Makomi
Malongi mpe Mayokani 22


Eteni 22

Emoniseli epesami na nzela ya Profeta Joseph Smith, na Manchester, New York, na sanza ya minei ya mobu 1830. Emoniseli oyo epesamaki na Eklezia na ntina ete boko bato oyo babatisamaki liboso bazalaki na mposa ya kosangana na Eklezia na kozangaka kobatisama lisusu.

1, Libatisi ezali liyokani ya sika mpe ya libela; 2–4, Libatisi esengeli kopesama na moto oyo azali na likoki.

1 Tala, nalobi epayi na bino ete mayokani nyonso ya kala nasali ete malongolama na eloko oyo; mpe oyo ezali liyokani ya sika mpe ya libela, kutu yango oyo ezalaki uta na ebandeli.

2 Yango wana, atako moto moko asengelaki kobatisama mbala monkama ezali na litomba moko te mpo na ye, mpo bokoki te kokota kati na ekuke ya moke na nzela ya mobeko ya Mose, mpe na nzela ya misala mikufa na bino mpe te.

3 Mpo ezali na ntina ya misala ekufa ya bino ete nasalaki ete liyokani oyo ya nsuka mpe eklezia oyo etongama mpo na ngai, kutu lokola na mikolo ya kala.

4 Yango wana, kota na ekuke, lokola natindaki, mpe koluka te kopesa Nzambe na bino toli. Amene.

Bimisa na lokasa