Makomi
Malongi mpe Mayokani 31


Eteni 31

Emoniseli epesami na nzela ya Profeta Joseph Smith na Thomas B. Marsh, na sanza ya libwa ya mobu 1830. Ezalaki na libaku oyo ezwamaki sasaipi nsima ya likita moko ya Eklezia (tala moto ya eteni 30). Thomas B. Marsh abatisamaki na ebandeli mpenza ya sanza yango mpe akulisamaki lokola mpaka kati na Eklezia liboso ete emoniseli oyo epesama.

1–6, Thomas B. Marsh abiangami koteya nsango malamu mpe akitisami motema ete libota na ye ekotikala malamu; 7–13, Apesami toli mpo na kozala na bompikiliki, kosambela ntango nyonso, mpe kolanda Molendisi.

1 Thomas, mwana mobali na ngai, opambolami na ntina ya bondimi na yo kati na mosala na ngai.

2 Tala, ozalaka na mitungisi na ntina ya libota na yo; nzokande, nakopambola yo mpe libota na yo, iyo, bana mike na yo; mpe mokolo ezali koya ete bakondima mpe bakoyeba bosolo mpe bakozala moto moko elongo na yo kati na eklezia na ngai.

3 Tombola motema na yo mpe sepela, mpo ete ngonga ya mosala na yo ya misionele ebeti; mpe lolemo na yo ekokangolama, mpe okosakola nsango ya nsai ya bosepeli monene epayi ya nkola oyo.

4 Okosakola biloko oyo ebimisamaki na mosali na ngai, Joseph Smith Mwana. Osengeli kobanda koteya uta ntango oyo kokende liboso, iyo, kobuka mbuma kati na elanga oyo esili kokomela mpo na kozikisama.

5 Mpe boye, kata na likwangola na yo na molimo na yo mobimba, mpe masumu na yo elimbisami yo, mpe okotondisama na maboke likolo ya mokongo na yo, mpo ete mosali alongobani na lifuta na ye. Yango wana, libota na yo ekobika.

6 Tala, solo nalobi epayi na yo, tika bango bobele mpo na ntango moke, mpe sakola liloba ya ngai, mpe nakobongisa esika mpo na bango.

7 Iyo, nakofungola mitema ya bato, mpe bakoyamba yo. Mpe nakotia eklezia moko na nzela ya loboko na yo;

8 Mpe okolendisa bango mpe kolengela bango mpo na ntango bakosangisama.

9 Zala na bompikiliki kati na mitungisi, kotuka te baoyo batukaka. Yangela ndako na yo kati na bosokemi, mpe zala ngwi kati na bondimi.

10 Tala, nalobi epayi na yo ete osengeli kozala monganga mpo na eklezia, kasi mpo na mokili te, mpo bakoyamba yo te.

11 Kende na nzela nyonso wapi elingi ngai, mpe Molendisi akobimisa epayi na yo nini okosala mpe epayi wapi okokende.

12 Sambela ntango nyonso, ete okweya kati na masenginia mpe obungisa mbano na yo te.

13 Zala sembo kino na nsuka, mpe tala, nazali elongo na yo. Maloba oyo ezali ya moto to ya bato te, kasi ya ngai, kutu Yesu Klisto, Mosikoli na yo, na bolingi ya Tata. Amene.

Bimisa na lokasa