Makomi
Malongi mpe Mayokani 125


Eteni 125

Emoniseli epesami na nzela ya Profeta Joseph Smith, na Nauvoo, Illinois, na sanza ya misato ya mobu 1841, na ntina ya Basantu na telitwale ya Iowa.

1–4, Basantu basengeli kotonga bingumba mpe kosangana na makonzi ya Siona.

1 Nini ezali bolingi ya Nkolo mpo na oyo etali basantu na telitwale ya Iowa?

2 Solo, boye elobi Nkolo, nalobi epayi na bino, soki baoyo wana bamibiangi na nkombo na ngai mpe baye wana bazali komeka kozala basantu na ngai, soki bakosala bolingi na ngai mpe kobomba mitindo na ngai oyo etali bango, tika ete basangana esika moko na bisika oyo nakopesa epayi na bango na nzela ya mosali na ngai Joseph, mpe batonga bingumba mpo na nkombo na ngai, ete bakoka komilengela mpo na oyo wana ebombami mpo na ntango ekoya.

3 Tika ete batonga engumba moko mpo na nkombo na ngai na mboka oyo ezali na ngambo mosusu na engumba ya Nauvoo, mpe tika nkombo ya Zalayemila epesama na yango.

4 Mpe tika ete baoyo wana nyonso bazali koya uta na esti, mpe westi, mpe nordi, mpe sudi, baoyo bazalaki na mposa ya kotikala na kati kuna, bakamata libula na bango na esika se moko wana, soki na engumba ya Nashville mpe lokola, to na engumba ya Nauvoo, mpe kati na makonzi oyo naponaki, elobi Nkolo.

Bimisa na lokasa