Makomi
Malongi mpe Mayokani 130


Eteni 130

Eteni oyo ezali na malako oyo Profeta Joseph Smith apesaki na Ramus, Illinois, na mokolo ya 2, sanza ya minei ya mobu 1843.

1–3, Tata mpe Mwana bakoki komonana na bomoto mpenza epayi ya bato; 4–7, Banjelu bafandaka na etando ya selesitiale; 8–9, Mabele ya selesitiale ekozala Ulima mpe Tumima monene; 10–11, Libanga ya mpembe epesami na moto nyonso oyo akoti na mokili ya selesitiale; 12–17, Ntango ya Boyei ya Mibale ebimisami te na Profeta; 18–19, Mayele oyo ezwami na bomoi oyo makolamuka elongo na biso na Bosekwi; 20–21, Mapamboli nyonso eyaka na nzela ya botosi na mobeko; 22–23, Tata mpe Mwana bazali na nzoto ya mosuni mpe ya mikuwa.

1 Ntango Mobikisi akomonana tokomona ye kaka na lolenge azali. Tokomona ete azali moto lokola biso moko.

2 Mpe bomoi se moko oyo ya awa ya kozala na lingomba na bato mosusu na kati na biso ekozala na kati na biso kuna, bobele ekoyikana na nkembo ya seko, oyo nkembo tozali koyoka esengo na yango sikawa te.

3 Yoane 14:23—Komonana ya Tata mpe Mwana, kati na molongo ya kotanga wana, ezali komonana na nzoto ya bomoto; mpe likanisi wana ete Tata na Mwana bafandaka na motema ya moto ezali likanisi moko ya kala ya mangomba ya bokabwani, mpe ezali lokuta.

4 Lokola eyano na motuna—Kolukaka kotia lomeko na ntango ya Nzambe, ntango ya anjelu, ntango ya profeta, mpe ntango ya moto, ezali oyo engebene na monzoto monene likolo ya oyo wapi bafandi te?

5 Napesi eyano, Iyo. Kasi banjelu oyo bazali kosalela mabele oyo bazali te longola se baoyo wana bazali mpe bazalaki ya mabele yango.

6 Banjelu bafandaka na monzoto monene lokola mabele oyo te;

7 Kasi bafandaka liboso ya miso ya Nzambe, na libungutulu oyo ezali lokola mbu ya talatala mpe ya moto, wapi biloko nyonso ezala ya kala, ya ntango oyo, mpe ya ntango ekoya bimonisami polele mpo na nkembo na bango, mpe ezali na ntango nyonso liboso ya Nkolo.

8 Esika wapi Nzambe afandaka ezali Ulima mpe Tumima ya monene.

9 Mabele oyo, na ezalela na yango ya kosantisama mpe ezalela na yango ya bozangi kufa, makokomisama lokola libanga ya mpembe mpe ekozala Ulima mpe Tumima mpo na bafandi baoyo bakozala likolo na yango kuna, na nzela ya oyo wapi makambo nyonso etali babokonzi oyo ezali na nse na yango, to bokonzi nyonso ya molongo ya nse, makomonisama epayi ya baoyo bakofanda likolo na yango; mpe mabele oyo ekozala ya Klisto.

10 Bongo libanga ya mpembe oyo etangami na Emoniseli 2:17, ekokoma Ulima mpe Tumima epayi ya moto moko moko oyo akozwa moko, na nzela ya oyo wapi makambo nyonso etali babokonzi ya molongo ya likolo makoyebana;

11 Mpe libanga ya mpembe epesami epayi ya moko moko ya nyonso baoyo wana bakoya na bokonzi ya selesitiale, likolo ya oyo wapi nkombo moko ya sika ekomami, oyo moto moko ayebi yango te longola se oyo azwi yango. Nkombo yango ya sika ezali liloba ya sekele.

12 Nasakoli, na nkombo ya Nkolo Nzambe, ete ebandeli ya bampasi oyo ekosopisa makila mingi liboso ya boyei ya Mwana ya Moto ekozala na Carolina ya Sudi.

13 Ekoki mingi koya na nzela ya likambo ya baumbu. Oyo mongongo moko elakisi ngai yango, wana ezalaki ngai kosambela makasi na ntina ya likambo yango, ya 25, sanza ya zomi na mibale ya mobu 1832.

14 Nazalaki mokolo moko kosambela makasi mingi mpenza mpo na koyeba ntango ya boyei ya Mwana ya Moto, ntango nayokaki mongongo moko kozongela koloba oyo elandi:

15 Joseph, mwana mobali na ngai, soki okozala na bomoi kino okozala na mibu ntuku mwambe na mitano, okomona elongi ya Mwana ya Moto; boye tika ete oyo ekoka, mpe kotungisa ngai lisusu te na ntina ya likambo oyo.

16 Atikaki ngai boye, kozangaka makoki ya kokamata ekateli soki boyei oyo elobelami etali ebandeli ya nkoto moko ya mibu to komonana ya liboso na yango, mpe soki nasengeli kokufa mpe boye komona elongi na ye.

17 Nandimi ete boyei ya Mwana ya Moto ekozala sikasikawa te koleka ntango wana.

18 Motuya nyonso ya mayele tokokoma na yango na bomoi oyo, tokolamuka na yango na bosekwi.

19 Mpe soki moto moko azwi boyebi mpe mayele koleka mosusu kati na bomoi oyo na nzela ya etingia mpe botosi na ye, akozala na litomba mingi koleka na mokili ekoya.

20 Ezali na mobeko, oyo ekoki kobongolama te oyo ebimisama na lola liboso ya bokeli ya mokili oyo, likolo ya oyo wapi mapamboli nyonso efandisami—

21 Mpe ntango tozwi lipamboli songolo uta na Nzambe, ezali na nzela ya botosi ya mobeko wana likolo ya wapi efandisami.

22 Tata azali na nzoto ya mosuni mpe mikuwa oyo ekoki kosimbama lokola ya moto; Mwana mpe lisusu; kasi Molimo Mosantu azali na nzoto ya mosuni mpe mikuwa te, kasi azali moto ya Molimo. Soki ezalaki bongo te, Molimo Mosantu akoki kofanda kati na biso te.

23 Moto akoki kozwa Molimo Mosantu, mpe ekoki kokita likolo na ye kasi kotikala elongo na ye te.

Bimisa na lokasa