Makomi
Malongi mpe Mayokani 14


Eteni 14

Emoniseli epesami na nzela ya Profeta Joseph Smith epayi ya David Whitmer, na Fayette, New York, na sanza ya motoba ya mobu 1829. Libota ya Whitmer ezalaki na litomba monene na bobongoli ya Buku ya Mormon. Profeta atiaki efandeli na ye epayi ya Peter Whitmer Tata, wapi afandaki kino mosala ya bobongoli mosilaki mpe ekoki likolo ya buku oyo ezalaki penepene na kobima ezwamaki. Misato kati na bana mibali ya Whitmer, oyo bazwaki moko moko litatoli mpo na oyo etali bosolo ya mosala yango, bakomaki komitungisa mpenza likolo ya mosala ya moko moko kati na bango. Emoniseli oyo mpe mibale oyo malandi (biteni 15 mpe 16) epesamaki lokola eyano na kolukaka koyeba ntina ya makambo na nzela ya Ulima mpe Tumima. David Whitmer akomaki nsima moko ya Banzeneneke Misato ya Buku ya Mormon.

1–6, Basali kati na elanga ya vinyo bakozwa lobiko; 7–8, Bomoi ya seko ezali moko ya makabo minene koleka nyonso ya makabo ya Nzambe; 9–11, Klisto akelaki lola mpe mabele.

1 Mosala moko monene mpe ya kokamwa ezali penepene na kosalema na kati ya bana ya bato.

2 Tala, nazali Nzambe; tiaka bokebi na liloba ya ngai, oyo ezali na bomoi mpe nguya, na mopotu koluta mipanga nyonso mipeli bipayi nyonso mibale mpe, kino na kokabola biteni ya matongi mpe mafuta, mpe boye tiaka bokebi na liloba ya ngai.

3 Tala, elanga esili kokomela mpo na kobuka; mpe boye, ye oyo alingi kobuka mbuma tika akata na likwangola na bokasi na ye, mpe abuka mbuma wana ezali mokolo kowumela, ete akoka kobomba mpo na lobiko ya libela ya molimo na ye na bokonzi ya Nzambe.

4 Iyo, moto nyonso oyo akokata na likwangola mpe akobuka, se moko oyo wana abiangami na Nzambe.

5 Mpe boye, soki okosenga epayi na ngai okozwa; soki okobeta bakofungolela yo.

6 Luka komema liboso mpe kotia ntina ya Siona. Bomba mitindo na ngai na makambo nyonso.

7 Mpe, soki obombi mitindo na ngai mpe otie molende kino na nsuka okozwa bomoi ya seko, oyo ezali likabo ya monene koleka makabo nyonso ya Nzambe.

8 Mpe ekosalema, ete soki okosenga Tata na nkombo na ngai, kozalaka na bondimi, okozwa Molimo Mosantu, oyo apesaka maloba, ete okoka kotelema lokola nzeneneke ya makambo oyo okoyoka mpe okomona, mpe lisusu ete okoka kosakola boyamboli epayi ya nkola oyo.

9 Tala, nazali Yesu Klisto, Mwana ya Nzambe ya bomoi, oyo akelaki lola mpe mabele, pole oyo ekoki kobombama na molili te;

10 Yango wana, nasengeli kobimisa litondi ya nsango malamu na ngai uta na Bayuda-te epayi na ndako ya Yisalaele.

11 Mpe tala, ozali David, mpe oponami kopesa lisalisi; na mosala oyo kani soki osali, mpe ozali sembo, okopambolama lolenge moko na molimo mpe na ntango, mpe lifuta na yo ekozala ya monene koleka. Amene.

Bimisa na lokasa