Makomi
Malongi mpe Mayokani 28


Eteni 28

Emoniseli epesami na nzela ya Profeta Joseph Smith na Oliver Cowdery, na Fayette, New York, na sanza ya libwa ya mobu 1830. Hiram Page, moko mondimi ya Eklezia, azalaki na libanga moko mpe azalaki kosangela kozwa bimoniseli na lisalisi na yango mpo na oyo etali botongi ya Siona mpe lolenge ya kobongisa Eklezia. Bandimi ebele bakosamaki na nsango oyo, mpe kutu Oliver Cowdery azwamaki na bopusi mabe ya kolanda nzela wana. Mwa ntango moke liboso ya likita oyo basilaki kotia elaka, Profeta alukaki na losambo makasi koyeba uta na Nkolo mpo na ntina ya likambo yango, mpe emoniseli oyo elandaki.

1–7, Joseph Smith azali na bafungola ya mibombamo, mpe bobele ye nde azwaka bimoniseli mpo na Eklezia; 8–10, Oliver Cowdery asengeli koteya epayi ya Balamani; 11–16, Satana akosaki Hiram Page mpe apesaki ye bimoniseli ya lokuta.

1 Tala, nalobi epayi na yo, Oliver, ete ekopesama epayi na yo ete bayokela yo kati na eklezia na makambo nyonso kani okoteya bango na nzela ya Molendisi, mpo na oyo etali bimoniseli mpe mitindo oyo napesaki.

2 Kasi, tala, solo, solo, nalobi epayi na yo, moto moko te akoponama mpo na kozwa mitindo mpe bimoniseli kati na eklezia oyo longola se mosali na ngai Joseph Smith Mwana, mpo azali kozwa yango kutu lokola Mose.

3 Mpe osengeli kozala na botosi mpo na makambo oyo nakopesa epayi na ye, kutu lokola Alona, mpo na kosangela na bosembo mitindo mpe bimoniseli yango, na nguya mpe likoki epayi ya eklezia.

4 Mpe soki okambami ntango nyonso na Molendisi to na lolenge ya motindo mpo na koloba to koteya na eklezia, okoki kosala yango.

5 Kasi okokoma na lolenge ya motindo te, kasi na lolenge ya bwania;

6 Mpe osengeli kopesa motindo na oyo ezali na moto na yo, soki mpe na moto ya eklezia te;

7 Mpo napesaki ye bafungola ya mibombamo, mpe bimoniseli oyo ekangami, kino nakoponela bango mosusu na esika na ye.

8 Mpe sikawa, tala, nalobi epayi na yo ete okokende epayi ya Balamani mpe koteya nsango malamu na ngai epayi na bango; mpe mbala mingi lokola bakoyamba mateya na yo okosala ete eklezia na ngai etiama na kati na bango; mpe okozwa bimoniseli, kasi kokoma yango te na lolenge ya motindo.

9 Mpe sikawa, tala, nalobi epayi na yo ete ebimisami te, mpe moto moko te ayebi epayi wapi enguma ya Siona ekotongama, kasi ekobimisama nsima na awa. Tala, nalobi epayi na yo ete ekozala mpembeni na ndelo ya Balamani.

10 Okolongwa uta na esika oyo te kino nsima ya likita, mpe mosali na ngai Joseph akoponama mpo na koyangela likolo ya likita yango na kopona ya bato bazwami na likita yango, mpe oyo akolobela yo yango nde okoyebisa.

11 Mpe lisusu, okozwa ndeko na yo ya mobali, Hiram Page, bobele ye na yo moko, mpe yebisa ye ete makambo oyo wana akomaki uta na libanga wana ezali ya ngai te mpe ete Satana nde akosaki ye;

12 Mpo, tala, makambo oyo epesami epayi na ye te, mpe lisusu likambo moko te ekopesama epayi ya moto soki nani ya eklezia na bokeseni ya mayokani ya Eklezia.

13 Mpo makambo nyonso esengeli kosalema na molongo, mpe na bondimami ya nyonso kati na eklezia, na kosalelaka losambo ya bondimi.

14 Mpe osengeli kosunga mpo na kobongisa makambo oyo nyonso, engebene na mayokani ya eklezia, liboso ete osala mobembo na yo na kati ya Balamani.

15 Mpe ekopesama na yo nini oyo okosala, uta ntango okokende kino na ntango okozonga.

16 Mpe osengeli kofungola monoko na yo na ngonga nyonso, kosakolaka nsango malamu na ngai na lokito ya bosepeli. Amene.

Bimisa na lokasa