Makomi
Malongi mpe Mayokani 33


Eteni 33

Emoniseli epesami na nzela ya Profeta Joseph Smith epayi ya Ezra Thayre mpe Northrop Sweet, na Fayette, New York, na sanza ya zomi ya mobu 1830. Ntango azalaki kokoma emoniseli oyo, mambi ya kala ya Profeta Joseph Smith endimisi ete “Nkolo … azali mosika te mpo na kolakisa nzela na baoyo wana balukaka na molende mpe na bondimi.”

1–4, Basali babiangami kosakola nsango malamu na ngonga ya zomi na moko; 5–6, Eklezia etiami, mpe baponi bakosangisama; 7–10, Boyambola, mpo ete bokonzi ya lola ekomi penepene; 11–15, Eklezia etongami likolo ya libanga ya nsango malamu; 16–18, Bomilengela mpo na boyei ya Mobali ya libala.

1 Tala, nalobi epayi na bino basali na ngai Ezra mpe Northrop, bofungola matoyi na bino mpe boyoka mongongo ya Nkolo Nzambe na bino, oyo kani liloba ezali na bomoi mpe etonda na nguya, na mopotu koluta mipanga nyonso mipeli bipayi nyonso bibale, mpo na kokabola matongi mpe mafuta, bomoi mpe molimo; mpe esosolaka makanisi mpe mikano ya motema.

2 Mpo solo, solo, nalobi epayi na bino ete bobiangami mpo na kotombola mingongo na bino lokola na lokito ya kelelo, kosakola nsango malamu na ngai epayi ya nkola oyo ya nioka nioka mpe ya mabe.

3 Mpo tala, elanga esili kokomela mpo na kobuka mbuma; mpe ezali ngonga ya zomi na moko, mpe mbala ya nsuka oyo nakobianga basali kati na elanga na ngai ya vinyo.

4 Mpe elanga na ngai ya vinyo ebebi eteni na eteni; mpe ezali na moko te oyo azali kosala bolamu longola se bato moke; mpe mbala mingi bazali kosala mabunga mpo na poloso ya banganga, baoyo nyonso bazali na mayele oyo ebeba.

5 Mpe solo, solo, nalobi epayi na bino, ete eklezia oyo ngai nde natiaki mpe nabiangaki yango ebima uta na esobe.

6 Mpe kutu boye nakosangisa baponami na ngai uta na biteni minei ya mabele, kutu mingi koleka lokola bakondima ngai, mpe bakoyoka mongongo na ngai.

7 Iyo, solo, solo, nalobi epayi na bino, ete elanga esili kokomela mpo na kobuka mbuma; yango wana, bokata na likwangola, mpe bobuka mbuma na makasi, mayele, mpe bokasi na bino nyonso.

8 Bofungola minoko na bino mpe bakotondisama, mpe bokokoma kutu lokola Nefi ya kala, oyo asalaki mobembo uta na Yelusaleme kati na esobe.

9 Iyo, bofungola minoko na bino mpe botika te, mpe bokotondisama na maboke likolo ya mikongo na bino, mpo tala, nazali elongo na bino.

10 Iyo, bofungola minoko na bino mpe bakotondisama, kolobaka: Yambola, yambola, mpe lengela nzela ya Nkolo, mpe sembola nzela na ye; mpo bokonzi ya lola ekomi penepene;

11 Iyo, boyambola mpe bobatisama, moko moko kati na bino, mpo na bolimbisi ya masumu na bino; iyo, bobatisama kutu na mai, mpe nsima nde ekoya libatisi ya moto mpe ya Molimo Mosantu.

12 Tala, solo, solo, nalobi epayi na bino, oyo ezali nsango malamu na ngai; mpe bomikundola ete basengeli kozala na bondimi na ngai soki te bokoki kobikisama ata moke te;

13 Mpe likolo ya libanga oyo nakotonga eklezia na ngai; iyo, botongami likolo ya libanga oyo, mpe soki bozali se kokoba, bikuke ya lifelo bikolonga bino te.

14 Mpe bokomikundola malako mpe mayokani ya eklezia mpo na kobomba yango.

15 Mpe nyonso oyo bakozala na bondimi bosengeli kokotisa bango na eklezia na ngai, na kotiaka bango nyonso maboko, mpe na kopesaka likabo ya Molimo Mosantu likolo na bango.

16 Mpe Buku ya Mormon mpe makomi masantu epesami na ngai mpo na kopesa bino malako; mpe nguya ya Molimo na ngai epesaka bomoi na biloko nyonso.

17 Yango wana, bozala sembo, kosambelaka ntango nyonso, kozalaka na minda na bino penepene mpe kopela moto, mpe mafuta elongo na bino, ete bokoka kozala ya kobelema na boyei ya Mobali ya libala—

18 Mpo tala, solo, solo, nalobi epayi na bino, ete nakoya na mbalakaka. Kutu bongo. Amene.

Bimisa na lokasa