Makomi
Malongi mpe Mayokani 127


Eteni 127

Mokanda uta na Profeta Joseph Smith epayi ya Basantu ya Mikolo ya Nsuka na Nauvoo, Illinois, oyo ezali na malako etali libatisi mpo na bakufi, etiami elaka na Nauvoo, na mokolo ya 1, sanza ya libwa ya mobu 1842.

1–4, Joseph Smith asepeli kati na monyokoli mpe mokakatano; 5–12, Masolo ya makomi etali ebatisi mpo na bakufi esengeli kokomama.

1 Mpo mbala mingi lokola Nkolo amonisaki epayi na ngai ete banguna na ngai, ezala na Missouri mpe na Ekolo oyo, bazalaki lisusu kolanda ngai; mpe mbala mingi lokola bakolanda ngai mpamba, mpe lokola bazali ata na elilingi to elembo ata moke te ya boyengebene soki mpe makoki na ngambo na bango na kolukaka kosambisa ngai; mpe mbala mingi lokola bifundeli na bango etongami nyonso na lokuta ya langi ya mwindo koleka, nakanisaki ete elongobani mpe ezali bwania epayi na ngai kolongwa na esika yango mpo na mwa eleko, mpo na bokengi na ngai moko mpe bokengi ya bato oyo. Nalingi koloba na baoyo nyonso nazali na bango makambo ya mombongo, ete nasili kotika makambo na ngai na bantoma mpe bakalaki oyo bakokokisa makambo nyonso ya mombongo na lolenge ya lombangu mpe malamu, mpe bakotala ete banyongo na ngai nyonso efutama na ntango esengeli, na kotekaka bozwi yango, to soki bongo te, lokola ekosenga likambo yango, lokola libaku ekopesama. Ntango nakoyoka ete ekumbaki nyonso esili koleka mpenza, nsima nakozongela bino lisusu.

2 Mpe mpo na oyo etali makama na nzela ya oyo nabiangami koleka, mamonani bobele lokola eloko moke epayi na ngai, mpo boluli mpe nkele ya moto ekomi libula ya mikolo ya bomoi na ngai; mpe mpo na ntina nini eyano emonani mobombamo, longola se nakulisamaki uta ebandeli ya mokili mpo na boko ntina malamu, to ntina mabe, lokola ekoki bino kopona kobianga yango. Bokata likambo yango bino moko. Nzambe ayebi makambo nyonso oyo, soki ezali malamu to mabe. Kasi, nzokande, mai ya mozindo ezali oyo nameseni koniania. nyonso wana ekomi lokola lolenge ya mbotama mpo na ngai; mpe nazali koyoka, lokola Paulo, kosepela kati na mikakatano; mpo kina mokolo oyo Nzambe ya batata na ngai asili kokangola ngai uta na bango nyonso, mpe akokangola ngai uta sikawa kokende liboso; mpo tala, mpe mona, nakolonga likolo ya banguna na ngai nyonso, mpo Nkolo Nzambe alobaki yango.

3 Boye, tika ete basantu nyonso basepela, mpe bazala na nsai ya koleka ndelo; mpo Nzambe ya Yisalaele azali Nzambe na bango, mpe akozongisela lifuta ya sembo lokola mbano likolo ya mitu ya banyokoli na bango nyonso.

4 Mpe lisusu, solo boye elobi Nkolo: Tika ete mosala ya tempelo na ngai, mpe misala nyonso oyo napesaki epayi na bino, mikobama mpe mitikama te; mpe tika ete etingia na bino, mpe molende, mpe bompikiliki, mpe misala na bino miyikama, mpe bokobungisa soki moke te lifuta na bino, elobi Nkolo na Bibele. Mpe soki banyokoli bino, bongo nde banyokolaki baprofeta mpe bato ya sembo oyo bazalaki liboso na bino. Mpo na nyonso oyo lifuta ezali na lola.

5 Mpe lisusu, napesi epayi na bino liloba moko mpo na oyo etali libatisi mpo na bakufi na bino.

6 Solo, boye elobi Nkolo epayi na bino mpo na oyo etali bakufi na bino: Ntango bato soki nani na kati na bino babatisami mpo na bakufi na bino, tika ete kalaki mokomi moko azala kuna, mpe tika ete azala nzeneneke ya miso mpo na ebatisi na bino; tika ete ayoka na matoyi na ye, ete akoka kotatola na bosolo mpenza, elobi Nkolo;

7 Ete nyonso mpo na oyo etali masolo ya makomi na bino ekoka kotiama na nkoma na lola; nyonso oyo bokangi na mabele, ekoka kokangama na lola; oyo nyonso bokofungola na mabele, ekoka kofungolama na lola;

8 Mpo nazali penepene ya kozongisa makambo mingi na mabele, oyo etali bonganganzambe, elobi Nkolo na Bibele.

9 Mpe lisusu, tika masolo ya makomi nyonso ebatelama na molongo, ete makoka kotiama na nkoma ya tempelo esantu na ngai, mazala na bokundoli nkola na nkola, elobi Nkolo na Bibele.

10 Nakoloba epayi ya basantu nyonso, ete nazalaki na mposa, na mposa monene koleka mpenza, ya kolobela bango uta na etelemelo na ntina ya likambo ya libatisi mpo na bakufi, na mokolo ya Saba elandi. Kasi mbala mingi lokola ezali na nguya na ngai te mpo na kosala bongo, nakokoma liloba ya Nkolo mbala na mbala, na ntina ya likambo wana, mpe lisusu makambo mingi mosusu, mpe nakotinda yango epayi na bino na nzela ya mikanda.

11 Sikawa nakangi mokanda na ngai mpo na ntango oyo, mpo nazangi ntango; mpo monguna abelemi mpe azali penepene, mpe lokola Mobikisi alobaki, mwana ya mokonzi ya mokili oyo azali koya, kasi azali na nguya likolo na ngai te.

12 Tala, losambo na ngai epayi ya Nzambe ezali ete bino nyonso bokoka kobikisama. Mpe natie loboko ya ngai moko mosali na bino kati na Nkolo, profeta mpe momoni ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka.

Joseph Smith.

Bimisa na lokasa