na lokuta ete babuki mibeko balakelami mabe; 18–25, Bakozala na makoki te mpo na kozwa bonganganzambe mpe bakokweisama; 26–32, Bimoniseli ya nkembo malakelami na baoyo wana bakoyika mpiko lokola bilombe; 33–40, Ntina nini mingi babiangami kasi moke kaka baponami; 41–46, Bonganganzambe ekoki kosalema bobele kati na bosembo.

1 O Nzambe, ozali wapi? Mpe wapi ema oyo ezipi esika na yo ya kobombana?

2 Ntango molai boni ekopekisa yo loboko na yo esala, mpe liso na yo emona, iyo liso na yo ya peto, tala uta na lola ya seko mpo na mabe oyo basali epayi ya bato na yo mpe basali epayi na yo, mpe litoyi na yo eyoka kolela na bango?

3 Iyo, O Nkolo, ntango molai boni ekoyoka bango mpasi uta na mabe ya bato mpe minyokoli na kobukaka mobeko, liboso ete motema na yo molembama na bango, mpe nsopo na yo eningana na mawa epayi na bango?

4 O Nkolo Nzambe ya Bokasi Nyonso, mozalisi ya lola, ya mabele, mpe ya mbu, mpe ya biloko nyonso ezali kati na yango, mpe oyo ayangelaka likolo mpe akonzaka zabulu, mpe mpifo ya molili mpe boyindisi ya Sheol—sembola loboko na yo; tika ete liso na yo limona; tika ete ema na yo elongolama; tika ete esika na yo ya kobombana ezipana lisusu te; tika ete litoyi na yo ebendana; tika ete motema na yo molembisama, mpe nsopo na yo eningana na mawa mpo na biso.

5 Tika nkanda na yo epelisama na banguna na biso; mpe, na nkele makasi ya motema na yo, na mompanga na yo bekola biso uta na mabe oyo basali biso.

6 Omikundola basantu na yo oyo bazali na mpasi, O Nzambe na biso; mpe basali na yo bakosepela na nkombo na yo libela.

7 Mwana na ngai ya mobali, kimia ezala na molimo na yo; mitungisi mpe mpasi na yo ekozala bobele mpo na ntango moke;

8 Mpe nsima, soki otieli yango molende malamu, Nzambe na likolo akonetola yo; okolonga likolo ya banguna na yo nyonso.

9 Baninga na yo bazali mpembeni na yo, mpe bakopesa yo mbote lisusu na mitema ya bolingo mpe maboko ya bondeko.

10 Okomi naino lokola Yobo te; baninga na yo baswani na yo te, bafundi yo mpo na bobuki mibeko mpe te, lokola basalaki Yobo.

11 Mpe baoyo bafundi yo mpo na bobuki mibeko, elikya na bango ekolimwa, mpe bozeli na bango ekoniangolama lokola libanga ya mvula ya mpembe liniangolamaka liboso ya miese mizikisaka ya moi oyo ezali kotana;

12 Mpe lisusu ete Nzambe atiaki loboko mpe elembo na ye mpo na kobongola ntango mpe bileko, mpo na kozipa mayele na bango, ete bakoka kososola misala na ye ya kokamwa te, ete akoka komeka bango lisusu mpe kokanga bango na mayele mabe na bango moko;

13 Lisusu mpo mitema na bango ezali ya kobeba, mpe makambo oyo balingi komema likolo ya basusu, mpe bolingo ya komonisa basusu mpasi, ekoki koya likolo ya bango moko na lolenge ya koleka ndelo mpenza.

14 Ete bakoka kokosama lisusu, mpe elikya na bango elimwa;

15 Mpe mibu mingi te uta sikawa, ete bango mpe eboto na bango bakombolama nie uta na nse ya lola, elobi Nzambe, ete moko te na kati na bango atikala kotelema penepene na efelo.

16 Nyonso oyo bakobalukela bapakolami na ngai balakelami mabe, elobi Nkolo, mpe bazali koganga ete basumukaki ntango basumuki liboso na ngai te, elobi Nkolo, kasi basalaki nzokande oyo elongobani na miso na ngai, mpe oyo natindaki bango.

17 Kasi baoyo wana bazali koganga ete babuki mibeko bazali kosala yango mpo bazali basali ya lisumu, mpe bazali bango moko bana ya bozangi botosi.

18 Mpe baoyo wana bazali kokata ndai ya lokuta na basali na ngai, ete bakoka komema bango na boumbu mpe liwa—

19 Lisuma epayi na bango; mpo batukaki bana mike na ngai bakokatama uta na makuli ya ndako na ngai.

20 Kitunga na bango ekotonda te, ndako mpe bibombelo na bango bikokufa, mpe bango moko bakoyinama na baoyo wana baletaki bango.

21 Bakozala na makoki te ya kozwa bonganganzambe, bana na bango nsima na bango mpe te uta nkola na nkola.

22 Elingaki kozala malamu mingi mpo na bango ete bakanga bango libanga monene na nkingo, mpe bazindisama na mozindo ya mbu.

23 Lisuma na baoyo wana nyonso bazali kotungisa bato na ngai, mpe kobengana, mpe koboma, mpe kotatola lokuta mpo na bango, elobi Nkolo na Bibele; nkola ya nioka ya ngenge ekoki kokima bokwei ya lifelo te.

24 Tala, miso na ngai ezali komona mpe koyeba misala na bango nyonso, mpe kati na ebombelo nazali na lisambisi ya noki oyo ekoya na eleko na yango, mpo na bango nyonso;

25 Mpo ezali na ntango moko oyo eponami mpo na moto na moto, engebene na lolenge misala na ye ekozala.

26 Nzambe akopesa epayi na bino boyebi na nzela ya Molimo Mosantu na ye, iyo, na nzela ya likabo ekoki kolobama te ya Molimo Mosantu, oyo ebimisamaki naino te uta mokili mobanda kino sikawa;

27 Boyebi oyo batata na biso bazelaki na bozeli makasi mpo eya kobimisama na ntango ya nsuka, mayele na bango elakisamaki nzela epayi na oyo na banjelu, lokola ebombamaki mpo na litondi ya nkembo na bango;

28 Ntango oyo esengeli koya na oyo wapi boyebi eloko moko te ekobatelama, ezala Nzambe moko soki mpe banzambe mingi, bakomonisama.

29 Bangbende mpe bampifo nyonso, biyangeli mpe banguya nyonso, ekobimisama mpe ekopesama epayi ya nyonso oyo batiaki molende lokola bilombe mpo na nsango malamu ya Yesu Klisto.

30 Mpe lisusu, ezala soki ndelo etiamaki na lola to na mbu, to na mabele ekawuka, to na moi, sanza, soki mpe na minzoto—

31 Ntango nyonso ya mozolongano na bango, mikolo nyonso epesami, basanza, mpe mibu, mpe mikolo nyonso ya mikolo na bango, basanza, mpe mibu, mpe nkembo nyonso ya bango, mibeko, mpe ntango epesama, ekobimisama na mikolo ya eleko ya litondi ya ntango—

32 Engebene na oyo wana ekanamaki na katikati ya Lisanga ya Nzambe ya Seko likolo ya banzambe mosusu liboso ete mokili oyo ebanda, oyo esengelaki kobombama kino na bosilisi mpe nsuka na yango, ntango moto na moto akoyingela liboso na miso na ye ya seko mpe kati na bopemi ezanga kufa na ye.

33 Ntango molai boni ekoki mai oyo ezali kotiola kotikala na mbindo? Nguya nini ekoki kotelemela lola? Lolenge moto akoki kosembola loboko na ye ya bolembu mpo na kotelemisa ebale ya Missouri na nzela epesami ya botioli na yango, soki mpe kobalusa nzela ya botioli na yango nsima, na tina ya kopekisa Oyo ya Bokasi nyonso akoka kosopa boyebi uta na lola likolo ya mitu ya Basantu ya Mikolo ya Nsuka.

34 Tala, mingi babiangami, kasi moke baponami. Mpe mpo na nini baponami te?

35 Mpo mitema na bango etiami mingi likolo ya biloko ya mokili oyo, mpe ezali koluka lokumu ya bato, ete bazali koyekola liteya moko oyo te—

36 Ete makoki ya bonganganzambe makangami na ndenge ekoki kokabwana te na nguya ya lola, mpe ete nguya ya lola ekoki kokonzama to kosalema kaka likolo ya mabongisi ya bosembo.

37 Ete makoki kopesama likolo na biso, ezali solo; kasi ntango tozali koluka kobomba masumu na biso, to kosepelisa lolendo na biso, mposa na biso ya mpamba, soki mpe kokonza to mpe kosalela mpifo to bokasi likolo ya milimo ya bana na bato, na motuya nyonso ya bozangi bosembo, tala, lola ebendami; Molimo ya Nkolo moyoki mawa; mpe ntango ebendani, Amene na bonganganzambe to na likoki ya moto wana.

38 Tala, liboso ayeba yango, atikami ye moko, azali komibeta makolo na songe ya makonga, azali konyokolo basantu, mpe kobundisa Nzambe.

39 Tosili koyekola na oyo tomona ya mawa ete ezali lolenge mpe ezalela ya bato pene na nyonso, soki kaka bazwi mua likoki moke, lokola bakanisi kozala na yango, bakobanda mbala moko kokonza na bozangi bosembo.

40 Na boye mingi babiangami, kasi moke baponami.

41 Nguya to ekoki moko te ekoki mpe esengeli kosalema na nzela ya bonganganzambe te, kaka na nzela ya kondimisa, ya motema molai, ya bonkonde mpe bosokemi, mpe ya bolingo ya solo;

42 Na nzela ya boboto, mpe boyebi ya peto, oyo ekokolisa molimo mpenza na bozangi kokosa, mpe na bozangi mayele mabe—

43 Ozali kopamela makasi na ntango esengeli, ntango opusami na Molimo Mosantu; mpe nsima okolakisa bolingo mingi epayi na ye oyo osili kopamela, mbele akamata yo lokola monguna na ye;

44 Ete akoka koyeba ete bosembo na yo ezali makasi koleka basinga ya liwa.

45 Tika ete misopo mpe ezala etonda bolingani pona epayi bato nyonso, mpe pona epayi ya ndako ya bondimi, mpe tika ete bolamu elata makanisi na yo ntango nyonso; bongo nde boliki na yo ekokoma monene na miso ya Nzambe; mpe malongi ya bonganganzambe makotanga likolo ya molimo na yo lokola mamio uta na lola.

46 Molimo Mosantu akozala moninga na yo ya ntango nyonso, mpe lingenda na yo ekozala lingenda ebongwanaka te ya bosembo mpe bosolo; mpe mpifo na yo ekozala mpifo yoko ya libela, mpe na bozangi kosalisa na makasi ekotiola epayi na yo libela na libela.

Bimisa na lokasa