Makomi
Malongi mpe Mayokani 136


Eteni 136

Eteni oyo ezali na liloba mpe bolingi ya Nkolo, mpe epesami na nzela ya Mokambi Brigham Young na Winter Quarters, na kaa ya Yisalaele, Ekolo ya Omaha, na libongo ya ngambo ya westi ya ebale ya Missouri River, penepene na Council Bluffs, Iowa.

1–16, Lolenge kani molako ya Yisalaele mosengeli kobongisama mpo na mobembo ya westi elimbolami; 17–27, Basantu batindami kotia mibeko ebele ya nsango malamu na misala; 28–33, Basantu basengeli koyemba, kobina, kosambela, mpe koyekola bwania; 34–42, Baprofeta babomami ete bakumisama mpe bato ya nkuna bakweisama.

1 Oyo ezali Liloba mpe Bolingi ya Nkolo mpo na oyo etali bato ya Molako ya Yisalaele na ntina ya mibembo na bango epayi na westi:

2 Tika ete bato nyonso ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka, mpe baoyo wana bazali kosala mobembo elongo na bango, babongisama na mangomba ya bato ya mobembo, na liyokani mpe elaka ya kobatela mitindo mpe meko nyonso ya Nkolo Nzambe na biso.

3 Tika ete mangomba ya bato ya mobembo mabongisama na bakapitene likolo ya minkama, bakapitene likolo ya bantuku mitano, mpe bakapitene likolo ya bazomi, elongo na mokambi moko mpe bapesi toli na ye mibale na moto na bango, na nse ya bokambami ya Bapostolo Zomi na mibale.

4 Mpe oyo ekozala liyokani na biso—ete tokotambola engebene na makuli nyonso ya Nkolo.

5 Tika ete lingomba moko moko ya bato ya mobembo epesa mpo na bango moko nyonso ngombe ya kobenda makalo, makalo, bilei, bilamba, mpe biloko mosusu ya ntina mpo na mobembo, oyo bakoki kozwa.

6 Ntango mangomba ya bato ya mobembo ebongisami tika ete bakende kosala na bokasi na bango, kolengela esika mpo na baoyo wana basengeli kotikala.

7 Tika ete lingomba ya bato na mobembo moko moko, na bakapitene mpe bakambi na bango, bazwa ekateli mpo na oyo etali motango ya bato boni ekoki kokende na eleko ya milona ekoya; nsima kopona motango ekoki ya bilombe ya bato mpe banganga mayele, kokamata ngombe ya kobenda makalo, nkona, mpe bisalelo ya bilanga, kokende lokola bapionie kolengela mpo na kotia na mabele milona ya eleko ya milona.

8 Tika ete lingomba moko moko likamata mokumba na ndambo oyo ekokani, engebene na likabo ya bozwi na bango, ya babola, bakufeli mibali, bitike ya batata, mpe mabota ya baoyo wana bakendaki kati na mampinga, ete koganga ya bakufeli mibali mpe bitike ya batata emata te na matoyi ya Nkolo na kofundaka bato oyo.

9 Tika ete lingomba moko moko elengela bandako, mpe bilanga mpo na kokolisa milona, mpo na baoyo wana bakotikala nsima eleko oyo; mpe oyo ezali bolingi ya Nkolo mpo na oyo etali bato na ye.

10 Tika ete moto na moto asalela nguya mpe bozwi na ye nyonso mpo na kolongola bato oyo bakende epayi wapi Nkolo akotia likonzi ya Siona.

11 Mpe soki bosali oyo na motema moko ya peto, kati na bosembo nyonso, bokopambolama; bokopambolama na kotalaka bibwele na bino, mpe na kotalaka bitonga na bino, mpe na kotalaka bilanga na bino, mpe na kotalaka bandako na bino, mpe na kotalaka mabota na bino.

12 Tika ete basali na ngai Ezra T. Benson mpe Erastus Snow babongisa lingomba moko ya bato.

13 Mpe tika ete basali na ngai Orson Pratt mpe Wilford Woodruff babongisa lingomba moko ya bato.

14 Lisusu, tika ete basali na ngai Amasa Lyman mpe George A. Smith babongisa lingomba moko ya bato.

15 Mpe tika ete basali na ngai bapona bakambi, mpe bakapitene likolo ya minkama, mpe likolo ya bantuku mitano, mpe likolo ya bazomi.

16 Mpe tika ete basali na ngai oyo basili koponama bakende mpe bateya makambo oyo, bolingi na ngai, na basantu, ete bakoka kozala bato babelemi mpo na kokende na mboka moko ya kimia.

17 Bokende na bino mpe bosala lokola nayebisi bino, mpe bobanga banguna na bino te; mpo bakozala na nguya ya kokanga mosala na ngai te.

18 Siona ekosikolama na ntango esengeli ya ngai moko.

19 Mpe soki moto moko aluki komilakisa ye moko, mpe aluki toli na ngai te, akozala na nguya te, mpe liboma na ye ekomonisama.

20 Boluka; mpe bobomba bilaka na bino nyonso moko na mosusu; mpe bolula soki moke te oyo ezali ya ndeko na bino.

21 Bomibatela uta na mabe na kokamataka nkombo ya Nkolo na mpamba, mpo nazali Nkolo Nzambe na bino, kutu Nzambe ya batata na bino, Nzambe ya Abalayama mpe ya Yisaka mpe ya Yakobo.

22 Nazali ye oyo akambaki bana ya Yisalaele uta na mboka ya Ejipito; mpe loboko na ngai esembolami na mikolo ya nsuka, mpo na kobikisa bato na ngai Yisalaele.

23 Bosukisa koswana moko na mosusu; bosukisa koloba mabe moko na mosusu.

24 Bosukisa molangwa; mpe tika ete maloba na bino ezala se mpo na kolendisana moko mosusu.

25 Soki odefi uta na moninga na yo ya mpembeni, osengeli kozongisa oyo odefaki; mpe soki okoki te kofuta bongo kende noki mpe yebisa moninga na yo ya mpembeni, mbele akweisa yo.

26 Soki okuti oyo moninga na yo ya mpembeni abungisi, osengeli kosala na molende koluka nkolo na yango kino okozongisa yango epayi na ye lisusu.

27 Osengeli kozala na etingia na kobatelaka oyo ozali na yango, ete ozala kapita ya bwania; mpo ete ezali likabo ya nsomi uta na Nkolo Nzambe na yo, mpe ozali kapita na ye.

28 Soki ozali na esengo, sanzola Nkolo na loyembo, na miziki, na mabina, mpe na losambo ya bosanzoli mpe ya bozongisi matondi.

29 Soki otondi na mawa, belela na Nkolo Nzambe na yo na mabondeli, ete molimo na yo mokoka kotondisama na esengo.

30 Bobanga banguna na bino te, mpo bazali na maboko na ngai mpe nakosala oyo esepelisi ngai mpo na bango.

31 Bato na ngai basengeli komekama na makambo nyonso, ete bakoka kozala bato bamilengeli mpo na kozwa nkembo oyo nazali na yango mpo na bango, kutu nkembo ya Siona; mpe ye oyo akondima kopesama etumbu te alongobani mpo na bokonzi na ngai te.

32 Tika ete ye oyo azangi koyeba ayekola bwania na komikitisaka mpe kobelelaka na Nkolo Nzambe na ye, ete miso na ye makoka kofungolama ete akoka komona, mpe matoyi na ye efungolama ete akoka koyoka;

33 Mpo Molimo na ngai motindami na mokili mpo na kongengisa bato na bomikitisi mpe baoyo batutisami na mawa, mpe mpo na kokweisa bato bazanga bonzambe.

34 Bandeko na bino bandimi basili kobwaka bino mpe litatoli na bino, kutu ekolo oyo ebenganaki bino;

35 Mpe sikawa mokolo ya likama mpo na bango eyei, kutu mikolo ya mawa, lokola mwasi oyo azwami na mpasi ya kobota; mpe mawa na bango ekozala monene longola se soki bayamboli na lombangu, iyo, na lombangu mpenza.

36 Mpo babomaki baprofeta, mpe bango oyo batindamaki epayi na bango; mpe basopaki makila mazanga ekweyeli, oyo ezali koganga uta na mabele na kofundaka bango.

37 Boye, bokamwa te na ntina ya makambo oyo, mpo bozali naino peto te; bokoki kokanga motema na nkembo na ngai te; kasi bokomona yango soki bozali sembo kati na kobombaka maloba na ngai nyonso oyo napesaki bino, uta na mikolo ya Adama kino na Abalayama, uta na Abalayama kino na Mose, uta na Mose kino na Yesu mpe bapostolo na ye, mpe uta na Yesu mpe bapostolo na ye kino na Joseph Smith, oyo nabengaki na nzela ya banjelu na ngai, basali na mosala na ngai, mpe na mongongo na ngai moko uta na lola, mpo na kobimisa mosala na ngai;

38 Oyo moboko atiaki mpenza, mpe azalaki sembo; mpe nakamati ye epayi na ngai moko.

39 Mingi bakamwaki na ntina ya liwa na ye; kasi ezalaki ntina mingi ete asengeli kokanga litatoli na ye na makila na ye, ete akoka kokumisama mpe bato ya nkuna bakoka kokweisama.

40 Ekangolaki ngai bino te uta na banguna na bino, bobele ete na lolenge wana natikaki litatoli ya nkombo na ngai?

41 Boye, sikawa, boyoka, O bino bato ya eklezia na ngai; mpe bino bampaka botia matoyi elongo; bozwi bokonzi na ngai.

42 Bozala molende na kobombaka mitindo na ngai nyonso, mbele masambisi maya likolo na bino, mpe bondimi na bino bozanga bino, mpe banguna na bino balonga likolo na bino. Bongo nazali na likambo ya kobimisa sikawa lisusu te. Amene mpe Amene.

Bimisa na lokasa